Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 18
  • Ndenge Paradiso ebungaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge Paradiso ebungaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Mwango mabe ezongeli baoyo basalaki yango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lisekwa ya Lazalo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 18

Mpo na bilenge

Ndenge Paradiso ebungaki

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 3:1-24.

Okanisi ete Eva asalaki nini liboso ntango nyoka abandaki koloba na ye?

․․․․․

Lokola oyebi ete Adama ná Eva basalaki lisumu na nko, okanisi ete bazalaki komiyoka ndenge nini, na kolanda vɛrsɛ 7-10?

․․․․․

Okanisi ete makambo elekaki ndenge nini ntango Nzambe abenganaki Adama ná Eva na elanga ya Edene, ndenge emonisami na vɛrsɛ 22-24?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.

Ndenge nini miso ya Eva ememaki ye na lisumu? (Tángá lisusu vɛrsɛ 6.)

․․․․․

Mpo na nini mbuma ya nzete yango ekómaki epai ya Eva “eloko oyo miso ekokaki kolula”? (Tángá lisusu vɛrsɛ 4 mpe 5.)

․․․․․

Ekoki kozala nini nde etindaki Adama asangana ná Eva na lisumu na ye? (Tángá lisusu vɛrsɛ 6.)

․․․․․

Ndenge nini lisumu elingaki kobebisa boyokani ya basi ná mibali oyo basengelaki kozala na bomoi na nsima? (Tángá lisusu vɛrsɛ 16.)

․․․․․

Nini emonisi ete boyokani ya Adama ná Eva ebebaki nsima ya lisumu? (Tángá lisusu vɛrsɛ 12.)

․․․․․

Ndenge nini Yehova alukaki mbala moko kosilisa likambo oyo ebimaki, mpo mokano na ye ekokisama? (Tángá lisusu vɛrsɛ 15.)

․․․․․

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Makama ya kosala makambo na ndenge na yo.

․․․․․

Ndenge miso ekoki kolamwisa bamposa ya mabe.

․․․․․

Kopesa basusu foti mpo na mabe oyo tosali.

․․․․․

NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto