Moto abikaka kaka na mampa te—Ndenge nabikaki na bolɔkɔ na bakaa ya Banazi
Lisolo ya Joseph Hisiger
Natunaki moninga na ngai ya bolɔkɔ ete: “Ozali kotánga nini?” Ayanolaki ete: “Nazali kotánga Biblia.” Abakisaki boye: “Nakopesa yo yango soki opesi ngai mampa na yo ya pɔsɔ mobimba.”
NABOTAMÁ na mokolo ya 1 Marsi 1914, na engumba Moselle, oyo ntango wana ezalaki koyangelama na Allemagne. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki na 1918, Moselle ekómaki koyangelama na France. Na 1940, ezongaki lisusu na mabɔkɔ ya Allemagne. Na nsima, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na 1945, Moselle ezongaki lisusu na mabɔkɔ ya France. Mbala nyonso oyo Moselle ezalaki koyangelama na Allemagne to na France, nazalaki kokóma moto ya ekólo oyo ezali koyangela yango, na yango nayekolaki koloba monɔkɔ ya Lifalanse mpe ya Allemand.
Baboti na ngai bazalaki bandimi minene ya Lingomba ya Katolike. Mikolo nyonso na butu liboso tólala, tozalaki kofukama libota mobimba mpo na kobondela. Mikolo ya lomingo mpe ya bafɛti ya mboka, tozalaki kokende na misa. Namipesaki na lingomba na biso mpe nazalaki na etuluku ya bato oyo bazalaki koyekola mateya ya Katolike.
Namipesi na mosala ya Batatoli ya Yehova
Na 1935, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala baboti na ngai. Balobelaki ndenge mangomba emikɔtisaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na nsima, mposa na ngai ya koyeba Biblia ekómaki makasi, mpe na 1936, natunaki sango soki nakoki kozwa Biblia. Alobaki na ngai ete esengeli nayekola teoloji mpo nayeba Biblia. Kasi, eyano oyo apesaki ngai ebakisaki nde mposa na ngai ya kozwa Biblia mpe kotánga yango.
Na sanza ya Yanuali 1937, Albin Relewicz, moninga moko ya mosala oyo azalaki Motatoli, abandaki koyebisa ngai mateya ya Biblia. Natunaki ye ete: “Namoni ete ozali na Biblia?” Andimaki, mpe mwa moke na nsima, alakisaki ngai nkombo ya Nzambe, Yehova, na libongoli ya Biblia moko na monɔkɔ ya Allemand (Elberfelder) mpe apesaki ngai yango. Nabandaki kotánga yango na molende mpe nabandaki koyangana na makita ya Batatoli na engumba Thionville oyo ezalaki mosika te.
Na sanza ya Augusto 1937, tokendaki ná Albin na liyangani ya Batatoli oyo esangisaki mikili ebele, na Paris. Kuna, nabandaki kosakola ndako na ndako. Eumelaki te, nazwaki batisimo mpe na ebandeli ya 1939, namipesaki mingi na mosala ya kosakola. Batindaki ngai na engumba Metz. Na nsima, na sanza ya Yuli, babengaki ngai nakende kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Paris.
Mikakatano na ntango ya bitumba
Naumelaki mingi te na biro ya Batatoli ya Yehova, mpo na sanza ya Augusto 1939, babengaki ngai nakóma soda ya France. Mpo na lisosoli na ngai, nakokaki te kokende etumba, yango wana batindaki ngai na bolɔkɔ. Na sanza ya Mai ya mbula oyo elandaki, ntango nazalaki na bolɔkɔ, Allemagne eyaki kobundisa France. Na sanza ya Yuni, France ekweaki mpe nakómaki lisusu moto ya Allemagne. Na sanza ya Yuli 1940, ntango nabimaki bolɔkɔ, nazongaki epai ya baboti na ngai.
Lokola tozalaki koyangelama na Banazi, tozalaki koyekola Biblia na kobombama. Tozalaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nzela ya Maryse Anasiak, ndeko mwasi moko ya molende oyo nazalaki kokutana na ye esika Motatoli moko azalaki kotɛka mampa. Tii na 1941, nakutanaki te na mikakatano oyo Batatoli ya Yehova ya Allemagne bazalaki kokutana na yango.
Nzokande, mokolo moko basoda ya Gestapo bayaki epai na biso. Mokonzi na bango ayebisaki ngai polele ete mosala ya Batatoli epekisami mpe atunaki ngai soki nalingi kaka kozala Motatoli. Ntango nayanolaki ye ete “nakotikala Motatoli,” alobaki na ngai nalanda ye. Lokola nsɔmɔ ekangaki mama makasi, akweaki. Ntango mokonzi yango amonaki bongo, ayebisaki ngai natikala mpo nakipe mama.
Na esika nazalaki kosala, nazalaki koboya kopesa patrɔ mbote na maloba ya politiki. Naboyaki mpe kokɔta na parti ya Banazi. Na yango, na mokolo oyo elandaki, basoda ya Gestapo bakangaki ngai. Ntango bazalaki kosambisa ngai, naboyaki kopesa bango bankombo ya Batatoli mosusu. Moto oyo azalaki kosambisa ngai abɛtaki ngai motó ya mondoki na ye na motó, mpe nabungisaki makanisi. Na mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 1942, tribinale monene (Sondergericht) ya engumba Metz ekatelaki ngai mbula misato ya bolɔkɔ, “mpo nazalaki kolobela lisangá ya Batatoli ya Yehova mpe Bayekoli ya Biblia.”
Pɔsɔ mibale na nsima, balongolaki ngai na bolɔkɔ ya Metz mpe bamemaki ngai mosika na kaa ya misala makasi na Zweibrücken. Kuna, nazalaki kosala elongo na bato oyo babongisaka nzela ya engbunduka. Tolongolaki barayi ya kilo, tokangisaki yango, mpe tozalaki kosopa mabanga na bisika barayi yango ezalaki. Na ntɔngɔ, bazalaki kopesa biso kɔpɔ ya kafe mpe mwa eteni ya limpa; na midi mpe na mpokwa, bazalaki kopesa biso saani ya supu. Na nsima, batindaki ngai na bolɔkɔ na engumba moko oyo ezalaki mosika te, epai nasalaki na esika moto moko asalaka mpe abongisaka basapato. Nsima ya basanza mingi, bazongisaki ngai na kaa ya Zweibrücken, na mbala oyo, nasalaki na bilanga.
Moto abikaka kaka na mampa te
Moninga na ngai oyo tozalaki na ye na eteni ya bolɔkɔ moko, ezalaki elenge mobali moko ya Pays-Bas. Lokola nayekolaki monɔkɔ na ye mwa moke, nazalaki na likoki ya koteya ye. Akolaki noki, mpe asɛngaki ngai nabatisa ye na ebale. Ntango abimaki na mai, ayambaki ngai mpe alobaki ete, “Joseph, nakómi ndeko na yo!” Ntango bazongisaki ngai lisusu nakende kosala na banzela ya engbunduka, tokabwanaki.
Na mbala oyo moninga na ngai ya bolɔkɔ ezalaki moto moko ya Allemagne. Na mpokwa moko, azalaki kotánga mwa buku moko ya moke—Biblia! Ezalaki na ntango wana nde ayebisaki ngai ete soki napesi ye mampa na ngai ya pɔsɔ mobimba, akopesa ngai Biblia. Nalobaki ete: “Nandimi!” Atako kondima kokaba mampa na ngai ya pɔsɔ mobimba ezalaki mpasi, nayokaki mawa ata moke te. Nakangaki ntina ya maloba ya Yesu oyo: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.”—Matai 4:4.
Lokola nazwaki Biblia, mpasi ezalaki nde ya kobomba yango. Atako bato mosusu ya bolɔkɔ bakokaki kozala na Biblia, bapekisaki Batatoli ya Yehova bázala na yango. Yango wana, nazalaki kotánga yango na butu na kati ya drap. Na moi, nazalaki kobomba yango na simisi na ngai mpe kotambola na yango. Nakokaki te kotika yango na bolɔkɔ mpo bakɛngɛli bazalaki kopanzapanza biloko na biso.
Mokolo moko, ntango bazalaki kobenga moto ya bolɔkɔ mokomoko, namonaki ete nabosani Biblia na ngai. Na mpokwa wana, nazongaki mbangu esika nalalaka, kasi nakutaki Biblia yango te. Nsima ya kobondela Nzambe, nakendaki kokutana na mokɛngɛli; nayebisaki ye ete moto moko azwi buku na ngai mpe nalingi azongisela ngai yango. Akebaki mpenza te, mpe azongiselaki ngai Biblia na ngai. Napesaki Yehova matɔndi na motema mobimba!
Mokolo mosusu, batindaki ngai nakende kosukola nzoto. Ntango nazalaki kolongola bilamba na ngai wana oyo ekómaki salite, nakweisaki Biblia na mayele. Lokola mokɛngɛli azalaki kotala te, napusaki yango na lokolo pembeni ya douche. Nabombaki yango kuna ntango nazalaki kosukola. Ntango nabimaki na douche, nabendaki lisusu Biblia yango na lokolo, mpe nakɔtisaki yango na bilamba ya pɛto oyo ezalaki wana.
Makambo ya esengo mpe ya mawa oyo nakutanaki na yango na bolɔkɔ
Mokolo moko na ntɔngo na 1943 ntango bato ya bolɔkɔ batandanaki na libándá, namonaki Albin! Bakangaki mpe ye. Atalaki ngai mpe amonaki ete toyebani mpe atyaki lobɔkɔ na motema mpo na komonisa ete amoni ndeko na ye. Na nsima, asalaki ngai elembo ete akokomela ngai mokanda. Mokolo oyo elandaki ntango azalaki koleka, abwakelaki ngai mwa papye moko. Kasi, mokɛngɛli ya bolɔkɔ amonaki yango, mpe batindaki biso na bisika oyo tozalaki moto na moto na esika na ye moko na boumeli ya pɔsɔ mibale. Bazalaki kopesa biso kaka mwa limpa ekauká mpe mai mpe tozalaki kolala na mabaya, mpe ba-drap ezalaki te.
Nsima na yango, batindaki ngai na bolɔkɔ na Siegburg, epai nazalaki kosala esika batɛkaka bibende. Mosala yango ezalaki kolɛmbisa, mpe tozalaki kolya malamu te. Na butu, nazalaki kolɔta bilei kitoko lokola bagato ná bambuma, ntango nazalaki kolamuka nazalaki koyoka kaka libumu polele. Kilo na ngai ekitaki makasi. Atako bongo, nazalaki kotánga mwa Biblia na ngai mokolo na mokolo mpe ezalaki kopesa ngai esengo ya bomoi.
Nsukansuka nazwi bonsomi!
Mokolo moko na sanza ya Aprili 1945 na ntɔngɔ, bakɛngɛli ya bolɔkɔ bakimaki mpe batikaki baporte polele. Nazwaki bonsomi. Kasi, kaka ntango nabimaki bolɔkɔ, nakɔtaki lopitalo. Na nsuka ya sanza ya Mai, nazongaki epai ya baboti na ngai. Bazalaki kokanisa ete nakufá. Kasi, ntango mama amonaki ngai, alelaki na esengo. Likambo ya mawa, eumelaki te, baboti na ngai bakufaki.
Nazongelaki lisusu makita na lisangá ya Thionville. Nasepelaki mingi ntango tomonanaki lisusu na bandeko! Ezalaki mpenza esengo koyoka ndenge bandeko batikalaki sembo atako bakutanaki na botɛmɛli mingi. Moninga na ngai ya motema Albin akufaki na engumba Ratisbonne, na Allemagne. Na nsima, nayokaki ete ndeko na ngai mosusu Jean Hisiger akómaki Motatoli ya Yehova mpe babomaki ye mpo aboyaki mosala ya soda. Jean Queyroi, ndeko oyo tosalaki na ye na biro ya Batatoli ya Yehova na Paris, asalaki mbula mitano na kaa ya misala makasi na Allemagne.a
Nazongelaki mbala moko mosala ya kosakola na engumba Metz. Na ntango wana, nazalaki kokutana mingi na libota ya ndeko Minzani. Tina, mwana na bango ya mwasi, azwaki batisimo mokolo ya 2 Novɛmbɛ 1946. Azalaki mosakoli ya molende, mpe asepelisaki ngai mingi. Tobalanaki mokolo ya 13 Desɛmbɛ 1947. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1967, Tina amipesaki mingi na mosala ya kosakola, mpe asalaki bongo tii na liwa na ye na sanza ya Yuni 2003; azalaki na mbula 98. Nayokaka mawa mingi ndenge akufá.
Lelo oyo, atako nazali na mbula koleka 90, namonaka ete Liloba ya Nzambe epesaka ngai ntango nyonso makasi ya kolonga mikakatano oyo nakutanaka na yango. Na ntango mosusu nazangaka eloko ya kolya, kasi natondisaka ntango nyonso makanisi mpe motema na ngai na Liloba ya Nzambe. Mpe Yehova akómisi ngai makasi. “Liloba na [ye] epesi ngai bomoi.”—Nzembo 119:50.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba lisolo ya bomoi ya Jean Queyroi, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1989, nkasa 22-26, na Lifalanse.
[Elilingi na lokasa 21]
Moninga na ngai ya motema Albin Relewicz
[Elilingi na lokasa 21]
Maryse Anasiak
[Elilingi na lokasa 22]
Biblia oyo nasombaki na mampa na ngai ya pɔsɔ mobimba
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai ná fianse na ngai Tina, na 1946
[Elilingi na lokasa 23]
Jean Queyroi ná mwasi na ye Titica