Oyebaki yango?
Na ntango ya Yesu, mpo na nini Bayuda bapalanganaki na mikili ndenge na ndenge?
Ntango Yesu alobaki na etuluku moko ya bato ete bakoki te kokóma na esika oyo alingaki kokende, Bayuda bamitunaki boye: “Moto oyo alingi kokende wapi . . .? Alingi nde kokende epai ya Bayuda oyo bapalanganá na kati ya Bagrɛki?” (Yoane 7:32-36) Mwa moke na nsima, baklisto bakendaki koteya nsango malamu epai ya Bayuda oyo bapalanganaki na mikili oyo ezalaki zingazinga ya Mbu ya Mediterane.—Misala 2:5-11; 9:2; 13:5, 13, 14; 14:1; 16:1-3; 17:1; 18:12, 19; 28:16, 17.
Bayuda yango bapalanganaki mpamba te bato ya bikólo mosusu balongaki ekólo na bango mpe bamemaki bango na boombo—liboso ezalaki Baasulia na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mpe na nsima bato ya Babilone na mobu 607 L.T.B. Kaka ndambo ya bato yango nde bazongaki na Yisalaele. (Yisaya 10:21, 22) Bamosusu bapalanganaki na mikili ndenge na ndenge.
Yango wana, na ekeke ya 5 L.T.B., Bayuda bazalaki na bitúká nyonso 127 ya bokonzi ya Perse. (Esetele 1:1; 3:8) Lokola Bayuda bazalaki koteya bato mosusu mpo na kokɔtisa bango na Lingomba na bango, nsukansuka, bato mingi bayebaki Yehova mpe Mibeko oyo apesaki Bayuda. (Matai 23:15) Bayuda oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bazalaki na Yelusaleme, na Fɛti ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), epai bayokaki nsango malamu etali Yesu. Na yango, kopalangana ya Bayuda na mikili oyo Loma ezalaki koyangela esalisaki mpo boklisto epalangana nokinoki.
Wolo ya Mokonzi Salomo ezalaki mingi ndenge nini?
Biblia elobi ete Hilama, mokonzi ya Tulo, atindelaki Salomo tɔni minei ya wolo, ete mokonzi-mwasi ya Seba mpe apesaki ye wolo mingi ndenge wana mpe ete bamasuwa ya Salomo ememelaki ye tɔni koleka 15 ya wolo oyo eutaki na Ofili. Biblia elobi boye: “Bozito ya wolo eyaki epai ya Salomo na [mbula] moko ezalaki mpata nkama motoba mpe ntuku motoba na motoba,” to tɔni koleka 25. (1 Mikonzi 9:14, 28; 10:10, 14) Yango ekoki kozala solo? Wolo oyo bakonzi ya kala bazalaki kobomba ezalaki ebele ndenge nini?
Likomi moko ya kala, oyo bato ya mayele bandimaka ete elobi solo, emonisi ete Falao Thoutmosis III, mokonzi ya Ezipito (na ekeke ya 16 L.T.B.) apesaki tɔni soki 13,5 ya wolo na tempelo ya Amôn-Ra, oyo ezalaki na engumba Karnak. Na ekeke ya mwambe L.T.B., Tigilata-pilesele III, azwaki tɔni koleka 4 ya wolo lokola mpako oyo eutaki na Tulo, mpe Salegone II apesaki banzambe ya Babilone tɔni minei ya wolo lokola likabo. Balobaka ete mbula na mbula, Filipo II, mokonzi ya Masedonia (359-336 L.T.B.) azalaki kotimola tɔni koleka 28 ya wolo na Pangée, na etúká ya Thrace.
Masolo ya kala elobaka ete ntango Alesandala Monene (336-323 L.T.B.), mwana ya Filipo, alongaki Susa, engumba moko ya Perse, azwaki tɔni soki 1 180 ya wolo na engumba yango, mpe tɔni soki 7 000 na bingumba mosusu ya Perse. Na yango, soki tokokanisi makambo yango na oyo Biblia elobi mpo na wolo ya Mokonzi Salomo, tokomona ete Biblia elekisi ndelo te.