Oyebaki yango?
Mpo na nini Yesu abikisaki mokufi miso mokemoke?
Na Malako 8:22-26, Biblia elobi ete Yesu abikisaki moto moko oyo akufá miso na mboka Betesaida. Lisolo yango elobi ete Yesu atyaki moto yango naino nsoi na miso mpe na nsima atunaki ye soki azali komona. Eyano ya moto yango emonisaki ete azalaki komona malamu te: “Nazali komona bato, mpo nazali komona biloko moko lokola banzete, kasi ezali kotambola.” Na nsima, Yesu asimbaki lisusu miso ya moto yango, mpe nini esalemaki? “Moto yango amonaki polele, mpe abikaki, mpe azalaki komona eloko nyonso ndenge yango ezali mpenza.” Emonani polele ete Yesu abikisaki moto yango mokemoke. Mpo na nini?
Biblia epesi mpenza te eyano na motuna wana, kasi tótalela likanisi moko oyo ekoki komonisa biso ntina oyo asalaki bongo. Soki miso ya moto ezalaki komona te banda bambula, to mpe banda abotamá, komona mpo na mbala ya liboso ezali mbongwana monene. Na ndakisa, kala bato bazalaki kokita na bampunda na nse ya mabelé mpo na koluka na yango mabanga ya ntalo. Lokola bampunda yango emesanaki na molili, ntango babimi na yango libándá, ezalaki kosɛnga mokolo mobimba mpo emesana lisusu na kongɛnga ya moi. Nzokande, soki moto akufaki miso, ekosɛnga ntango molai lisusu koleka mpo na komesana. Lelo oyo, minganga bazali ntango mosusu kolonga kosalisa bato oyo bakufá miso bámona lisusu. Kasi, mbala mingi bato yango babulunganaka ntango miso na bango emoni ebele ya makambo na mbala moko. Komona mbala moko ebele ya biloko ya langi mpe lolenge ekeseni, ebulunganisaka bango mpe bayebaka lisusu te ata biloko oyo bamesanaki komona. Nsima ya mwa ntango, bɔɔngɔ na bango ekómaka koyeba biloko oyo miso na bango ezali komona.
Ndenge Yesu abikisaki miso ya moto wana mokemoke emonisi ete amityaki mpenza na esika na ye. Nsukansuka, moto yango “azalaki komona eloko nyonso ndenge yango ezali mpenza” mpe koyeba yango.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, mpo na nini kotánga rulo ezalaki mosala monene?
Mbala mingi, nkasa oyo bazalaki kosala na yango rulo ezalaki na bolai ya santimɛtrɛ 23 tii 28 mpe na bonene ya santimɛtrɛ 15 tii 23. Bazalaki kokangisa bansɔngɛ ya nkasa yango na kole to kotonga yango na nsinga. Ntango mosusu, bazalaki kosalela nkasa ya milai. Rulo ya Mbu ekufá ya Yisaya ezalaki na biteni 17 ya mposo ya nyama, mpe eteni oyo etikalá lelo oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ 7. Ekoki kozala ete rulo ya Yisaya oyo Yesu atángaki na sinagoga ya Nazalete ezalaki molai ndenge moko na yango.—Luka 4:16, 17.
Na buku na ye (Discoveries From the Time of Jesus), Alan Millard alobi boye: “Motángi azalaki kosimba mokanda [rulo] mpe kofungola yango na lobɔkɔ na ye ya mwasi, mpe azalaki kosimba nsuka na yango na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe kolínga yango wana azali kotánga molɔngɔ mokomoko. Mpo na kokóma na Yisaya 61, mokapo oyo atángaki na sinagoga, Yesu asengelaki kofungola mpe kolínga lisusu eteni monene ya rulo yango.”
Na ntango wana, mokanda ya Yisaya ekabolamaki te na mikapo mpe bavɛrsɛ ndenge ezali lelo. Ntango bapesaki Yesu rulo ya Yisaya na sinagoga ya Nazalete, asengelaki koluka esika oyo Yisaya 61:1, 2 ezali na Babiblia na biso lelo oyo. Yesu “akutaki esika” yango kozanga mokakatano; yango emonisi ete amesanaki mpenza na Liloba ya Nzambe.