“Kobosana ata mokolo moko te mosala ya kosakola ndako na ndako”
Lisolo ya Jacob Neufeld
“Ata soki likambo nini ekómeli yo, kobosana ata mokolo moko te mosala ya kosakola ndako na ndako.” Nazalaki kokanisa maloba yango wana nazalaki kokende na mboka moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ mitano na esika oyo nazalaki kofanda. Ntango nakómaki kuna, nazalaki kobanga kokende na ndako ya liboso mpo na kosakola. Na nsima, nakendaki na mwa zamba moko mpe nabondelaki Nzambe na etingya ete apesa ngai makasi ya kosakola. Nsukansuka, nazwaki makasi ya kozonga na ndako ya liboso mpe nayebisaki bato nsango oyo namemaki.
NINI ememaki ngai na mboka yango ya Paraguay, epai nakendaki kosakola ngai moko? Tiká nabɛtela bino lisolo na ngai banda na ebandeli. Nabotamaki na sanza ya Novɛmbɛ 1923 na Kronstalʹ, mboka moko ya ekólo Ukraine, epai etuluku moko ya bato ya Allemagne oyo bazalaki na Lingomba ya Ba-Mennonite bazalaki kofanda. Na nsuka ya bambula ya 1 700, Ba-Mennonite bautaki na Allemagne mpe bakendaki kofanda na Ukraine; kuna, bapesaki bango bonsomi ya kosala makambo mingi, na ndakisa bonsomi ya kosambela (kasi ya koluka bandimi ya sika te), ya kopona bakambi na bango, mpe ya kokɔta te na mosala ya soda.
Nzokande, ntango Bakoministe bazwaki bokonzi, balongolaki bango bonsomi nyonso wana. Na nsuka ya bambula ya 1920, baferme minene ya Ba-Mennonite ekómaki na mabɔkɔ ya Leta. Moto nyonso oyo aboyi kolanda bibongiseli ya Leta azalaki kozwa biloko ya kolya te, mpe soki moto atomboki, bazalaki kopesa ye etumbu ya makasi. Na bambula ya 1930, basoda ya KGB bazalaki kokanga mibali, mingimingi na butu, mpe nsukansuka na bamboka mingi, mibali bazalaki lisusu mingi te. Ezali na ndenge yango nde na 1938, wana nazalaki na mbula 14, tata na ngai abungaki mpe natikalá lisusu koyoka nsango na ye te. Mbula mibale na nsima, bakangaki mpe yaya na ngai ya mobali.
Na 1941, basoda ya Hitler bakɔtaki na Ukraine. Tomonaki ete tolongwe na boombo ya Bakoministe. Nzokande, mabota 8 ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na mboka na biso balimwaki na mbalakaka. Makambo yango nyonso ezalaki kotinda ngai namituna mituna mingi. Mpo na nini makambo ya ndenge wana esalemaki?
Bosembo ebikisi bomoi na ngai
Na 1943, basoda ya Allemagne balongwaki na Ukraine, mpe bamemaki mabota nyonso ya bato ya Allemagne—ata mpe libota na biso—mpo na kosunga ekólo na biso oyo ezalaki na etumba. Na ntango yango, nasilaki kokɔta na mosala ya soda, na etuluku oyo bazalaki kobenga SS, mpe batindaki ngai na Roumanie. Likambo moko oyo esalemaki na ntango yango ebikisaki bomoi na ngai.
Kapitɛni ya etuluku na biso alukaki koyeba soki nazali moto ya sembo. Atindaki ngai nakende kotika sokoto na ye epai basukolaka bilamba. Nzokande, atyaki mbongo na libenga moko, mpe namonaki yango. Ntango nazongiselaki ye yango, alobaki ete atikaki eloko te na sokoto na ye. Nayebisaki ye ete namoni yango mpenza na libenga ya elamba na ye. Mwa moke na nsima, nakómaki sekrɛtɛrɛ na ye mpe nakómaki kobongisa mikanda, kopona basoda oyo basengeli kokɛngɛla, mpe kobatela mbongo.
Mokolo moko na butu, basoda ya Russie bakangaki basoda nyonso ya etuluku na biso; kasi bamonaki ngai te mpo natikalaki kosala mosala moko oyo kapitɛni apesaki ngai. Bosembo na ngai esalaki ete kapitɛni apesa ngai mokumba wana mpe yango ebikisaki ngai ntango bayaki kokanga basoda mosusu. Soki te, ngai mpe nalingaki kokangama.
