Ntina ya bomoi ezali nini?
MPO NA NINI EYANO NA MOTUNA YANGO EZALI NA NTINA? Ezali na makambo mingi te oyo elɛmbisaka moto nzoto lokola kozanga koyeba ntina ya bomoi. Nzokande, moto oyo ayebi ntina mpenza ya bomoi azalaka mpenza makasi ntango akutani na mikakatano. Viktor E. Frankl, monganga moko oyo abikaki na liwa ntango basoda ya Nazi babomaki ebele ya Bayuda, akomaki boye: “Nakoki koloba ete ezali na eloko moko te na mokili oyo ekoki kobikisa moto ata na mpasi ya ndenge nini lokola koyeba ete bomoi ya moto ezali na ntina.”
Nzokande, bato bapesá makanisi ndenge na ndenge na likambo yango. Mingi bakanisaka ete moto ye moko nde akoki kopona epai alingi komema bomoi na ye. Kasi, bato oyo bandimaka ete moto abimá kaka boye, bateyaka ete bomoi ezali mpenza na ntina te.
Kasi, lolenge eleki malamu ya koyeba ntina ya bomoi ezali ya kotuna Yehova Nzambe, Mopesi ya bomoi. Tótala oyo Liloba na ye ezali koloba na likambo yango.
Oyo Biblia elobaka
Biblia eteyaka ete Yehova Nzambe akelaki Adama ná Eva na ntina mpenza. Yehova apesaki baboti na biso ya liboso mobeko oyo:
Genese 1:28. “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi ya mai, mpe na ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.”
Mokano ya Nzambe ezalaki ete Adama ná Eva mpe bana na bango bákómisa mabelé mobimba paladiso. Alingaki te ete bato bánunaka mpe bákufaka; alingaki mpe te ete bábebisaka mabelé. Kasi, lokola baboti na biso ya liboso bazwaki ekateli ya mabe, tosangoli lisumu mpe liwa. (Genese 3:2-6; Baloma 5:12) Atako bongo, mokano ya Yehova ebongwani te. Mosika te, mabelé ekokóma paladiso.—Yisaya 55:10, 11.
Yehova akelá biso na makasi mpe mayele ya kokokisa mokano na ye. Akelaki biso te mpo tómitambwisaka biso moko. Talá ndenge mokano ya Nzambe mpo na biso eyebisami na mikapo oyo elandi:
Mosakoli 12:13, NW. “Nsima ya koyoka nyonso, nsuka ya likambo ezali boye: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde nyonso oyo esɛngami na moto.”
Mika 6:8. “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”
Matai 22:37-39. “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde [mobeko] oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”
Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo
Mpo masini esala malamu, esengeli kosalela yango mpo na ntina oyo basalaki yango mpe na ndenge oyo moto oyo asalaki yango alingaki esalelamaka. Ndenge moko, soki tolingi te kobebisa nzoto, makanisi to boyokani na biso na Nzambe, tosengeli kosalelaka bomoi na biso ndenge oyo Mokeli na yango alingaki. Tótala ndenge koyeba mokano ya Nzambe ekoki komemela biso kimya ya solosolo na makambo oyo elandi:
Kopona makambo oyo eleki ntina: Bato mingi lelo oyo bazali koboma nzoto mpo na konduka bomɛngo. Nzokande, Biblia elobi ete: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi.”—1 Timote 6:9, 10.
Kasi, baoyo bazali koyekola kolinga Nzambe na esika ya kolinga mbongo, bazali bato ya esengo. (1 Timote 6:7, 8) Bamonaka ete kosala mosala makasi ezali na ntina mpe bayebaka ete bazali na mokumba ya kokokisa bamposa na bango ya mosuni. (Baefese 4:28) Kasi, balandaka mpe toli ya Yesu oyo: “Moto moko te akoki kosala lokola moombo mpo na bankolo mibale; mpo to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.”—Matai 6:24.
Na yango, na esika ya kotya mosala na bango ya mosuni to koluka bomɛngo na esika ya liboso, baoyo balingaka Nzambe batyaka mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na bango. Bayebaka ete soki batye mokano ya Nzambe na esika ya liboso, Yehova Nzambe akokokisa bamposa na bango. Kutu, Yehova ye moko asepelaka kosala bongo.—Matai 6:25-33.
Boyokani na basusu: Bato mingi bamityaka na esika ya liboso. Lelo oyo, mokili ezangi kimya, mingimingi mpo bato mingi bakómi ‘komilinga bango moko, bazangi bolingo ya libota.’ (2 Timote 3:2, 3) Ntango moto moko asali bango mabe mpe andimi likanisi na bango te, bayokaka mbala moko nkanda mpe nkɛlɛ mpe babandaka koganga mpe kofinga. (Baefese 4:31) Na esika ya kopesa kimya ya solosolo, kozanga komipekisa ya ndenge wana ‘ebendaka koswana.’—Masese 15:18, NW.
Nzokande, baoyo batosaka mobeko ya Nzambe oyo esɛngi bálinga bazalani na bango lokola bango moko bazalaka ‘na boboto na kati na bango, bayokelanaka mawa mingi, balimbisanaka na motema moko.’ (Baefese 4:32; Bakolose 3:13) Ata ntango basusu bazali kosala bango makambo na boboto te, basalaka makasi bámekola Yesu, oyo ntango bazalaki kofinga ye, “azalaki kozongisa kofinga te.” (1 Petelo 2:23) Lokola Yesu, bayebaka ete kosalela basusu epesaka esengo, ata soki bato yango bazali na botɔndi te mpo na makambo oyo basaleli bango. (Matai 20:25-28; Yoane 13:14, 15; Misala 20:35) Yehova Nzambe apesaka elimo santu na ye epai na baoyo bamekolaka Mwana na ye, mpe elimo yango epesaka bango kimya ya solosolo.—Bagalatia 5:22.
Na yango, ndenge nini lolenge oyo ozali kotalela bomoi na mikolo ezali koya ekoki kopesa yo kimya ya solosolo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Moto asengeli koyeba ntina mpenza ya bomoi
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu alakisi biso ndenge ya kozwa kimya ya solosolo