Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/11 lok. 23
  • Mwango mabe ezongeli baoyo basalaki yango!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwango mabe ezongeli baoyo basalaki yango!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Ndenge Paradiso ebungaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/11 lok. 23

Mpo na bilenge

Mwango mabe ezongeli baoyo basalaki yango!

Malako: Tángá lisolo oyo na esika ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omityá na esika ya bato oyo balobeli.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ DANYELE 6:1-28.

Mpo na yo, Dalio azalaki moto ya ndenge nini? Lobelá ndenge yo okanisi azalaki komonana na miso. Okanisi ete alobaki na mongongo ya ndenge nini? (Tángá lisusu vɛrsɛ 14, 16, 18-20.)

․․․․․

Libulu yango ezalaki ndenge nini, mpe okanisi ete bankɔsi yango bazalaki ndenge nini?

․․․․․

Mpo na yo, nini esalemaki ntango kaka babwakaki Danyele na libulu ya bankɔsi mpe bakangaki yango?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.

Mpo na nini basali ya Dalio bazalaki koyokela Danyele zuwa? (Tángá lisusu vɛrsɛ 3.)

․․․․․

Mpo na nini Danyele abondelaki na miso ya bato atako akokaki kobombana mpo na kosala yango? (Tángá lisusu vɛrsɛ 10, 11.)

․․․․․

Mpo na nini mbala mosusu Dalio asepelaki na likanisi ya kotya mobeko na oyo etali kobondela? (Tángá lisusu vɛrsɛ 7.)

․․․․․

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Kozala na mpiko liboso ya botɛmɛli.

․․․․․

Motuya ya libondeli.

․․․․․

Ndenge oyo Yehova abatelaka basaleli na ye ya sembo.

․․․․․

NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto