Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/7 nk. 6-8
  • 3. Ndimá lisalisi ya bato mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 3. Ndimá lisalisi ya bato mosusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi ya nani?
  • ‘Bapesaki biyano na mituna na ngai nyonso’
  • Moto akoki koyeba Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Lisalisi mpo na koyeba Biblia malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Biblia: Búku oyo ekomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/7 nk. 6-8

Ndenge oyo okoki koyeba Biblia

3. Ndimá lisalisi ya bato mosusu

Ntango Edward John Eyre, moto moko oyo azalaki kosala mibembo mpo na koyeba mokili, asalaki mobembo moko ya mpasi na mokili patatalu ya Nullarbor oyo ezalaki na bato te, bankolo-mboka balakisaki ye ndenge ya kozwa mai na nse ya mwa bangomba ya zɛlɔ mpe na banzete babengi eucalyptus. Lokola andimaki lisalisi ya bato wana oyo bayebaki mboka malamu, Eyre abikisaki bomoi na ye.

NDENGE ndakisa wana emonisi yango, mpo tólonga kosala likambo moko ya mpasi, mbala mingi esɛngaka moto moko oyo ayebi yango malamu asalisa biso. Ezali mpe bongo ntango obandi kotánga Biblia.

Yesu azalaki na likanisi te ete bayekoli na ye bakokanga ntina ya Biblia kozanga lisalisi ya bato mosusu. Mokolo moko, “afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.” (Luka 24:45) Yesu ayebaki ete batángi ya Biblia basengeli na lisalisi mpo bákanga ntina ya Makomami.

Lisalisi ya nani?

Yesu atindaki bayekoli na ye ya solo bápesa lisalisi yango. Liboso amata na likoló, apesaki bango etinda oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Mosala ya libosoliboso ya baklisto ezali koteya, elingi koloba kolimbola ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokolo na mokolo. Baklisto ya solo basalisaka basusu bákanga ntina ya Biblia.

Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye etinda yango, mwa moke na nsima likambo moko ya esengo esalemaki. Biblia elobeli mosali moko ya mokonzi ya Etiopia oyo azalaki kotánga mokanda ya Yisaya. Akómaki na esika moko oyo akangaki ntina na yango te. Biblia elobi ete mikapo oyo akangaki ntina na yango te elobi boye: “Lokola mpate, amemamaki na esika ya libomi, mpe lokola mwana-mpate oyo elobaka te liboso ya mokati-nsuki na yango, kaka bongo mpe afungoli monɔkɔ na ye te. Na boumeli ya kokitisama na ye lisambisi elongolamaki epai na ye. Nani akoyebisa makambo ndenge na ndenge ya libota na ye? Mpamba te bomoi na ye elongolami na mabelé.”​—Misala 8:32, 33; Yisaya 53:7, 8.

Moto yango atunaki Filipo, moklisto oyo ayebaki Makomami malamu, ete: “Mosakoli azali koloba likambo oyo na ntina na nani? Na ntina na ye moko to na ntina na moto mosusu?” (Misala 8:34) Moetiopia yango ya motema sembo autaki na Yelusaleme mpo na kosambela, mpe ekoki kozala ete abondelaki Nzambe atambwisa ye. Emonani ete azalaki kotánga na mposa makasi, na elimo ya komikitisa. Atako bongo, moto yango azalaki kaka kokanga ntina ya mokapo yango te. Na komikitisa nyonso, asɛngaki Filipo asalisa ye. Moto yango asepelaki mingi na bandimbola oyo Filipo apesaki ye mpe etindaki ye akóma moklisto.​—Misala 8:35-39.

Batatoli ya Yehova bazali kokoba mosala oyo Filipo mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki. Na mikili koleka 235, Batatoli bazali komipesa mpo na kosalisa basusu báyeba oyo Biblia eteyaka mpenza. Basalaka yango na nzela ya boyekoli ya liteya mokomoko ya Makomami. Lolenge yango ya koyekola Biblia esɛngaka kotalela na mozindo oyo Biblia elobi na ntina na likambo moko boye.a​—Talá etanda “Biyano ya malamu na mituna ya Biblia.”

‘Bapesaki biyano na mituna na ngai nyonso’

Steven, Valvanera, mpe Jo-Anne, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, bakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Steven alobi boye: “Nakamwaki na komona ete soki kaka totaleli mwa mitinda to masolo ya Biblia, mbala mingi ezalaki komonisa ngai solo ya Biblia polele. Liboso nabanda koyekola Biblia, moto moko te alakisaki ngai ndenge ya kosala yango. Nasepelaki mingi komona ete koyekola Biblia ezali te kotyana bantembe oyo ezangi nsuka mpe kobendana mpo na makanisi ekeseni na makambo ya Nzambe.”

Valvanera mpe azali na likanisi yango. Alobi boye: “Makambo nyonso ezalaki na molɔngɔ mpe polele. Namonaki ete makambo nyonso ezali solo, kaka te mpo ‘Lingomba’ nde elobi bongo, kasi mpo bazalaki kopesa ngai ndimbola ya polele mpo na likambo mokomoko.” Jo-Anne alobi boye: “Lokola basalelaki Biblia mpo na kopesa biyano na mituna na ngai nyonso, nakómaki na limemya makasi mpo na Mobandisi na yango, mpo amonaki mosika mpe akomisaki eyano oyo ebongi na motuna mokomoko oyo moto akotuna.”

Oyebi Motatoli ya Yehova moko? Tolendisi yo osɛnga ye alakisa yo ndenge boyekoli yango esalemaka. Soki oyebi Motatoli ya Yehova te, tosɛngi yo otinda mokanda na adrɛsi moko kati na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 4 ya zulunalo oyo. Soki ozwi lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, ozali kotánga na makasi ya malamu, mpe moto moko oyo ayebi Biblia malamu azali kosalisa yo, Liloba ya Nzambe ekozala mpasi te mpo na yo. Okoki kokanga ntina ya Biblia!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku oyo esalisi bato mingi báyekola Biblia ndenge yango, ezali Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 8]

Biyano ya malamu na mituna ya Biblia

Mwa mitó ya makambo oyo Batatoli ya Yehova basalelaka ntango bayekolaka na bato Biblia:

• Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

• Bato oyo bakufá bazali wapi?

• Tozali na “mikolo ya nsuka”?

• Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

• Ndenge nini nakoki kozala na libota ya esengo?

[Bililingi na lokasa 7]

Mpo na koyeba Biblia . . . sɛngá elimo ya Nzambe, tángáká na makanisi ya malamu, ndimá lisalisa ya bato mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto