Vatican elingi kolimwisa nkombo ya Nzambe
BAKONZI ya lingomba ya Katolike balingi kolimwisa nkombo ya Nzambe na bamísa na bango. Na mbula oyo eleki, ebongiseli moko ya Lingomba ya Katolike (Congrégation pour le culte divin et la discipline des sacrements), etindelaki baepiskɔpɔ ya Lingomba ya Katolike na mokili mobimba malako mpo na likambo yango. Papa nde “abimisaki likanisi” yango.
Na mokanda yango oyo ekomamaki na mwa 29 Yuni 2008, bamonisaki ete atako bapesaki mobeko yango “na bambula oyo euti koleka bato bazongeli momeseno ya kotánga nkombo ya Nzambe ya Yisalaele, oyo babengaka tetragrame mosantu mpe ekomamaka na balɛtrɛ minei ya alfabɛ ya Liebele יהוה, to YHWH.” Mokanda yango emonisi ete nkombo ya Nzambe ebongolami na bandenge mingi: “Yahweh,” “Yahwè,” “Jahweh,” “Jahwè,” “Jave,” “Yehovah,” “Yawe,” mpe bongo na bongo.a Nzokande, Vatican ezali kosɛnga bálanda kaka ekateli oyo Lingomba ya Katolike ezwaki na likambo yango kala. Elingi koloba, kotya liloba “Nkolo” na esika ya balɛtrɛ minei wana. Lisusu, na bamísa, na banzembo, mpe mabondeli ya Lingomba ya Katolike basengeli te kosalela nkombo ya Nzambe “YHWH; basengeli ata kotánga yango te.”
Mpo na kondimisa likambo yango, mokanda ya Vatican etángi “momeseno” moko ya kala ya Lingomba Katolike. Emonisi ete ata na libongoli ya Septante ya Makomami ya Liebele, oyo ebimaki liboso Yesu abotama, nkombo ya Nzambe ezalaki mbala mingi kobongolama na liloba ya Grɛki Kyʹri·os, oyo elimboli “Nkolo.” Na yango bamonisaki ete “banda na ebandeli baklisto bazalaki kosalela tetragrame te.” Nzokande, babosanaki likambo moko. Biblia Septante ya liboso ezalaki na liloba Kyʹri·os te, ezalaki nde na nkombo ya Nzambe יהוה. Bayekoli ya liboso ya Yesu bayebaki nkombo ya Nzambe mpe bazalaki kosalela yango. Na libondeli moko, Yesu alobaki na Tata na ye boye: “Nayebisi bango nkombo na yo.” (Yoane 17:26) Mpe na libondeli ya Tata wa biso, Yesu alobaki boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.”—Matai 6:9.
Baklisto nyonso basengeli kozala na mposa ete nkombo ya Nzambe esantisama. Milende oyo Vatican ezali kosala mpo na kolimwisa nkombo yango ezali kobebisa lokumu ya Yehova, Ye oyo alobaki boye: “Eye ezali nkombo ya ngai ya seko; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo ena o bileko binso seko.”—Exode 3:15, Biblia Liloba lya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Lingala, Babiblia esalelaka mingi nkombo “Yehova” to “Yawe.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
“Eye ezali nkombo ya ngai ya seko.”—Exode 3:15, Biblia Liloba lya Nzambe
[Elilingi na lokasa 30]
Eteni ya libongoli ya “Septante” ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.). Oyo bazingi ezali Nkombo ya Nzambe, emonisami na balɛtrɛ minei ya Liebele YHWH
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Courtesy of the Egypt Exploration Society