Oyebaki yango?
Porte ya engumba oyo elobelami mbala mingi na Biblia ezalaki nini?
▪ Na ntango ya kala, bingumba mingi ezingamaki na bifelo oyo ezalaki kobatela yango. Na baporte mingi ya engumba ezalaki na bisika oyo bato bazalaki koya kokutana, mpo na kosala mombongo, mpe kopesana bansango. Kuna bazalaki kopesa mayebisi mpo na bato nyonso, mpe basakoli bazalaki kopesa bansango na bango. (Yirimia 17:19, 20) Buku moko (The Land and the Book), elobi ete “tokoki koloba ete makambo nyonso ya mbongo ezalaki kosalema na baporte ya engumba to pene na yango.” Na Yisraele ya kala, baporte ya bingumba ezalaki bisika ya misala mingi.
Na ndakisa, Abrahama, asombaki mabele mpo na kokundaka bato ya libota na ye na mabɔkɔ ya Efrone, “na miso ya bana ya Hete kati na baoyo nyonso bazalaki kokɔta na porte ya engumba na ye.” (Ebandeli 23:7-18) Mpe Boaze asɛngaki mikóló zomi ya Beteleme báfanda na porte ya engumba, ntango azalaki kozwa bibongiseli mpo na Ruta mpe libula ya mobali na ye oyo akufaki, mpo na kolanda mobeko etali libala ya bosɛmɛki. (Ruta 4:1, 2) Ntango mikóló ya engumba bazalaki kosambisa makambo, bazalaki kofanda na porte ya engumba mpo na koyoka, kozwa bikateli mpe kopesa bitumbu.—Kolimbola Mibeko 21:19.
Ofire, oyo Biblia elobi ete ezalaki kobimisa wolo ya kitoko ezalaki wapi?
▪ Mokanda ya Yobo elobeli liboso “wolo ya Ofire” mpe ekokanisi yango na “wolo ya pɛto.” (Yobo 28:15, 16) Mbula soki 600, nsima ya eleko ya Yobo, Mokonzi Davidi akɔngɔlaki “wolo ya Ofire” mpo na kotonga tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Mwana na ye Salomo mpe azalaki kozwa wolo na Ofire.—1 Ntango 29:3, 4; 1 Bakonzi 9:28.
Na kotalela Makomami, Salomo azalaki kotinda bamasuwa oyo esalemaki na Ezione-gebere, na Mbu Motane oyo ezalaki kokende kozwa wolo na Ofire. (1 Bakonzi 9:26) Bato ya mayele balobaka ete Ezione-gebere ezalaki likoló ya golfe ya Aqaba pene na esika oyo ezali lelo oyo Elat mpe Aqaba. Kuna, bamasuwa ekokaki kokóma na esika nyonso ya Mbu Motane to mosika mpenza na bisika oyo bazalaki kobomba biloko na bokúla ya Afrika to ya Inde, ekoki kozala ete Ofire ezalaki kuna. Nzokande, bamosusu balobaka ete Ofire ezalaki na Arabie, epai bamonaki mabulu ya kala ya wolo mpe epai bazwaka wolo tii lelo.
Ata soki lisolo yango ya wolo oyo Salomo azalaki kozwa ezalaki lisapo ndenge bato mosusu bakoki kokanisa, Kenneth Kitchen, moto moko oyo ayekolaka makambo ya Egypte akomaki boye: “Engumba Ofire, ezali lisapo te. Na eteni ya mbɛki moko ya Baebre oyo ekoki kozala ya ekeke ya mwambe [liboso ya ntango na biso] bakomaki polele likoló na yango mwa maloba oyo: ‘Wolo ya Ofire mpo na Beth-Horon—shɛkɛlɛ 30.’ Awa Ofire emonisami mpenza lokola esika oyo bazalaki kozwa wolo, ndenge moko na ‘wolo ya ‛Amau,’ to ‘wolo ya Punti’ to ‘wolo ya Kush’ na makomi ya Ezipito—na bandakisa yango nyonso ekoki kozala wolo oyo euti na mboka oyo batye nkombo wana to lolenge mosusu ya wolo ya mboka wana.”
[Elilingi na lokasa 15]
Abrahama na porte ya engumba azali koluka kosomba mabele
[Elilingi na lokasa 15]
Mbeki ya baebre oyo bakomá nkombo ya Ofire
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Collection of Israel Antiquities Authority, Photo © The Israel Museum, Jerusalem