Na yango, na 1944, nazwaki ndingisa ya kotika mosala ya soda tii ntango bakozala lisusu na mposa na ngai. Nazongaki na mboka na biso kotala mama. Wana nazalaki kozela ete bábenga ngai lisusu na mosala ya soda, nakómaki koyekola mosala ya masɔ, mpe bambula mingi na nsima, mosala yango esungaki ngai. Na sanza ya Aprili 1945, basoda ya États-Unis bakɔtaki na engumba na biso oyo ezalaki pembeni ya engumba Magdebourg. Sanza moko na nsima, balobaki ete etumba esili. Biso tobikaki. Tomonaki ete tolingi kokóma na bomoi ya malamu.
Mokolo moko na sanza ya Yuni, moto oyo azalaki kopesa nsango apesaki liyebisi oyo, “Basoda ya États-Unis balongwaki na butu, mpe basoda ya Russie bakokóma awa lelo na 11h00.” Tolɛmbaki nzoto ntango tomonaki ete tokozonga na nse ya boyangeli ya Bakoministe. Na mbala moko, ngai ná mwana ya tata-leki na ngai tozwaki bibongiseli mpo na kokima. Na katikati ya eleko ya molunge, tokatisaki na ngámbo oyo ezalaki na mabɔkɔ ya basoda ya États-Unis. Na sanza ya Novɛmbɛ, nsima ya kolonga mikakatano mpe makama minene, tozongaki na ngámbo oyo ezalaki na mabɔkɔ ya basoda ya Russie, mpe na ndenge ya kobombana, tozwaki bandeko ya libota na biso mpe tokatisaki na ngámbo mosusu.
“Yokáká malamu, mpe lukáká bokeseni”
Tokómaki kofanda na Allemagne ya Wɛsti. Mwa moke na nsima, nakómaki kosepela na Biblia mingi. Mikolo nyonso ya lomingo, nazalaki kokende na zamba mpo na kotánga Biblia, kasi nazalaki kokanga ntina ya makambo yango te mpe nazalaki komona yango lokola makambo ya kala mpenza. Nazalaki mpe kokende malongi mpo na kozwa batisimo na Lingomba ya Ba-Mennonite. Nakamwaki makasi ntango namonaki na buku ya malongi maloba: “Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo santu azali Nzambe,” mpe motuna oyo: “Ezali nde na Banzambe misato?” Eyano ezalaki na nse ete: “Te, bango nyonso misato bazali moko.” Natunaki pastɛrɛ moko soki yango elimboli nini. Alobaki na ngai ete, “Mwana, esengeli te kokanisa mingi na makambo wana; bato mosusu babɛlá ligboma mpo balukaki kokanisa mingi na makambo yango.” Na mbala moko, nazwaki ekateli ete nakozwa lisusu batisimo te.
Mwa mikolo na nsima, nayokaki mopaya moko azali kosolola na mwana ya tata-mwasi na ngai. Napusanaki mpo na kolanda lisolo na bango, mpe natunaki mwa mituna. Na ntango wana nayebaki te ete mopaya yango ezali Erich Nikolaizig, moko na bato oyo babikaki na kaa ya bakangami ya Wewelsburg. Atunaki ngai soki nalingi koyeba Biblia. Ntango nandimaki, alobaki ete akosalela kaka Biblia na ngai moko mpo na komonisa makambo nyonso oyo akoteya ngai.
Mwa moke na nsima, Erich abengisaki ngai na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova; nakanisi ete ezalaki moko ya mayangani ya liboso mpenza oyo basalaki nsima ya etumba. Nasepelaki mingi mpe nazalaki kokoma bavɛrsɛ nyonso oyo balobi bazalaki kotánga mpe kolobela. Na nsima, namonaki ete koyeba mateya ya Biblia ememaka mikumba; yango wana, namonaki ete nasengeli kotika koyekola. Nazalaki mpe kondima mpenza te ete lingomba ya solo ezali kaka moko. Ntango Erich amonaki ete nazwaki ekateli ya kozonga na lingomba na ngai ya kala, apesaki ngai toli ete, “Yokáká malamu, mpe lukáká bokeseni.”
Nasololaki kaka mbala mibale na bapastɛrɛ ya lingomba na biso mpe namonaki mbala moko ete bango moko bazalaki kokanga ntina te ya makambo oyo bazalaki koloba mpe ete bayebaki mateya ya solo ata moke te. Nakomaki mikanda epai ya bakonzi ndenge na ndenge ya lingomba mpo na kotuna bango mituna ya Biblia. Moko na bango azongiselaki ngai ete, “Ozali na ndingisa te ya koyekola Biblia mpo obotami lisusu te.”
Elenge mwasi oyo nalingaki kobala asɛngaki ngai nazwa ekateli moko ya mpasi. Azalaki mondimi ya Lingomba ya Ba-Mennonite oyo balobaka ete babotamá lisusu. Lokola baboti na ye bazalaki koyina Batatoli ya Yehova, batindaki ye ayebisa ngai ete soki natiki Lingomba ya Batatoli ya Yehova te, nakobala ye te. Na ntango wana, nasilaki kokanga ntina ete makambo oyo nazalaki koyekola ezali solo na boye ete nazwaki ekateli ya malamu—nandimaki tókabwana.
Mwa moke na nsima, Erich ayaki lisusu kotala ngai. Ayebisaki ngai ete na pɔsɔ ekoya bato bakozwa batisimo mpe atunaki ngai soki nalingi kozwa batisimo. Namonaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo, mpe nalingaki kokóma mosaleli ya Yehova Nzambe. Nandimaki mpe nazwaki batisimo na kati ya baignoire moko na sanza ya Mai 1948.
Mwa moke na nsima, libota na biso mobimba bazwaki mokano ya kokende kofanda na Paraguay, na Amerika ya Sudi mpe Mama abondelaki ngai nakende na bango elongo. Nazalaki kokakatana mpamba te nazalaki na mposa ya koyekola makambo mingi ya Biblia mpe kozwa formasyo. Ntango nakendeki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Wiesbaden, nakutanaki na Ndeko August Peters. Ayebisaki ngai ete nasengeli kobosana te ete nazali na mokumba ya kosalisa libota na ngai. Apesaki ngai mpe toli oyo: “Ata soki likambo nini ekómeli yo, kobosana ata mokolo moko te mosala ya kosakola ndako na ndako. Soki obosani yango, okozala kaka lokola bandimi ya mangomba mosusu.” Tii lelo, nayebaka ete toli yango ezalaki malamu mingi mpe namonaka ete ezali na ntina nasakolaka “ndako na ndako.”—Misala 20:20, 21.
“Mosakoli moko ya lokuta” na Paraguay
Mwa moke nsima ya lisolo wana na August Peters, nazwaki masuwa mpo na kokende na Amerika ya Sudi elongo na bandeko na ngai. Tokitaki na etúká ya Gran Chaco, na Paraguay; kuna mpe tofandaki na kati ya Ba-Mennonite. Nsima ya pɔsɔ mibale, nasalaki mobembo oyo nalobelaki na ebandeli; nakendaki na mboka moko ya pembeni kaka ngai moko mpo na kosakola. Nsango epanzanaki nokinoki ete “mosakoli moko ya lokuta” azali na kati ya bato oyo bayei sika.
Na ntango yango, mosala ya masɔ oyo nayekolaki esalisaki ngai mingi mpenza. Mabota nyonso ya bapaya bazalaki na mposa ya ndako, mpe bazalaki kotonga yango na babriki mpe na likoló bazalaki kozipa yango na ndɛlɛ. Na boumeli ya sanza 6, nazalaki kotongela bato mingi bandako, mpe mbala mingi nazalaki kopesa litatoli na libaku malamu. Bato bazalaki kopesa ngai limemya na ntango nazali kotongela bango ndako; kasi, soki kaka nasilisi, bazalaki lisusu kolinga kokutana na ngai te.
Na eleko yango, bamasuwa ezalaki koya na ebele ya Ba-Mennonite mosusu oyo bazalaki kouta na Allemagne. Kati na bango, ezalaki na Katerina Schellenberg, elenge mwasi moko oyo asololaki mwa moke na Batatoli mpe amonaki mbala moko ete bazali na lingomba ya solo. Atako azwaki naino batisimo te, na kati ya masuwa, azalaki koyebisa bato ete azali Motatoli ya Yehova. Mpo na yango, baboyaki ye azala esika moko na bato mosusu oyo bautaki Allemagne. Batikaki ye na Asunción, engumba-mokonzi ya Paraguay; kuna, akómaki mwana-mosala, ayekolaki monɔkɔ ya Espagnol, alukaki Batatoli, mpe azwaki batisimo. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1950, nabalanaki na elenge mwasi yango ya mpiko. Apesaki ngai mabɔkɔ mpe asalisaki ngai mingi na makambo nyonso oyo tokutanaki na yango.
Nazalaki kobomba mbongo mpe na mwa ntango moke, ekokaki mpo na kosomba sharɛti moko mpe bampunda mibale. Nazalaki kosalela yango na mosala ya kosakola mpe ntango nyonso nazalaki kokanisa toli ya Ndeko Peters. Na ntango yango, leki na ngai ya mwasi, oyo akómaki mpe Motatoli, ayaki kofanda na ndako na biso. Mbala mingi, tozalaki kolamuka na 4h00 ya ntɔngɔ, tozalaki kosala mobembo ya ngonga 4, na nsima tozalaki kosakola ngonga 2 to 3, mpe na nsima tozalaki kozonga na ndako.
Natángaki na mikanda na biso ete lisukulu ya bato nyonso esalemaka na lisangá; yango wana ngai mpe nazwaki bibongiseli mpo na kosala yango. Ntango nazalaki na Allemagne, nakendaki na makita ya lisangá ata mbala moko te; yango wana, nakanisaki kaka ndenge esengeli kosalema mpe nalobelaki Bokonzi ya Nzambe. Bato 8 bayaki na likita yango mpe mpo na yango, bapastɛrɛ ya Ba-Mennonite basilikaki. Batambolaki na bandako ya bato mpo na kozwa mikanda nyonso oyo tokabolaki, mpe koyebisa bango ete bápesaka biso lisusu mbote te.
Na nsima, babengaki ngai na biro ya bakonzi ya Ba-Mennonite mpe mokambi ya liboso ná bapastɛrɛ mibale oyo bautaki na Canada batunaki ngai mituna na boumeli ya ngonga mingi. Na nsuka, moko na bango alobaki na ngai boye, “Elenge mobali, okoki kondima mateya nyonso oyo olingi, kasi lapá ndai ete okoteya ata na moto moko te bindimeli na yo.” Nakokaki kolapa ndai ya ndenge wana te. Yango wana, bayebisaki ngai ete nasengeli kofanda lisusu na kati ya Ba-Mennonite te mpo balingaki te ete “mosakoli moko ya lokuta” azala na kati ya “bandeko ya sembo.” Ntango naboyaki, balobaki ete bakofutela libota na ngai mobimba tike mpo tólongwa wana. Naboyaki kolongwa.
Na 1953, nakendaki na liyangani moko na Asunción. Kuna, nasololaki na Nathan Knorr, ndeko oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Apesaki ngai likanisi ete naya kofanda na engumba-mokonzi mpo na kosala elongo na bamisionɛrɛ oyo bazalaki kuna, mingimingi lokola Ba-Mennonite mingi bazalaki kosepela na nsango na biso te.
Totye Bokonzi na esika ya liboso
Na ntango wana, Batatoli bazalaki kaka 35 na Paraguay mobimba. Nasololaki na mwasi na ngai mpe, atako asepelaki mpenza te na likanisi ya kokende kofanda na engumba ya monene, andimaki kobanda bomoi ya sika. Na 1954, kaka ngai elongo na mwasi na ngai Katerina totongaki ndako moko ya briki; tosalaki misala nyonso na bangonga oyo tozali na mosala te. Tozalaki kozangisa makita te, mpe tozalaki koteya bato nsango ya Biblia na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo.
Moko na mikumba na ngai ezalaki ya kokende elongo na mokɛngɛli ya zongazonga (ndeko moko oyo akendaka kotala masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa bango), nazalaki kobongola masukulu na ye ntango akei kotala bituluku ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Allemand, oyo bazalaki kofanda na Paraguay. Lokola nayebaki mwa moke monɔkɔ ya Espagnol, namonaka ete lisukulu ya liboso ya Espagnol oyo nabongolaki na monɔkɔ ya Allemand, ezalaki mokumba eleki mpasi na mikumba nyonso oyo nazwá.
Lokola mwasi na ngai abɛlaki, tokendaki kofanda na Canada na 1957. Na nsima, na 1963, tokendaki kofanda na États-Unis. Na bisika nyonso oyo tofandaki, tozalaki ntango nyonso kosala makasi ete Bokonzi ezala na esika ya liboso na bomoi na biso. (Matai 6:33) Nazali kotɔnda Yehova Nzambe na ndenge apesaki ngai libaku ya koyeba solo ya Liloba na ye Biblia, ntango nazalaki naino elenge. Formasyo oyo nazwaki na elimo esalisaki ngai na makambo mingi na bomoi na ngai!
Nazwaki libaku malamu ya kosalisa bato mosusu báyekola mateya ya solo ya Biblia oyo ebɔndisaki ngai mingi. Likambo oyo epesaka ngai esengo koleka ezali ete bana na ngai mpe bankɔkɔ na ngai bayekolaki mateya ya Biblia banda bomwana. Bango nyonso balandaka toli oyo Ndeko Peters apesaki ngai eleki bambula mingi ete, “Ata soki okutani na likambo nini, kobosana ata mokolo moko te mosala ya kosakola ndako na ndako.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Likambo oyo epesaka ngai esengo koleka ezali ete bana na ngai mpe bankɔkɔ na ngai bayekolaki mateya ya Biblia banda bomwana
[Bililingi na lokasa 21]
Katerina mpe ngai, liboso tóbalana na 1950
Ná mwana na biso ya liboso na ndako na biso na Paraguay, na 1952
[Elilingi na lokasa 23]
Libota na ngai mobimba lelo oyo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ya Keith Trammel © 2000
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Fɔtɔ ya Keith Trammel © 2000