Kokila bilei esalisaka yo opusana penepene na Nzambe?
‘Kokila bilei esalisaka moto akanisa na mozindo makambo ya elimo mpe amona ete biloko ya mokili, yango te nde eleki ntina na bomoi.’—MWASI MOKO, MONDIMI YA KATOLIKE.
‘Kokila bilei esalisaka moto azala na boyokani na Nzambe.’—MOTEYI MOKO NA LINGOMBA YA BAYUDA.
‘Na lingomba na ngai, kokila bilei ezali mobeko, yango nde emonisaka ete moto amipesi na Nzambe mpe azali na botɔndi. Nakilaka bilei mpo nalingaka Nzambe.’—MONDIMI MOKO YA LINGOMBA YA BAHA’IE.
KOKILA bilei ezali likambo oyo bato ya mangomba mingi na mokili basalaka; ata mpe bato ya lingomba ya Bouddha, ya Hindu, ya Bamizilma, bato ya lingomba ya Jaïn, mpe ya Bayuda. Bato mingi bandimaka ete kokila bilei mpo na mwa ntango esalisaka bango bápusana penepene na Nzambe.
Okanisi nini? Osengeli kokilaka bilei? Biblia, Liloba ya Nzambe elobi nini na likambo yango?
Kokila bilei na ntango ya kala
Na ntango ya kala, bato bazalaki kokila bilei mpo na bantina mingi oyo Nzambe azalaki kondima. Bamosusu bazalaki kokila bilei mpo na komonisa ete bayoki mawa mpe babongoli motema mpo na masumu na bango (1 Samwele 7:4-6), mpo na kosɛnga litambwisi ya Nzambe (Basambisi 20:26-28; Luka 2:36, 37), to mpo na komanyola malamumalamu.—Matai 4:1, 2.
Nzokande, Biblia emonisi ete Nzambe azalaki mpe koboya bato mosusu oyo bazalaki kokila bilei. Mokonzi Saulo akilaki bilei liboso ya kokende kosolola na elimo moko. (Levitike 20:6; 1 Samwele 28:20) Bato mabe lokola Yezabele mpe bato oyo bakanaki koboma ntoma Paulo, bakilaki mpe bilei. (1 Mikonzi 21:7-12; Misala 23:12-14) Bafalisai bayebanaki mpo na momeseno na bango ya kokila bilei. (Malako 2:18) Kasi, Yesu apamelaki bango, mpe Nzambe azalaki kondima bango te. (Matai 6:16; Luka 18:12) Ndenge moko mpe, Yehova andimaki te Bayisalaele mosusu oyo bazalaki kokila bilei, mpamba te bazalaki na etamboli ya mabe mpe bazalaki kosala yango na makanisi ya mabe.—Yilimia 14:12.
Bandakisa yango emonisi ete ezali te kokila bilei yango moko nde esepelisaka Nzambe. Nzokande, basaleli mingi ya Nzambe oyo bakilaki bilei bandimamaki na Nzambe. Na yango, baklisto basengeli kokilaka bilei?
Kokila bilei ezali mobeko mpo na baklisto?
Mobeko ya Moize esɛngaki Bayuda ‘báyokisaka milimo na bango mpasi,’ yango elimbolaki kokila bilei mbala moko na mbula na mokolo ya mbɔndi. (Levitike 16:29-31; Nzembo 35:13) Yango ezalaki mobeko kaka moko ya kokila bilei oyo Yehova apesaki bato na ye.a Bayuda oyo bazalaki na nse ya Mibeko ya Moize basengelaki kotosa mobeko yango. Kasi, baklisto bazali na nse ya Mibeko ya Moize te.—Baloma 10:4; Bakolose 2:14.
Lelo oyo, fɛti ya Pulimi oyo Bayuda bazalaki kosala esalemaka liboso ya Pasika. Atako Yesu azalaki kokila bilei ndenge Mibeko esɛngaki yango, ayebanaki te mpo na momeseno yango. Ayebisaki bayekoli na ye ndenge oyo basengelaki kosala soki balingi kokila bilei, kasi atindaki bango te ete bákilaka bilei. (Matai 6:16-18; 9:14) Kasi, mpo na nini Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokila bilei nsima ya liwa na ye? (Matai 9:15) Yango ezalaki mobeko te. Yesu alingaki kaka koloba ete ntango akokufa, bayekoli na ye bakozala na mawa makasi mpe bakozala ata na mposa ya kolya te.
Masolo mibale ya baklisto ya liboso oyo bakilaki bilei emonisi ete soki moto asali yango na makanisi ya malamu, Nzambe andimaka yango. (Misala 13:2, 3; 14:23)b Na yango, kokila bilei ezali mobeko te mpo na baklisto. Kasi, moto oyo aponi kosala yango asengeli kokeba na mitambo mosusu.
Kebá na mitambo
Motambo ya liboso oyo moto asengeli kokima ezali ya koluka komonana moyengebene. Biblia ekebisi biso na “komikitisa ya lokuta.” (Bakolose 2:20-23) Ndakisa oyo Yesu apesaki ya Mofalisai oyo azalaki komimona ete aleki basusu mpo azalaki kokila bilei mbala na mbala, emonisi ete Nzambe aboyaka elimo ya ndenge wana.—Luka 18:9-14.
Ekozala mpe libunga koluka bato báyeba ete ozali kokila bilei, to mpe kosala yango kaka mpo batindi yo. Na Matai 6:16-18, Yesu amonisaki ete kokila bilei esengeli kozala likambo ya moto ye moko ná Nzambe, bato mosusu basengeli koyeba yango te.
Tosengeli mpe te kokanisa ete kokila bilei ekosala ete masumu na biso elimbisama. Mpo na kondimama na Nzambe, moto oyo azali kokila bilei asengeli kotosa mibeko na ye. (Yisaya 58:3-7) Mpo masumu na biso elimbisama tosengeli kobongola mpenza motema, kasi te kokila bilei. (Yoele 2:12, 13) Biblia emonisi ete Yehova alimbisaka masumu na biso mpo na motema mawa na ye oyo amonisaki na nzela ya mbeka ya Klisto. Ezali na likambo moko te oyo biso moko tokoki kosala, ezala ata kokila bilei, ekolimbisa masumu na biso te.—Baloma 3:24, 27, 28; Bagalatia 2:16; Baefese 2:8, 9.
Yisaya 58:3 emonisi mpe motambo mosusu. Bayisalaele bazalaki kokanisa ete Yehova akofuta bango mpo bazali kokila bilei, lokola nde bazalaki kosalela yango Nzambe. Bazalaki koloba boye: “Mpo na nini tokili bilei nde yo omoni yango te? Mpo na nini totuti milimo na biso nde yo oyebi yango te?” Lelo mpe bato mingi bakanisaka ete soki bakili bilei, Nzambe akofuta bango. Tiká ete tómekola ezaleli yango te oyo ezangi limemya mpe eyokani na Makomami te!
Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akondima bango soki banyokoli nzoto na bango na kokila bilei to na makambo mosusu ya ndenge wana. Liloba ya Nzambe epekisi likambo yango, emonisi ete “konyokola nzoto makasi” ezali “na ntina moko te mpo na kobundisa” bamposa ya mabe.—Bakolose 2:20-23.
Tózala na bokatikati
Kokila bilei ezali mobeko te; ezali mpe mabe te. Na ntango mosusu ekoki kozala na litomba soki tokimi makama oyo touti kolobela. Nzokande, kokila bilei ezali te likambo ya ntina koleka na losambo. Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingaka ete basaleli na ye bázala na esengo. (1 Timote 1:11) Liloba na ye elobi boye: “Eloko mosusu eleki oyo te . . . ete moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”—Mosakoli 3:12, 13.
Tosengeli kozala na esengo na losambo na biso; nzokande, vɛrsɛ moko te ya Biblia emonisi ete kokila bilei ezali likambo ya esengo. Lisusu, soki kokila bilei ememeli biso maladi to esilisi biso makasi mpo na mosala ya esengo oyo Mozalisi na biso apesá biso baklisto ya solo ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, ekozala na litomba moko te.
Ezala toponi kokila bilei to te, tosengeli te kosambisa basusu. Na lisangá ya boklisto kowelana esengeli te kozala na likambo yango, “mpo bokonzi ya Nzambe elakisi te kolya mpe komɛla, kasi elakisi nde boyengebene mpe kimya mpe esengo elongo na elimo santu.”—Baloma 14:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokila bilei oyo Esetele asalaki ná Bayuda, esɛngamaki na mobeko ya Nzambe te, atako emonani ete Nzambe andimaki yango.
b Na Babiblia mosusu ezali na masolo ya kokila bilei, kasi yango ezali te na bamaniskri ya kala ya Makomami ya Grɛki.—Matai 17:21; Malako 9:29; Misala 10:30; 1 Bakolinti 7:5, King James Version.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]
Bafalisai bazalaki komonisa komikitisa ya lokuta ntango bazalaki kokila bilei
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Bokonzi ya Nzambe elakisi te kolya mpe komɛla, kasi elakisi nde boyengebene mpe kimya mpe esengo”
[Etanda na lokasa 29]
Ezali boni mpo na Karézimo?
Balobaka ete eleko ya mikolo 40 ya Karézimo ezalaka mpo na kokanisa mikolo 40 oyo Klisto akilaki bilei. Kasi, Yesu atindaki bayekoli na ye te bákanisaka likambo yango, mpe vɛrsɛ moko te emonisi ete bayekoli na ye basalaki yango. Mbala ya liboso oyo likambo ya kokila bilei na boumeli ya mikolo 40 liboso ya Pásika elobelami, ekoki kozala na mikanda ya Athanase na mobu 330 ya ntango na biso, (T.B.).
Lokola Yesu akilaki bilei nsima ya batisimo na ye, kasi te liboso ya liwa na ye, ndenge mangomba mosusu esalaka Karézimo na boumeli ya bapɔsɔ liboso ya Pásika ekoki kokamwisa. Nzokande, bato ya Babilone, ya Ezipito mpe Bagrɛki, bazalaki na momeseno ya kokila bilei na boumeli ya mikolo 40 na basanza ya ebandeli ya mbula. Emonani ete “baklisto” bazwaki momeseno wana epai ya bato yango.