Mituna ya batángi
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te?
Batatoli ya Yehova bandimaka ete liwa ya Yesu Klisto ezali lisiko oyo epesi bato oyo bazali komonisa kondima epai na ye nzela ya kozwa bomoi ya seko. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Kasi, bandimaka te ete Yesu akufaki na ekulusu, ndenge bililingi ya mangomba emonisaka yango. Batatoli ya Yehova bandimaka ete Yesu akufaki na nzete moko oyo batɛlɛmisi to likonzí.
Ekulusu ezalaki kosalelama na Mezopotamia, mbula nkóto mibale liboso ya Klisto. Bikulusu ezali ata na mayemi oyo ezali na mabanga na mikili ya Scandinavie, oyo esalemá bankama ya bambula liboso Yesu abotama. Na buku na ye (Symbols Around Us), Sven Tito Achen, mwana-mboka Danemark oyo azali moto ya mayele na masolo ya kala mpe ayekolaka bilembo, akomaki ete bato wana oyo bazalaki baklisto te bazalaki kosalela ekulusu “lokola elembo ya maji . . . oyo ezalaki kobatela, kopesa makila malamu.” Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Ekulusu ezalaki kosalelama liboso lingomba ya boklisto ebanda mpe ezalaki bapakano nde bazalaki kosalela yango, mingimingi lokola elembo ya biloko oyo ezali na likoló.” Soki ezali bongo, mpo na nini mangomba eponaki ekulusu lokola elembo oyo eleki bosantu?
William Vine, moto ya mayele oyo ayebani mingi mpe mwana-mboka Angleterre, alobaki boye: “Na katikati ya ekeke ya 3 ya ntango na biso . . . bandimaki bapakano na mangomba . . . mpe bapesaki bango nzela ya kokoba kosalela bilembo na bango. Na yango, elembo T, . . . oyo bakitisi mwa moke nzete oyo ezali likoló, endimamaki.”—Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words.
Vine abakisaki lisusu ete liloba oyo ebongolami na “ekulusu” elimboli “nzete . . . oyo ekeseni na elembo ya mangomba oyo ezali na banzete mibale, moko ekatisi likoló ya mosusu.” Kaka mpo na komonisa likambo yango, buku moko (Companion Bible) ya Iniversite ya Oxford elobi boye: “Emonani . . . ete Nkolo abomamaki likoló ya nzete oyo batɛlɛmisi, kasi te na libaya oyo ezali na nzete mosusu oyo ekatisi yango.” Emonani polele ete mangomba elandaki momeseno oyo euti na Biblia te.
Achen, moto ya mayele oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Na bikeke mibale oyo elandaki nsima ya liwa ya Yesu, tondimi te ete baklisto bazalaki kosalela ekulusu.” Abakisi ete mpo na baklisto ya liboso, ekulusu “ezalaki elembo ya liwa mpe ya mabe, ndenge na nsima, bato bakómaki kotalela sii ya kokata nkingo, mpe kiti ya kura mpo na koboma bato.”
Ata soki basalelaki eloko nini mpo na koboma Yesu, likambo eleki ntina ezali ete baklisto basengeli te kosalela elilingi na yango na losambo. Biblia epesi mobeko oyo: “Bókima losambo ya bikeko.” (1 Bakolinti 10:14) Yesu ye moko ayebisaki elembo oyo ekomonisa bayekoli na ye ya solo. Alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—Yoane 13:35.
Na losambo na bango mobimba, Batatoli ya Yehova, ndenge moko na baklisto ya liboso, basalaka makasi bálanda oyo Biblia elobi na esika ya kolanda mimeseno ya bato. (Baloma 3:4; Bakolose 2:8) Yango wana, basalelaka ekulusu te.
[Elilingi na lokasa 22]
Liyemi ya Mokonzi moko ya Asulia alati ekulusu, mobu soki 800 L.T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Tokangi fɔtɔ oyo na ndingisa ya British Museum