Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/5 nk. 4-5
  • 1 Yekolá kotyela Biblia motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 Yekolá kotyela Biblia motema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • 1. Eyokani na masolo ya kala
    Lamuká!—2008
  • Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/5 nk. 4-5

1 Yekolá kotyela Biblia motema

“Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.”​—2 Timote 3:16.

MOKAKATANO EZALI NINI? Bato mingi balobaka ete Biblia ezali buku oyo etondi na bwanya ya bato. Basusu bandimaka ete masolo na yango ezali ya solo te. Basusu balobaka ete toli ya Biblia esalisaka te mpe esilá ngala.

NDENGE NINI OKOKI KOLONGA MOKAKATANO YANGO? Mbala mingi, bato oyo batyelaka Biblia motema te mpe bamonaka ete toli na yango esilá ngala, baluká naino te kotalela yango bango moko. Bazongelaka kaka makambo oyo bato mosusu balobaka. Nzokande, Biblia ekebisi biso na maloba oyo: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”​—Masese 14:15.

Na esika ya kondima mbala moko makambo oyo bato mosusu bazali koloba, osengeli kolanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki kofanda na Beloya, oyo ezali lelo nɔrdi ya Grèce. Bazalaki kondima mbala moko te makambo oyo basusu bazalaki koyebisa bango. Kasi, bayebanaki lokola bato oyo bazalaki ‘kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.’ (Misala 17:11) Tótalela na mokuse makambo mibale oyo ekoki kotinda yo ondima ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.

Masolo ya Biblia ezali solo. Banda bambula mingi, bato ya ntembe balobaka ete bankombo ya bato mpe bisika oyo Biblia elobeli ezali solo te. Nzokande, mbala mingi emonanaka ete makambo oyo bato wana ya ntembe balobaki ezalaki na motó mpe makolo te mpe ete oyo Biblia elobi ezali solo.

Na ndakisa, na eleko moko, bato ya mayele bazalaki kondima te ete mokonzi ya Asulia Salegone, oyo Yisaya 20:1 elobeli azalaki. Nzokande, na bambula ya 1840, bato ya arkeoloji babandaki kotimola esika ndako ya mokonzi yango ezalaki. Lelo oyo, Salegone azali moko na bakonzi ya Asulia oyo bayebani malamu.

Bato mosusu mpe bandimaka te ete Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ ya Loma oyo apesaki nzela báboma Yesu, azalaki na bomoi. (Matai 27:1, 22-24) Kasi na 1961, bato ya arkeoloji bakundolaki libanga moko oyo ezalaki na nkombo ya Pilato mpe titre na ye pembeni ya engumba Kaisalia (Césarée) na Israël.

Mpo na komonisa ete masolo ya Biblia ezali solo, zulunalo moko (U.S.News & World Report) ya 25 Ɔkɔtɔbɛ 1999 elobaki boye: “Na lolenge ya kokamwa, biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola lelo emonisi bosolo ya masolo mingi oyo ezali na Kondimana ya Kala mpe ya Sika​—emonisi ete masolo oyo elobeli batata ya mabota ya Yisalaele, kobima ya Bayisalaele na Ezipito, molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi mpe bomoi ya Yesu mpe ya bato ya ntango na ye, ezali solo.” Kondima na Biblia eutaka te na biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola, osengeli koyeba ete masolo oyo ezali na mokanda oyo euti na Nzambe ezali solo.

Toli ya bwanya oyo ezali na Biblia esalisaka bato ya ndenge nyonso. Mbula mingi liboso bato báyeba mikrobɛ mpe ndenge epesaka maladi, Biblia epesaki malako na ntina na bopɛto, mpe malako yango ezali na ntina tii na moi ya lelo. (Levitike 11:32-40; Deteronome 23:12, 13) Mabota oyo bazali kosalela toli ya Biblia oyo elobeli ndenge ya kosalelana makambo bazali na esengo. (Baefese 5:28–6:4) Moto oyo atosaka mitinda ya Biblia akoki kokóma mosali ya malamu koleka to patrɔ oyo ayebi komitya na esika ya basali na ye. (Baefese 4:28; 6:5-9) Kosalela mitinda ya Biblia ekoki mpe kosalisa biso tózala na kimya ya motema. (Masese 14:30; Baefese 4:31, 32; Bakolose 3:8-10) Mozalisi na biso nde apesaka biso toli ya malamu ndenge wana.

MATOMBA NINI OKOZWA? Bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kopesa mayele na moto oyo azangi yango. (Nzembo 19:7) Lisusu, soki tokómi kotyela Biblia motema, ekoki kosalisa biso koleka buku nyonso mosusu mpo tósala likambo mosusu oyo ekosalisa biso tózala na kondima makasi.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 2, “Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto