Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/7 lok. 3
  • Moto akoki koyeba Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto akoki koyeba Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alingi tóyeba Liloba na ye?
  • 3. Ndimá lisalisi ya bato mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • 1. Sengá Nzambe asalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ezali kaka komikosa mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/7 lok. 3

Moto akoki koyeba Biblia?

“Na libota na biso, tozalaki kotánga Biblia mokolo nyonso ya lomingo. Nazalaki kosepela na yango mpenza te. Nazalaki kondima ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, kasi makambo mingi oyo nazalaki kotánga ezalaki mpasi mpenza mpo nakanga ntina.”​—Steven, Grande-Bretagne.

“Ntango nazalaki na mbula 17, namekaki kotánga Biblia. Namonaki ete ezali mpasi kokanga ntina na yango, yango wana natikaki.”​—Valvanera, Espagne.

“Natángá Biblia mobimba mbala moko mpo namonaki ete lokola nazali mondimi ya Katolike, nasengeli kotánga yango. Nasalaki mbula misato mpo nasilisa yango! Kasi nakangaki ntina ya makambo mingi te.”​—Jo-Anne, Australie.

BIBLIA ezali buku oyo ezali na mabɔkɔ ya bato mingi na mokili. Tii lelo oyo, ezali se kotɛkama mingi koleka babuku mosusu, bato mingi bakoki kozwa yango, ezali na minɔkɔ mingi, ekómi mpe na bakasɛti, baCD, baDVD, mpe bongo na bongo. Kasi, bato mingi oyo bazali na Biblia bamonaka ete ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Yo mpe omonaka bongo?

Nzambe alingi tóyeba Liloba na ye?

Biblia elobi boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Ya solo, Yehova Nzambe nde Mobandisi ya Biblia. Alingi ete tóyeba Liloba na ye? To ye moko nde asalaki ete bato mingi báyeba Biblia te, longola kaka mwa bato moke, na ndakisa bakonzi ya mangomba mpe bato ya mayele na makambo ya Biblia?

Tótala bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi:

“Lilako oyo elakeli ngai yo lelo eleki na makasi mpo na yo te mpe ezali mosika te.”​—Deteronome 30:11.

“Kozipola maloba na yo ekopesa pole, ekopesa mpe mayele na baoyo bazangi yango.”​—Nzembo 119:130.

“Na ngonga wana mpenza [Yesu] atondaki na esengo na kati ya elimo santu mpe alobaki ete: ‘Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, mpamba te obombi makambo oyo malamumalamu liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele, mpe omonisi yango epai ya bana mike.’”​—Luka 10:21.

Ya solo mpenza, Mobandisi ya Biblia alingi oyeba Liloba na ye! Kasi, likambo ya solo ezali ete bato mingi ya mitema sembo bamonaka ete ezali mpasi kokanga ntina ya buku yango. Nini ekoki kosalisa yo? Masolo oyo elandi epesi makanisi misato oyo ekoki kosalisa yo oyeba Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto