Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/8 lok. 29
  • Ozali koyeba lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali koyeba lisusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tel Arad endimisi bosolo ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali nini?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • “Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/8 lok. 29

Ozali koyeba lisusu?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:

• Mokakatano nini baklisto mosusu bakutanaka na yango nsima ya kobalana, mpe bakoki kosala nini mpo na kolonga yango?

Baklisto mosusu bamonaka ete babalanaki na moto oyo abongi na bango te. Lokola baklisto yango bayebi ete koboma libala mpo na bantina oyo Biblia endimi te ezali mabe, basengeli kosala makasi mpo na kobatela libala na bango.​—15/4, lokasa 17.

• Mikakatano nini moklisto oyo akei kofanda na ndako ya mibange akoki kokutana na yango?

Ndako yango ekoki kozala na teritware ya lisangá moko oyo ameseni na yango te. Akoki kozala elongo na bato oyo basambelaka Yehova te mpe bato yango bakoki koluka kokɔtisa ye na makambo ya mangomba mosusu. Bandeko ya libota ya mobange oyo bazali Batatoli mpe bandeko ya lisangá oyo ezali na teritware ya ndako ya mibange basengeli koyeba mikakatano yango mpe kosunga mobange yango.​—15/4, nkasa 25-27.

• Wapi matambe minei oyo ekoki kosalisa babalani básilisa mikakatano?

Basengeli koponaka ntango mpo na kolobela likambo oyo ebimi. (Mos. 3:1, 7) Basengeli komonisaka makanisi na bango na bosembo mpe na limemya. (Ef. 4:25) Moto na moto asengeli koyokaka molongani mpe kolukaka koyeba ndenge oyo azali komiyoka. (Mat. 7:12) Basengeli koyokana likambo oyo bakosala mpe kosala na bomoko. (Mos. 4:9, 10)—1/5, nkasa 10-12.

• Banyongo nini Yesu alobelaki ntango alendisaki biso tósɛngaka Nzambe alimbisa banyongo na biso?

Soki tokokanisi Matai 6:12 mpe Luka 11:4 tokomona polele ete banyongo oyo Yesu alobelaki ezali ya mbongo te. Yesu azalaki kokanisa na masumu. Tosengeli kolimbisaka basusu ndenge Nzambe alimbisaka biso na motema moko.​—15/5, lokasa 9.

• Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basalaka na bakomite nini?

Basalaka na Komite ya batambwisi; Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele; Komite ya kobimisa mikanda; Komite ya mosala ya kosakola; Komite ya mateya; Komite ya bokomi.​—15/5, lokasa 29.

• Nini ekoki kondimisa biso ete Mpela ya ntango ya Noa ezindisaki mokili mobimba?

Yesu azalaki kondima ete Mpela esalemaki mpe ezindisaki mokili mobimba. Biblia epesi biso makebisi na kolanda makambo oyo esalemaki na Mpela.​—1/6, lokasa 8.

• Etamboli oyo elobelami na Baloma 1:24-32 etalelaki Bayuda to bato oyo bazalaki Bayuda te?

Makambo yango ekokaki kotalela bituluku yango mibale; kasi ntoma Paulo azalaki kolobela Bayisalaele ya kala oyo, na boumeli ya bankama ya bambula, bazalaki lisusu kotosa Mibeko te. Bayebaki mibeko ya boyengebene ya Nzambe, kasi bazalaki kotosa yango te.​—15/6, lokasa 29.

• Tel Arad ezali wapi, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi?

Bitika ya Alada, engumba ya kala ya Yisalaele, ezali na wɛsti ya Mbu Ekufá. Na esika yango, bakundolaki ebele ya biteni ya bambɛki oyo bazalaki kokoma likoló na yango. Bambɛki yango mosusu ezali na bankombo oyo ezali mpe na Biblia, mpe emonisi ete nkombo ya Nzambe ezalaki kosalelama na mikanda.​—1/7, nkasa 23-24.

• Mpo na nini komityela mikano oyo ekoki na biso ekoki kobakisa esengo na biso?

Soki tomityeli mikano oyo eleki biso mpe tozali kobunda kokokisa yango, tokomilukela mikakatano ya mpamba. Atako bongo, tosengeli kozala gɔigɔi te, elingi koloba tólɛmbisa mabɔkɔ te na mosala ya Bokonzi mpo tozali na bolɛmbu boye to boye.​—15/7, lokasa 29.

• Makambo nini ekoki kopekisa baboti básolola malamu na bana na bango oyo bakómi bilenge?

Ekoki kozala ete elenge azali nsɔninsɔni; to akómi koluka bonsomi, to mpe alingi te ete bato mosusu báyeba makambo ya bomoi na ye. Baboti bakoki koluka kosolola na elenge yango na mabaku ndenge na ndenge mpe kosala makasi básosola makanisi oyo ebombami nsima ya maloba na ye.​—1/8, nkasa 10-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto