“Etumba oyo ekosukisa bitumba nyonso”
‘Nazali koloba na bino ete etumba oyo ekozala etumba ya nsuka—etumba oyo ekosukisa bitumba nyonso.’—WOODROW WILSON, PREZIDA YA ÉTATS-UNIS (1913-1921).
MALOBA wana ezali komonisa elikya monene oyo mokonzi moko azalaki na yango na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, eleki lelo mbula soki 90. Etumba yango ezalaki mpenza nsɔmɔ; yango wana, baoyo balongaki balingaki ete mpasi oyo bamonaki ebota mbuma ya malamu mpo na libela. Kasi, bitumba ya bato esilisaka mpenza mikakatano te, ekoki mpe te kosilisa likambo oyo etindaka bato bábunda.
Mbula soki 20 nsima ya maloba wana oyo Prezida Wilson alobaki, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Etumba yango ebomaki bato mpe ebebisaki biloko mingi koleka oyo ya liboso. Lokola siansi ekolaki makasi na boumeli ya mbula 20 wana, bato bakómaki na makoki mingi ya koboma ebele ya bato na mbala moko. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, bakonzi ya mokili bamonaki ete bitumba mosusu ezali koya.
Na 1945, Douglas MacArthur, mokonzi moko ya basoda na États-Unis, alobaki boye: “Oyo ezalaki libaku ya nsuka ya kosilisa bitumba. Soki tozwi bibongiseli ya malamu te, Armagedona ekoyela biso.”
MacArthur ayebaki ndenge babɔmbi atomike mibale ebebisaki bingumba Nagasaki mpe Hiroshima na Japon na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Ndenge oyo babɔmbi yango ebebisaki bingumba wana etindaki ye apesa ndimbola ya sika na liloba “Armagedona.” Alobaki ete ezali etumba ya nikleere oyo ekoki koboma mokili mobimba.
Tii lelo oyo, bato bazali kobanga etumba ya nikleere oyo ekoki kosilisa bato nyɛɛ awa na mabelé. Na bambula ya 1960, bakonzi ya bikólo oyo eleki na nguya bazwaki likanisi ya kosala bibundeli ya nikleere oyo, soki bitumba ebimi kati na bikólo yango mpe basaleli bibundeli wana, bakosilisana nyɛɛ. Mokano na bango ezalaki ya kosala bamisile to kobongisa ndenge ya kotinda bamisile oyo ekoki koboma bato ebele (25 %) mpe baizine mingi koleka (50 %) ya banguna, na ngámbo nyonso oyo etumba ekoki kobanda. Bato moke kaka nde bamonaki ete wana ezali lolenge malamu ya kotya kimya na mokili.
Lelo oyo, bibundeli ya nikleere ezali se kobakisama, mpe bitumba ezali kokoba koboma ebele ya bato oyo motángo na bango ekoki kotángama te na bikólo mpe mikili ndenge na ndenge. Bato bazali kobanga ete etumba ya nikleere oyo ekoki kosilisa bato ekoki kobima lelo to lobi. Atako bazali na mposa ete bitumba esila, bato oyo bakanisaka ete etumba to mayele mosusu ekoki kokokisa mokano yango bazali mingi te.
Nzokande, Biblia elobeli etumba ya ndenge mosusu oyo ekosukisa bitumba nyonso. Ebengi yango etumba ya “Armagedona”—oyo bato mingi bakanisaka ete ezali etumba ya nikleere oyo ekoboma mokili mobimba. Ndenge nini Armagedona ekosukisa bitumba? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Fɔtɔ ya DTRA
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Engumba Nagasaki, na Japon, na 1945: Fɔtɔ ya USAF