Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 nk. 19-22
  • “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata’”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata’”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu amonisi ete Tata andimaka biso
  • Tata ya motema mawa mpenza
  • Tata na biso abatelaka biso
  • Tata na biso ya likoló apesaka biso disiplini
  • Tata na biso akokisaka bamposa na biso
  • Tópesa Tata na biso matɔndi mpo na bolingo na ye
  • Tata na biso Yehova alingaka biso mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Omonaka Yehova ete azali Tata na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Kómisá makasi bolingo na yo mpo na bandeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tata oyo akokani na mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 nk. 19-22

“Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata’”

Soki oyoki liloba “Tata,” nini eyelaka yo na makanisi? Moto moko ya bolingo, ya boboto mpe oyo akipaka libota na ye? To moto moko oyo azalaka mafumafu, ata mpe moto moko ya makambo mabe? Eyano na yo etaleli kaka bizaleli oyo tata na yo azalaki na yango.

“TATA” ezali liloba oyo Yesu asalelaki mingi ntango azalaki kosolola na Nzambe mpe koloba makambo na ye.a Ntango Yesu alakisaki bayekoli na ye kobondela, alobaki boye: “Ntango bozali kobondela, bóloba: Tata.” (Luka 11:2) Kasi, Yehova azali Tata ya ndenge nini? Eyano na motuna wana ezali na ntina mingi. Mpo na nini? Mpamba te, koyeba malamumalamu soki Yehova azali Tata ya ndenge nini ekoki kosalisa biso tópusana penepene na ye mpe tólinga ye mingi.

Moto moko te abongi mpenza mpo na koyebisa biso makambo etali Tata na biso ya likoló, longola kaka Yesu ye moko. Azalaki na boyokani makasi na Tata na ye. Yesu alobaki boye: “Moto moko te ayebi Mwana malamumalamu longola kaka Tata, mpe moto moko te ayebi Tata malamumalamu longola kaka Mwana ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” (Matai 11:27) Boye, lolenge eleki malamu ya koyeba Tata, ezali kaka na nzela ya Mwana.

Yesu akoki koteya biso makambo nini oyo etali Tata na biso ya likoló? Tótalela makambo oyo Yesu alobaki: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Maloba ya Yesu emonisi ete bolingo ezali ezaleli oyo eleki monene ya Tata na biso ya likoló. (1 Yoane 4:8) Yehova amonisaka bolingo na ye na ndenge mingi, na ndenge andimaka biso, ayokelaka biso mawa, abatelaka biso, apesaka biso disiplini mpe na ndenge akokisaka bamposa na biso.

Yesu amonisi ete Tata andimaka biso

Bana bazwaka makasi mpe mpiko ntango baboti bazali kondima bango. Kanisá naino ndenge Yesu alendisamaki ntango ayokaki Tata na ye alobi na ye boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Yesu amonisi biso ete Tata alingaka mpe andimaka biso. Alobaki boye: “Moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye.” (Yoane 14:21) Maloba oyo ezali mpenza kobɔndisa! Kasi, ezali na moto moko oyo alingi te ete ozwa libɔndisi yango.

Satana alukaka kotinda biso tókanisa ete Tata na biso ya likoló andimaka biso te. Alukaka kondimisa biso ete tobongi te mpo Nzambe andima biso. Mbala mingi, asalaka bongo ntango amoni ete tobɛli, tozali na makasi te, tokómi mibange, to ntango tolongi te kosala likambo moko boye to mpo moto moko asali biso mabe. Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko na nkombo Lucas oyo azalaki kokanisa ete Nzambe akoki kondima ye te. Lucas alobi ete baboti na ye batikaki mpenza kosalela mateya oyo bango moko bateyaki ye ntango azalaki naino elenge. Mbala mosusu, ezali mpo na yango nde Lucas amonaki ete akokoka te kosala boyokani na Tata na ye ya likoló. Lisusu, lokola Lucas azalaki motema mɔtɔmɔtɔ, mbala mingi azalaki kokutana na mikakatano, mingimingi mpo na koyokana na basusu. Kasi, mokemoke, mwasi na ye, oyo Lucas abengaka “lipamboli mpe likabo euti na Nzambe,” amoniselaki ye motema molai mpe azalaki kolendisa ye; yango esalisaki ye atika kozala motema mɔtɔmɔtɔ. Lucas andimaki mpenza ete “Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.” (1 Timote 1:15) Lucas alobi ete kokanisa malamu mpenza bolingo ya Nzambe mpe koyeba ete andimaka bato, esalisaki ye akóma na esengo mpe na kimya ya motema.

Soki na ntango mosusu ozali komituna soki Yehova akoki kolinga yo to kondima yo, kotánga mpe kokanisa malamu mpenza maloba oyo ezali na Baroma 8:31-39 ekolendisa yo. Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo amonisi ete eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.”b

Tata ya motema mawa mpenza

Tata na biso ya likoló ayokaka motema mpasi ndenge tonyokwamaka. Azali Nzambe oyo ayokelaka bato “mawa monene.” (Luka 1:78) Yesu amonisaki motema mawa ya Nzambe epai ya bato ya kozanga kokoka. (Marko 1:40-42; 6:30-34) Bakristo ya solo mpe basalaka makasi bámekola motema mawa ya Tata na bango ya likoló. Balandaka toli oyo ya Biblia: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa.”​—Baefese 4:32.

Talá likambo oyo mobali moko na nkombo Felipe akutanaki na yango. Mokolo moko, ntango azalaki kokende na mosala, ayokaki mbala moko mpasi makasi lokola batubi ye mbeli na mokɔngɔ. Bamemaki ye mbangu na lopitalo. Nsima ya ekzamɛ oyo eumelaki ngonga mwambe, minganga balobaki ete mosisa ya monene oyo ememaka makila na motema na ye ezokaki. Balobaki ete ntina ya kosala lipaso ezali te mpo akokufa nsima ya miniti 25.

Bandeko mosusu oyo basambelaka na Felipe bazalaki wana mpe mawa etindaki bango bálalisa mabɔkɔ te. Bamemaki ye nokinoki na lopitalo mosusu epai basalaki ye lipaso mpe batikalaki wana tii lipaso esilaki. Likambo ya esengo, Felipe abikaki na mpasi wana. Ntango Felipe akanisaka likambo yango, atɔndaka bandeko yango mpo bamoniselaki ye motema mawa. Kasi, Felipe andimaki ete Tata na ye ya likoló nde atindaki bandeko yango bámonisela ye motema mawa. Alobi boye: “Ezalaki lokola Nzambe, oyo azali lokola tata ya bolingo, atɛlɛmaki pene na ngai mpo na kolendisa ngai.” Ya solo, mbala mingi Yehova amonisaka motema mawa na ndenge asalaka ete basaleli na ye awa na mabele bámonisa ezaleli yango.

Tata na biso abatelaka biso

Soki mwana moko ya moke amoni likama, akimaka mbangu epai ya tata na ye mpo abatela ye. Mwana ayokaka ete abatelami na mabɔkɔ ya tata na ye. Yesu andimaki na motema mobimba ete Yehova azali mobateli na ye. (Matai 26:53; Yoane 17:15) Biso mpe tokoki kozwa libateli epai ya Tata na biso ya likoló. Libateli oyo Yehova apesaka lelo oyo ezali libosoliboso ya elimo. Na maloba mosusu, abatelaka biso na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso na ndenge apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo tókima makama mpe tóbatela boyokani na biso elongo na ye. Lolenge mosusu oyo abatelaka biso na elimo ezali na nzela ya toli oyo euti na Biblia. Ntango tozwaka toli yango, ezali lokola nde Yehova azali kotambola na nsima na biso mpe azali koloba na biso: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.”​—Yisaya 30:21.

Tótalela ndakisa ya Tiago mpe bandeko na ye ya mibali Fernando ná Rafael oyo bazalaki na etuluku ya babɛti miziki oyo babengi rock-and-roll. Basepelaki mingi ntango baponaki bango bábɛta miziki na esika moko oyo ekendá nsango na engumba São Paulo, na Brésil. Emonanaki lokola ete makambo na bango ekotambola malamu. Kasi, ndeko moko oyo asambelaka na bango akebisaki bango na likama ya kozala baninga ya bato oyo bomoi na bango ezali komonisa ete bakipaka mibeko ya Nzambe te. (Masese 13:20) Abendaki likebi na bango na toli wana ya Biblia mpe ayebisaki bango makambo oyo ye moko akutanaki na yango. Ndeko na ye moko ya mobali akómaki na etamboli ya mabe mpo na baninga mabe. Tiago ná bandeko na ye bazwaki ekateli ya kotika miziki. Lelo oyo, bango nyonso misato balekisaka ntango na bango mingi na mosala ya Nzambe. Bamonaka ete ndenge bayokaki toli ya Liloba ya Nzambe ebatelaki boyokani na bango na Nzambe.

Tata na biso ya likoló apesaka biso disiplini

Tata oyo alingaka bana na ye apesaka bango disiplini mpo alingaka ete ntango bakokola, bázala malamu. (Baefese 6:4) Tata ya ndenge wana akangaka miso te na mabe ya bana, kasi apesaka bango disiplini oyo eleki ndelo te. Ndenge moko mpe na ntango mosusu, Tata na biso ya likoló akoki komona malamu apesa biso disiplini. Kasi, ntango nyonso Nzambe apesaka biso disiplini na bolingo mpe kozanga kolekisa ndelo. Ndenge moko na Tata na ye, Yesu azalaki makambo makasi te, ata ntango bayekoli na ye basalelaki toli na ye te.​—Matai 20:20-28; Luka 22:24-30.

Talá ndenge mobali moko na nkombo Ricardo, asepelaki ndenge na bolingo nyonso, Yehova apesaki ye disiplini. Tata ya Ricardo asundolaki ye ntango azalaki naino na sanza nsambo mpamba. Ntango akómaki elenge, Ricardo azalaki komiyoka lokola mwana oyo azangá tata. Akómaki kosala makambo ya mabe, mpe lisosoli na ye ekómaki kotungisa ye. Lokola ayebaki ete makambo oyo azali kosala eyokani te na mitinda ya Biblia, azwaki ekateli ya kosolola na bankulutu ya lisangá na bango. Bankulutu bazipaki miso na mabe na ye te, kasi na bolingo nyonso bapesaki ye toli oyo euti na Biblia. Ricardo asepelaki na disiplini, kasi akobaki kotungisama makasi mpo na makambo oyo asalaki​—azalaki kolala te na butu, azalaki kolela mpe konyokwama na makanisi. Nsukansuka, ayaki komona ete ndenge oyo azwaki disiplini, emonisi ete Yehova alingaka ye kaka. Ricardo akanisaki lisusu maloba oyo ezali na Baebre 12:6 oyo elobi ete: “Yehova apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka.”

Tóbosana te ete disiplini ezalaka te kaka kopesa etumbu to kopamela moto na mabe oyo asali. Biblia emonisi ete disiplini ekokani na formasyo. Na yango, Nzambe, Tata na biso ya bolingo akoki kopesa biso disiplini na ndenge akoki kotika biso tónyokwama mwa ntango mpo na lisumu oyo tosalaki, akoki kotika biso mwa ntango tókutana na mikakatano oyo euti na mabe moko oyo tosalaki. Kasi, Biblia emonisi ete disiplini na ye epesaka biso formasyo, esalisaka biso tókoba kotambola na nzela oyo ebongi. (Baebre 12:7, 11) Ya solo, Tata na biso akipaka biso mpe apesaka biso disiplini mpo na litomba na biso.

Tata na biso akokisaka bamposa na biso

Tata ya bolingo alukaka kokokisa bamposa ya bato ya libota na ye, aleisaka bango to alatisaka bango. Yehova mpe azali bongo. Yesu alobaki ete: “Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” (Matai 6:25-34) Yehova apesi elaka oyo: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—Baebre 13:5.

Mwasi moko na nkombo Nice amonaki ete maloba wana ezali mpenza solo ntango mosala ya mobali na ye esilaki. Nice autaki kotika mosala na ye atako bazalaki kofuta ye mbongo mingi mpo na kolekisa ntango mingi elongo na bana na ye ya mike mibale ya basi mpe na mosala ya Nzambe. Sikoyo, bakobikela ndenge nini? Abondelaki Yehova. Na mokolo oyo elandi, mobali na ye azongaki na esika ya mosala mpo na kozwa biloko na ye oyo etikalaki. Akamwaki ntango patrɔ na ye ayebisaki ye ete mosala mosusu emonani mpe asɛngaki ye abanda mosala yango! Na yango, mobali ya Nice abungisaki mosala lelo, mpe lobi azwaki mosala mosusu. Nice ná mobali na ye bapesaki Tata na bango ya likoló matɔndi mpo na lipamboli wana oyo bazwaki. Likambo oyo ekómelaki bango emonisi ete Yehova, ye oyo akokisaka bamposa na biso na bolingo, abosanaka soki moke te basaleli na ye ya sembo.

Tópesa Tata na biso matɔndi mpo na bolingo na ye

Ya solo, maloba ezangi mpo na komonisa bolingo monene oyo Tata na biso ya likoló azalaka na yango! Soki tokanisi ndenge oyo amonisaka bolingo na ye lokola oyo ya tata epai ya bana ye​—ndenge andimaka biso, amoniselaka biso motema mawa, abatelaka biso, apesaka biso disiplini mpe ndenge akokisaka bamposa na biso—​tokoloba mpenza ete azali Tata oyo aleki batata nyonso!

Ndenge nini tokoki kotɔnda Tata na biso ya likoló mpo na bolingo oyo amoniselaka biso? Tosengeli kosala milende mpo na koyekola makambo mingi oyo etali ye mpe mokano na ye. (Yoane 17:3) Tosengeli koyokanisa bomoi na biso na mokano na ye mpe mibeko na ye. (1 Yoane 5:3) Tokomonisa ete tozali komekola bolingo na ye na ndenge oyo tozali kosalela basusu makambo. (1 Yoane 4:11) Tokoki komonisa ete Yehova azali Tata na biso mpe ete kozala bana na ye ezali mpenza lokumu, soki tozali kosala makambo wana nyonso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makomami esaleli mingi liloba tata mpo na kolobela Yehova. Na ndakisa, na mikanda misato ya liboso ya Baevanzile, Yesu asaleli liloba “Tata” mbala soki 65 mpe na Evanzile ya Yoane mbala soki 100. Paulo mpe abengi Nzambe “Tata” mbala koleka 40 na mikanda na ye. Yehova azali Tata na biso mpo bomoi na biso eutá na ye.

b Talá mokapo 24 oyo elobi “Eloko moko te ekoki ‘kokabola biso na bolingo ya Nzambe,’” na buku Pusaná penepene na Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Koyeba malamumalamu soki Yehova azali Tata ya ndenge nini ekosalisa biso tópusana penepene na ye mpe tólinga ye mingi

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

Tokoki komonisa ete Yehova azali Tata na biso mpe ete kozala bana na ye ezali mpenza lokumu

[Etanda/​Bililingi na lokasa 21]

YEHOVA AMONISAKA BOLINGO NA YE NA NDENGE MINGI

ANDIMAKA BISO

AYOKELAKA BISO MAWA

ABATELAKA BISO

APESAKA BISO DISIPLINI

AKOKISAKA BAMPOSA NA BISO

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto