Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/4 nk. 21-24
  • Ekulusu ezali mpo na baklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekulusu ezali mpo na baklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elembo ya boklisto?
  • Constantin mpe ekulusu
  • Ekulusu na boumeli ya bileko
  • Klisto akufaki likolo na ekulusu?
  • Totambola na kondima, kasi na komona te
  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ekulusu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/4 nk. 21-24

Ekulusu ezali mpo na baklisto?

“EZALI likabo ya mama na ngai.” “Ezali kosalisa.” “Nalataka yango lokola biju.” “Nakozala na esengo te soki nazangi yango.” “Ezali kobatela ngai na mabe.” “Ezali bobele likambo ya kotya mwa eloko na monyololo to chaone na ngai.”

Tala makambo oyo bamosusu bayanolaki ntango batunaki bango soko mpo na nini balataka ekulusu. Atako emonani ete mingi kati na bango bazali kosala yango mpo na losambo te, emonanaka ete na bisika mingi bato bazali kolata ekulusu. Emonanaki nkutu ete ata bilenge ba Soviétique bazali kolata yango, mpe bamingi bazali kopesa yango ndimbola monene mpo na losambo. Moko na bango alobaki nkutu boye kozanga kokakatana ete: “Ezali bulee”.

Kasi ebongi mpenza ete moklisto alata ekulusu? Ekulusu yango ezali eloko oyo likolo na yango Klisto akufaki? Bipekiseli makasi ya kolata yango ezali, ata lokola biju? Mpo na koyanola na mituna oyo, tobanda liboso kotalela epai ekulusu euta.

Elembo ya boklisto?

Mbala mosusu ozali kokanisa ete baklisto bazali nde bato ya liboso babandaki kosalela ekulusu lokola elembo. Nzokande Encyclopédie américaine ezali koloba mpo na “kosalelama na yango kala epai na Baindou mpe Babudiste na lnde mpe na Chine, bakisa mpe Baperse, Basyriens mpe Bababilonié”. Ndenge moko mpe, encyclopédie ya lokota na Anglais (Chambers’s Encyclopaedia, ebimeli ya 1969) elobi ete ekulusu “ezali elembo moko likolo na yango bandimbola ya losambo mpe ya mabombami ekangisamaki uta kala liboso na eleko ya boklisto”.

Na yango, likambo moko te ezali komonisa ete baklisto ya liboso bazalaki kosalela ekulusu kati na losambo na bango. Na ebandeli ya boklisto, ezalaki nde Baromé bato bazalaki kosalela yango! Mpo na yango, tala oyo ekoki kotangama kati na makomi ya Biblia moko (The Companion Bible): “Ba ekulusu oyo ezalaki bilembo ya dieu-soleil (nzambe-na-moi) na Babilone, . . . mpe ebimaki mpo na mbala ya liboso kati na mbongo ya Jules César (100-44 liboso ya ntango na biso), na nsima kati na mbongo oyo mokitani na ye, Auguste, abimisaki na mobu 20 ya ntango na biso.” Bakus, nzambe ya Baromé na ezingelo, mbala mosusu azalaki komonisama alati to akangi elamba moke ezwami na ekulusu likolo ya moto na ye.

Na yango, ndenge nini ekulusu ekomaki elembo ya boklisto na mokili oyo?

Constantin mpe ekulusu

Na 312 ya ntango na biso, Constantin, oyo azalaki mokonzi na teritware oyo France azali na yango sikawa mpe Grande-Bretagne, akendaki kobundisa semeki na ye, Maxence, ya ltalie. Na nzela azwaki emononelo-ekulusu moko ezalaki na maloba “Hoc vince”, oyo elimboli “Longa na nzela na oyo”. Nsima na kolonga, Constantin akomisaki ekulusu bendele ya mampinga na ye. Na nsima, ntango lisangá ya boklisto ekomaki lingomba ya Leta kati na Bokonzi ya Baromé, ekulusu eponamaki lokola elembo ya Lingomba.

Kasi Constantin azwaki mpenza emonanelo yango? Masolo ya lisapo oyo mazali, mpenza ya solo te, mpe matondi na bongolabongola. Mpo na koloba polele, ekozala mpasi mpo na komona kandida moko lokola Constantin na kozwa emonanelo ya Nzambe. Na eleko oyo likambo yango esalamaki, mokonzi yango azalaki kosambela na molende nyonso nzambe-na-moi. Akomaki kino kopona mokolo ya lomingo mpo na kosambela moi. Epai mosusu, ata nsima ya kobongwana na ye, Constantin azalaki na botosi mingi te mpenza epai na mibeko ya Nzambe. Bitumba, mobulu mpe lokoso na makambo ya politike eyangelaki bomoi na ye mobimba. Lisangá ya boklisto ezalaki mpenza komonana na miso na ye lokola esaleli ya politike mpo na kozongisa bomoko ya bokonzi oyo epanzani.

Ezali mpe na makambo to bilembo mingi te oyo bizali komonisa ete lolenge na ekulusu oyo Constantin “amonaki” ezalaki mpenza komonisa ete ezali eloko oyo basalelaki mpo na koboma Klisto. Na yango, mosolo mingi ya bibende oyo Constantin abimisaki na nsima ezali na ekulusu esalami na “X” mpe na “P” etyami moko likolo na mosusu (tala elilingi). Kati na Diksionere na ye oyo azali kolimbola maloba ya Nouveau Testament (na Angl.), W. Vine azali koloba boye: “Mpo na Khi, to X, oyo Constantin alobaki ete amonaki kati na emonanelo na ye oyo ememaki ye na komikotisa mobimba kati na kondima ya boklisto, likomi yango ezalaki ebandeli ya liloba “Klisto” (greke) mpe ezalaki na boyokani ata moke te na “ekulusu”, elingi koloba esaleli mpo na koboma. Na yango, balolenge na ekulusu oyo ekokani mpenza na elembo ya bapakano mpo na moi.

Bongo na ntina yango, mpo na nini ekulusu endimamaki kozanga nkaka epai na “baklisto”? Vine alandi koyebisa: “Na katikati ya ekeke ya III nsima na Yesu Klisto, to Mangomba bapengwaki mpo na kotika bindimeli ya lisanga na boklisto, to babongolaki yango. Mpo na kokolisa lolendo ya ebongiseli ya bakonzi na lingomba na bapengwi, Mangomba bazalaki kondima kati na bango bapakano, kozanga ete babongwana, mpe bazalaki kopesa bango nzela na kobatela na eteni monene, bilembo na bango ya bopakano. Yango wana Tau to T, kati na lolenge na yango oyo bato bazalaki kosalela mingi, elongo na mokoloto na yango oyo bakata na mwa nse moke na likolo na yango, yango nde esalemaki to bamekolaki mpo na komonisa ekulusu ya Klisto.”

Ekulusu na boumeli ya bileko

Ezali mpenza mpo na bolingo na Klisto nde ekulusu ekomi elembo oyo bato bakumisi yango mingi na eleko oyo ya nsuka? Encyclopedie moko (Encyclopaedia of Religion and Ethics) ezali koloba: “Na ekeke ya minei, bato oyo bandimaka maji babandaki kopika misisa na bango kati na Lingomba.” Bato bazalaki kokanisa ete, lokola na nguya ya maji, elembo na ekulusu ezalaki “ebundeli malamu liboso na bilimu mabe, mpe nkisi mpo na maladi nyonso”. Kosalela ekulusu mpo na komibikisa ekoli kino na mikolo na biso.

Na boumeli ya mibu, penepene na ekulusu 400 ebotamaki to esalamaki. Na ebandeli bazalaki komonisa Klisto te, kasi mwana moko asimbi ekulusu oyo ezingami na babiju. Na nsima, babakisaki elembo ya mwana na mpate moko. Mpe na 691, concile in Trullo “endimaki” ekulusu oyo ezalaki na ntolo ya elenge mobali moko, na esika ya mwana na mpate. Nsima na mikolo, ekulusu yango ebongwanaki na crucifix-ekulusu oyo likolo na yango nzoto na Klisto ezwami.

Klisto akufaki likolo na ekulusu?

Bato mosusu bakoki komituna boye: “Kasi Biblia ezali koteya te ete Klisto akufaki mpenza likolo na ekulusu?” Mpo na koyanola na motuna yango, esengeli na biso kotalela ndimbola ya maloba mibale ya greke oyo bakomi na Biblia basalelaki mpo na komonisa eloko oyo likolo na yango Klisto akufaki: stauros mpe xulon.

Tala oyo ekoki kotangama kati na encyclopédie (The lnternational Standard Bible Encyclopedia, ebimeli ya 1979) na ebandeli “Ekulusu”: “Na ebandeli, liloba na greke stauros ezalaki kolakisa nzete oyo etyami nsonge na nsuka na yango, etelemisami mpe epikami makasi na mabelé. . . . Bazalaki kokunda banzete yango moko pembeni na mosusu, na molongo, mpo na kosala lopango to ezingelo mpo na komibatela zingazinga ya ba camps, to mpe bazalaki kopika yango na esika na yango moko mpo ete ekoma bisaleli ya kobomela bato likolo na yango bazalaki kokakemisa liboso na bato banso basali minene na mabe (to, soki basilaki kokufa, mpo na kosambwisa mpenza bibembe na bango).”

Ya solo, Baromé bazalaki kosalela eloko moko ebengami crux na latin. Mpe liloba crux yango esalelamaki kati na mabongoli ya Biblia na latin mpo na kopona liloba na greke stauros. Lokola liloba na latin crux mpe liloba na francais croix (ekulusu na lingala) ekokani, bato mingi bazali kokanisa na libunga ete crux ezalaki mpenza nzete moko ya molai oyo libaya mosusu ya moke ekatisi likolo na yango: “Ata epai na Baromé, crux (epai oyo liloba na biso ekulusu euti) na ebandeli esengelaki kozala nzete etelema, mpe likambo yango ezali naino solo kino lelo kati na makambo mingi.”

Bandimbola mosusu mpo na yango ezali kozwama kati na mokanda La croix non chrétienne (na Angl.): “Na greke ya ebandeli, ata mokanda moko te kati na ebele ya mikanda ya Kondimana ya Sika ezali ata na liloba moke oyo ezali komonisa, ezala na elobeli mosusu ya pembeni ete stauros oyo basalelaki mpo na Yesu ete ezalaki eloko mosusu na esika ya stauros oyo eyebani na bato banso (nzete); eloko moko ezali mpe komonisa te ete, ezalaki na nzete moko te kasi nzete mibale oyo esangisami esika moko mpo na kokomisa yango ekulusu.” Ekoki mpenza kozala ete Klisto akakemisamaki likolo na crux?(stauros) ebengami crux simplex. Yango ekokani na elilingi oyo, lokola emonisi yango elilingi oyo sango moko ya katolike ya ekeke zomi na motoba, Justus Lipsius asalaki.

Tokoloba nini mpo na liloba oyo mosusu na greke, xulone Ezali komonana kati na libongoli na greke ya Septante, na Ezela 6:11. Mokapo yango ebongolami motindo oyo kati na Traduction du monde nouveau: “Nabimisi mpe lilako ete, moto nani akobongola liloba oyo tika ete libaya lilongolama na ndako na ye mpe atombolama mpe abakisama na yango; mpe tika ete ndako na ye ezala ebwakelo na bosoto mpo na oyo.” Na polele nyonso, awa ezali bobele likambo ya nzete se moko, to “libaya”.

Mpo na yango, babongoli mingi ya Makomami na greke ya boklisto (Kondimana ya Sika) babongolaki maloba na Petelo oyo mazwami kati na Misala 5:30 boye: “Nzambe na batata na biso asili kosekwisa Yesu oyo bino bobomaki ye na kobakisa ye na nzete (to na libaya, engebene mabongoli ya Chouraqui, Darby, Synodale, Segond, mpe Traduction oecuménique de la Bible).” Mbala mosusu okolinga mpe kotalela ndenge nini Biblia na yo ezali kobongola liloba xulon na Misala 10:39; 13:29, na Bagalatia 3:13 mpe na 1 Petelo 2:24.

Totambola na kondima, kasi na komona te

Ata nsima na kotalela bilembo oyo bizali komonisa ete Klisto akufaki mpenza likolo na nzete, ekoki kozala ete bamosusu bazali na bango komona ata mabe moko te na kolata ekulusu. Mbala mosusu bazali kokanisa ete: “Yango ezali bobele biju.”

Kasi tobosana te ndenge nini ekulusu esalelamaki na boumeli nyonso ya Lisolo na bato-lokola elembo ya losambo na bapakano mpe bato bazalaki kobanga yango na ntina na biyambayamba. Tokoki kolata ekulusu te, ata lokola biju, mpe kolanda mbala moko toli oyo Paulo azali kopesa biso na 1 Bakolinti 10:14: “Boye balingami na ngai, bokima losambo na bikeko”.

Tokoloba boni mpo na baklisto ya solo na eleko na biso? Bango mpe, basengeli koyeba ntina ya “kokima losambo ya bikeko”, lokola Biblia ezali kotinda yango. (1 Yoane 5:21) Na miso na bango, ekulusu ezali bongo biju te oyo ebongi mpo na kolata. Koyebaka lisusu maloba oyo na Paulo: “Moto na moto oyo akakemi na nzete alakelama mabe”, bazali kolinga kotalela Yesu kati na etelemelo na ye ya nkembo lokola Mokonzi oyo asili kozwa nguya!​—Bagalatia 3:13; Emoniseli 6:2.

Atako baklisto ya solo balataka ekulusu te, bazali mpenza na botondi mingi epai na Klisto lokola apesaki bomoi na ye mpo na bango. Bayebi ete mbeka na Klisto ezali elembo kitoko ya “nguya na Nzambe” mpe ya bolingo na ye ya seko. (1 Bakolinti 1:18; Yoane 3:16) Nzokande, bazali na mposa ya eloko moko te oyo ezali komonana lokola ekulusu mpo na kosambela Nzambe ya bolingo. Na yango, na boyokani na toli ya Paulo, “bazali kotambola na kondima, kasi na komona te”.​—2 Bakolinti 5:7.

[Elilingi na lokasa 22]

Na boumeli ya bikeke, mitindo nyonso ya ekulusu ebotamaki

[Elilingi na lokasa 23]

Ekeko ya nzambe na Begreke Marsyas oyo akakemisamaki na nzete wana ezalaki ye naino na bomoi.​—Musée du Louvre, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto