Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/11 nk. 8-9
  • Koyeba solo na ntina na lifelo ekoki kosalisa yo na nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba solo na ntina na lifelo ekoki kosalisa yo na nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobanga lifelo to kolinga Nzambe​—Nini etambwisaka yo?
  • Banani bakendaka na lifelo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lifelo ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/11 nk. 8-9

Koyeba solo na ntina na lifelo ekoki kosalisa yo na nini?

BATO oyo bateyaka ete lifelo ezali esika ya minyoko batindaka bato bámona ete Yehova Nzambe azali mabe. Ya solo, Biblia elobi ete Nzambe akoboma bato mabe. (2 Batesaloniki 1:6-9) Kasi, ezaleli na ye ya libosoliboso ezali nkanda te.

Nzambe azali te motema mabe to moto oyo azongisaka mabe na mabe. Kutu, atuni boye: “Ngai nazui esɛngɔ na kufa na moto mabe?” (Ezekiele 18:23, haut fleuve) Soki Nzambe asepelaka te na liwa ya bato mabe, ndenge nini akosepela amonaka bango libela na libela bazali konyokwama?

Ezaleli ya libosoliboso ya Nzambe ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Kutu, “Yawe ajali na malamu epai na bato yɔnsɔ mpe ngɔlu na ye ejali likolo na misala na ye yɔnsɔ.” (Nzembo 145:9, haut fleuve) Yango wana, Nzambe alingi ete biso mpe tólinga ye na motema na biso mobimba.​—Matai 22:35-38.

Kobanga lifelo to kolinga Nzambe​—Nini etambwisaka yo?

Liteya oyo elobaka ete milimo enyokwamaka na lifelo etindaka bato bázala na nsɔmɔ ya Nzambe. Nzokande, moto oyo ayekoli solo na ntina na Nzambe mpe alingi ye, akómaka kobanga ye na ndenge ya malamu. Nzembo 111:10 (haut fleuve) elobi boye: “Kobanga Yawe ejali ebandeli na mayɛlɛ; yɔnsɔ baoyo bakosalaka boye bakati ntina na malamu.” Kobanga oyo elobelami awa ezali te nsɔmɔ oyo esalaka ete moto azala motema likoló; ezali nde limemya makasi mpo na Mozalisi na biso. Limemya yango etindaka biso tóbanga kosala makambo oyo ekoyokisa ye mawa.

Tótala ndenge oyo koyeba solo na ntina na lifelo esalisaki Kathleen, mwasi moko ya mbula 32 oyo azalaki momɛli-bangi. Amipesaki na bomoi ya loyenge mpe ya mobulu, akómaki komiyoka ete azali na ntina moko te, mpe amipesaki na pite. Alobi boye: “Soki natali mwana na ngai ya mbula moko, nazalaki koloba na nse ya motema ete, ‘Talá makambo nazali kosala ye. Nakozika na lifelo mpo na yango.’” Kathleen alukaki kotika bangi, kasi azalaki kokoka te. Alobi boye: “Nalingaki kozala moto malamu, kasi makambo nyonso ya mokili mpe ya bomoi na ngai ezalaki kaka mabe mpenza. Nazalaki komona ntina ya kozala moto malamu te.”

Na nsima, Kathleen akutanaki na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Nayekolaki ete lifelo ya mɔtɔ ezalaka te. Mikapo ya Biblia oyo batángisaki ngai emonisaki yango polele. Koyeba ete nakokende na lifelo te ekitisaki ngai mpenza motema.” Kathleen ayekolaki mpe ete Nzambe alaki ete bato bakoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ezangi mabe. (Nzembo 37:10, 11, 29; Luka 23:43) Alobi boye: “Nakómi na elikya ya solosolo​—elikya ya bomoi ya seko na Paladiso!”

Kathleen atikaki nde komɛla bangi atako azalaki lisusu kobanga kokende na lifelo te? Ye moko alobi boye: “Soki nayoki mposa makasi ya komɛla bangi, nazalaki kobondela mpo na kosɛnga Yehova Nzambe asalisa ngai. Nazalaki kokanisa ndenge atalelaka biloko yango oyo ebebisaka nzoto, mpe nazalaki kolinga koyokisa ye mawa te. Ayokaki mabondeli na ngai.” (2 Bakolinti 7:1) Kobanga koyokisa Nzambe mawa esalisaki Kathleen alongwa na boombo ya bangi.

Ya solo, kolinga Nzambe mpe kobanga koyokisa ye mawa​—kasi te kobanga lifelo—​ekoki kotinda biso tósala mokano ya Nzambe mpo tózala na bolamu ya solosolo. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Esɛngɔ ejali na moto oyo akobanja Yawe, oyo akotambolaka na njela na ye.”​—Nzembo 128:1, haut fleuve.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 9]

NANI AKOBIMISAMA NA LIFELO?

Mabongoli mosusu ya Biblia ekɔtisaka mobulungano na mitó ya bato na ndenge ebongoli maloba mibale ya Grɛki​—Gehena mpe Hades—​na liloba moko, “lifelo.” Na Biblia, liloba Gehena elimboli libebi ya seko, liwa oyo ezangi lisekwa. Nzokande, bato oyo bazali na Hades, to Hadesi, bazali na elikya ya lisekwa.

Yango wana, nsima ya lisekwa ya Yesu, ntoma Petelo ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete Yesu “atikamaki na lifelo te.” (Misala 2:27, 31, 32; Nzembo 16:10, King James) Liloba oyo ebongolami na “lifelo” na vɛrsɛ yango ezali liloba ya Grɛki Hades. Yesu akendaki na esika ya mɔtɔ te. Hades, to “lifelo,” ezalaki nde nkunda. Kasi, Yesu azali te moto kaka moko oyo Nzambe abimisi na Hadesi.

Na ntina na lisekwa, Biblia elobi boye: “Liwa mpe lifelo ebimisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango.” (Emoniseli 20:13, 14, King James) Kobimisa bato na “lifelo” ekolimbola kozongisa na bomoi bato nyonso Nzambe amoni ete babongi kosekwisama. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Yango ezali elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya​—tokomona lisusu bandeko na biso oyo bakufá ntango bakobima na nkunda! Yehova, Nzambe oyo atɔndi na bolingo, akosala yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto