Biblia ebongolaka bato
Nini ebongolaki elenge moko ya Mexique oyo azalaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu oyo babengi Basatana ya mike mpo akóma moto malamu, oyo alingá mosala? Mpo na nini mwasi moko na Japon oyo azalaki na mbongo mingi atikaki komipesa mobimba na koluka bomɛngo, mpe azali komiyoka ndenge nini na mbongwana oyo asalá? Nini etindaki moto moko ya Russie oyo azalaki kotɛka mindoki atika mombongo wana ya mabe oyo ezalaki kopesa ye mbongo ebele? Tóyoka bango.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: ADRIAN PEREZ
MBULA: 30
EKÓLO: MEXIQUE
BOMOI NA YE YA KALA: ELENGE YA MOBULU
NDENGE NAZALAKI: Ntango nazalaki na mbula soki 13, libota na biso mobimba ekendaki na engumba Ecatepec de Morelos, na etúká ya Mexico. Na ntango wana, engumba yango etondaki na bilenge ya mobulu, ya moyibi mpe ya bamɛli bangi. Mosika te, ngai mpe nabandaki kolangwa masanga, kokɔtela bato na bandako mpe kosala pite.
Na nsima, tozongaki na engumba Saint Vincent, epai nabotamaki. Nzokande, kuna mpe bato bakómaki komɛla bangi mingi. Bibembe ya bilenge ezalaki komonana mpambampamba na babalabala. Nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu oyo babengi Basatana ya mike. Tozalaki koyiba mpe komela bangi. Mbala mingi, nazalaki koyeba te ndenge nazalaki kokóma na ndako, mpe mbala mosusu nazalaki kolala na balabala. Baninga mosusu bakɔtaki bolɔkɔ mpo bayibaki mpe babomaki.
Atako nazalaki moto mabe, nazalaki kondimela Nzambe. Mpo na kokunda mabe na ngai, nazalaki kosangana na milulu ya losambo, na ndakisa kotambola na nzela ya kuruze na boumeli ya Pɔsɔ Mosantu. Na nsima, biso nyonso, ná moto oyo azwaki esika ya Klisto, tozalaki kosukisa molulu yango na komɛla mpe kolangwa.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nakómaki na mbula soki ntuku mibale, nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nayebaki ete bomoi na ngai ezalaki mpenza na ntina te mpe nayebaki ete soki nalandi kaka nzela wana, ekosukela ngai mabe. Eloko esimbaki mpenza motema na ngai ezali makanisi oyo ezali na Bagalatia 6:8: “Moto oyo azali kolona mpo na mosuni na ye akobuka libebi uta na mosuni na ye, kasi moto oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko uta na elimo.” Mokapo wana esalisaki ngai namona ete soki nalingi bomoi na ngai ebonga, esengeli nalonaka mpo na bomoi oyo ekoya.
Ntango nazalaki koyekola Biblia, nakómaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya bomoi mpe azali mpenza komibanzabanza mpo na ngai, mpe azali pene mpo na kolimbisa masumu na ngai ya kala. Namonaki ngai moko ete ayokaka mabondeli mpe ayanolaka na yango.
Ezalaki pɛtɛɛ te nabongola bomoi na ngai. Kotika baninga na ngai wana ya mobulu ezalaki mpe pɛtɛɛ te. Ezalaki na bisika mosusu oyo nakokaki koleka te atako nazalaki lisusu te na etuluku ya bilenge ya mobulu. Ntango mosusu, nazalaki kokima baninga na ngai ya kala mpo bakokaki koluka ngai mpo na kozongisa ngai na bomoi wana ya mabe.
Nzokande, ntango nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi, namonaki ete lisangá mobimba ezali na mɔtɔ mpe bolingo. Nasepelaki mpo namonaki ete bato yango bazali na kondima makasi mpe basalelaka makambo oyo bateyaka. Esika yango ekesanaki mpenza na bisika nyonso oyo namesanaki kozala.
MATOMBA OYO NAZWI: Esali sikoyo mbula zomi banda nazwá batisimo mpe nakómá Motatoli ya Yehova. Nazali kosala makasi mpo na kosalela mateya ya Biblia na bomoi na ngai. Litomba oyo nazwi ezali ete libota na ngai ezali kopesa ngai limemya. Sikoyo bayebi ngai lokola mosali ya molende, mpe nasungaka bango. Mama na ngai mpe akómaki koyekola Biblia mpe lelo oyo akómá Motatoli ya Yehova. Tata na ngai azali mpe kobongola bomoi na ye. Bato mingi ya libota na ngai bazali Batatoli ya Yehova te, kasi nsima ya komona mbongwana oyo ngai nasali, bazali kondima ete Biblia ekoki kobongola moto.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: YAYOI NAGATANI
MBULA: 50
EKÓLO: JAPON
BOMOI NA YE YA KALA: MWASI YA MOMBONGO
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na engumba moko oyo etondi na bato ya boboto. Tata azalaki na magazini moko ya monene na vilɛ mpe azalaki na basali zomi. Ndako na biso ezalaki mosika te na magazini yango, yango wana atako tata ná mama bazalaki na mosala mingi, nazalaki komona te ete nazali ngai moko.
Nazali yaya na libota ya bana misato ya basi mpe banda bomwana, tata ná mama bazalaki kolakisa ngai ndenge ya kosimba mombongo ya libota. Nabalaki ntango nazalaki naino mwana moke. Mobali na ngai atikaki mosala na ye na banki mpe ayaki kosala na magazini ya libota na biso. Tobotaki bana misato, oyo tolandisaki kolandisa. Lokola ngai nazalaki kosala na magazini kobanda ntɔngɔ tii butu, mama azalaki kobatela bana mpe kosala misala ya ndako. Atako bongo, tozalaki kozanga te ntango ya kolekisa elongo na kati ya libota.
Na nsima, mbongo ezalaki lisusu komonana te mpe biloko ezalaki lisusu kotambola te. Yango wana, tomonaki malamu tófungola magazini moko ya biloko ya kobongisa bandako pene na balabala moko ya monene. Mokolo moko liboso ya molulu ya kobanda kotonga magazini yango, maladi moko ya bɔɔngo ebwakaki tata, oyo azalaki prezida ya kompanyi na biso. Azalaki lisusu koloba te, mpe mokumba ya kotambwisa magazini wana ya sika ekómaki na motó na ngai. Mobali na ngai atikalaki na magazini oyo ya kala. Tokómaki na mosala mingi.
Magazini na biso ya sika ezalaki mpenza kofuta. Nazalaki kosepela mingi na ndenge mombongo yango ezalaki kotambola, mpe nazalaki lisusu kolala mingi te kaka mpo na mosala. Atako nazalaki kolinga bana na ngai, makanisi na ngai nyonso ezalaki kaka na mosala. Nazalaki na ntango mpenza te ya kosolola na mobali na ngai, mpe soki tosololi, tozalaki kaka koswana. Mpo na kokima mitungisi, nakómaki kobima butu nyonso mpo na kokende komɛla ná baninga na ngai ya mosala mpe baninga mosusu. Mosala natikalaki na yango ezalaki kaka kosala, komɛla mpe kolala. Nazalaki na mbongo, kasi ntango nyonso nazalaki na esengo te mpe nazalaki koyeba te ntina nazangaki esengo.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, bavɛrsɛ misato ya Biblia esimbaki mpenza motema na ngai. Natangisaki mpisoli ntango nakangaki ntina ya Matai 5:3 oyo elobi ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” Vɛrsɛ yango esalisaki ngai nayeba ntina oyo nazalaki koyoka lokola nazangi eloko moko atako nazalaki na mbongo mpe baninga na ngai bazalaki kokumisa ngai. Namonaki ete nakoki mpenza kozala na esengo kaka soki nayebi bobola na ngai ya elimo mpe nakokisi mposa yango.
Na nsima, nkita ya ekólo Japon ekitaki makasi, mpe namonaki bosolo ya maloba ya 1 Timote 6:9 epai ya baninga na ngai: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.” Namonaki ete maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:24, “Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo,” ebongi mpenza mpo na ngai mpe nazwaki ekateli ya kobongola makambo mosusu na bomoi na ngai.
Namonaki ete nazalaki lisusu kokipe baboti, mobali mpe bana na ngai malamu te. Emonanaki mpe ete nakómaki na bizaleli mabe. Nakómaki lofundo. Nazalaki makambo makasimakasi. Mpe nazalaki kosilika mpambampamba. Na ebandeli, nakanisaki ete ekozala mpasi nabongwana mpe nakóma moklisto. Kasi, nazalaki mpenza kolinga bana na ngai mpe namonaki ete ntango nazali kosalela toli ya Biblia na libota na ngai, bana bazalaki mpenza koyokela ngai. Nazalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango mpe kokende na bango na makita ya lisangá.
MATOMBA OYO NAZWI: Koyeba ntina ya bomoi, kozala na likoki ya kosalela Nzambe mpe kozala na bomoi oyo ezali kosepelisa ye epesi ngai esengo ya solosolo. Natyaka lisusu te mosala liboso ya libota na ngai, mpe bakómá kopesa ngai lokumu oyo nazalaki na yango liboso.
Ntango mama amonaki ndenge Biblia ebongolaki bomoto na ngai, abandaki koyekola Biblia mpe akómaki moklisto. Likambo ya esengo, ezala tata na ngai to mobali na ngai, moko te atɛmɛlaki biso. Ngai ná bana na ngai tokómá koyokana makasi mpe nazali sikoyo na esengo monene na kati ya libota na ngai.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: MIKHAIL ZUYEV
MBULA: 51
EKÓLO: RUSSIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTƐKI YA BIBUNDELI
NDENGE NAZALAKI: Mboka na ngai, Krasnogorsk, ezali na bazamba kitokokitoko. Ebale Moskova eleki na sudi ya engumba yango. Na wɛsti mpe na nɔrdi, bakartye mingi ezali na pembeni ya zamba.
Ntango nazalaki elenge, nazalaki kolinga bitumba ya makɔfi mpe kosakana na mindoki. Nazalaki kolekisa ntango mingi na koyekola bitumba. Nazalaki mpe kosala bibundeli ya mabe, lokola mindoki ya makasi, babɔmbi mpe bambeli. Nsukansuka, yango ekómaki mosala oyo nazalaki kobikela. Nazalaki kosala mosala na ngai ngulungulu te mpe biloko yango, oyo nazalaki kotɛkela bato mabe, ezalaki mpenza kotambola.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na ebandeli ya bambula ya 1990, nakutanaki na Batatoli ya Yehova, kasi na ebandeli nandimaki bango te. Ndenge ngai namonaki, bazalaki kolekisa ndelo na mituna na bango.
Mokolo moko, moko na bango atángelaki ngai Baloma 14:12: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.” Nazalaki komituna soki nakoyebisa Nzambe nini. Vɛrsɛ wana etindaki ngai naluka koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga ngai.
Nasalaki makasi nasalela toli ya Biblia oyo ezali na Bakolose 3:5-10: “Bóboma binama ya nzoto na bino oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato, oyo ezali losambo ya bikeko. Ezali mpo na makambo wana nde nkanda ya Nzambe ezali koya. . . . Bólongola yango nyonso epai na bino, nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino. Bólobanaka lokuta te. Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika.”
Ezalaki mpasi mpo na ngai kosala bambongwana yango. Bato oyo nazalaki kotɛkela mindoki bakobaki kopesa ngai mbongo mpo na bibundeli, mpe ezalaki mpasi nakanga motema ntango bato bazalaki kofinga ngai. Atako bongo, nabebisaki bibundeli na ngai nyonso. Ntango nayebaki ete Nzambe ná Klisto balingaka ngai, yango etindaki ngai mpe nalinga bango. Nakobaki koyekola Biblia, koyangana na makita ya lisangá mpe kobondela Nzambe mpo asalisa ngai.
MATOMBA OYO NAZWI: Malɛmbɛmalɛmbɛ, na mpiko nyonso mpe na lisalisi ya bandeko baklisto, nakómaki na etamboli ya malamu. Koyeba ete Yehova Nzambe akipaka mokomoko na biso, ata mpe bato oyo bakufá, epesaka ngai esengo. (Misala 24:15) Nasepelaka mpenza na bosembo oyo namonaka epai ya Batatoli ya Yehova. Mpe nazali na botɔndi na ndenge batyelaki ngai likebi mpe na ndenge bazali sembo epai ya Nzambe.
Na ebandeli, bandeko mpe baninga na ngai mosusu baboyaki nakóma Motatoli ya Yehova. Kasi, balobaki ete ezali malamu kutu namipesa na makambo ya Nzambe na esika ya makambo ya mobulu. Nazali na esengo mpo namipesaka lisusu te na mosala ya kotɛka bibundeli, kasi namipesaka nde na kosalisa basusu báyeba Nzambe ya kimya.
[Elilingi na lokasa 27]
Nazalaki kosangana na milulu ya Lingomba ya Katolike mpo na kokunda mabe na ngai
[Elilingi na lokasa 28]
Nazalaki na mbongo mingi, kasi nazangaki esengo