Oyebaki yango?
Mpo na nini basoda ya Loma basepelaki mingi na elamba ya kati ya Yesu?
Basoda minei oyo babomaki Yesu bakabolaki bilamba na ye bango minei. Nzokande, Yoane 19:23 elobi ete: “Kasi elamba [ya Yesu] . . . ya kati etongamaki na biteni te, esalemá nde mobimba banda na likoló tii na nse.” Basoda bazwaki ekateli ete bápasola yango te kasi bábɛta mbɛsɛ mpo na koyeba nani akozwa yango. Elamba yango esalemaki ndenge nini?
Ekoki kozala ete elamba yango ya kati ezalaki zambala oyo ezali lokola simisi, oyo bazalaki kosala na lini to na nsuki ya mpate mpe ezalaki kokita tii na mabɔlɔngɔ to na makolo. Mpo na kotonga bilamba yango, bazalaki kozwa biteni oyo ezali molai ndenge moko ngámbo nyonso to ngámbo mibale mpe bazalaki kosɔna yango ngámbo misato. Bazalaki kotika madusu mpo na motó mpe mabɔkɔ.
Zambala oyo ezalaki ntalo koleka oyo wana ezalaki kosalema kaka ndenge wana; kasi, buku moko (Jesus and His World) elobi ete bazalaki kozwa “kaka elamba moko ya molai, bagumbi yango na biteni mibale, na nsima basali nkingo na katikati” mpe batongi bansuka na yango. Zambala ya ndenge wana ezalaki kosɛnga bátonga yango na mipanzi.
Zambala oyo etongamá na biteni te, lokola oyo Yesu alataki, ezalaki kosalema kaka na Palestine. Bazalaki kosala yango na masini ya kolita oyo ezalaki na mabaya mibale etɛlɛmá; likoló ya mabaya yango ezalaki na libaya mosusu epai bazalaki kokangisa milɔngɔ mibale ya bansinga oyo ekiti tii na nse, molɔngɔ moko ezalaki liboso mpe mosusu na nsima. Mosali-bilamba azalaki kosalela motonga ná nsinga mpe azalaki kolekisalekisa yango na molɔngɔ ya bansinga oyo ezali liboso mpe kobalola yango mbala moko na molɔngɔ ya bansinga oyo ezali na nsima; buku moko elobi ete “na ndenge yango, azalaki kosala elamba oyo basɔná ata na esika moko te.” Emonani ete zambala oyo etongamá na biteni te ezalaki na motuya mingi; yango wana basoda basepelaki na yango mingi.
Bato mosusu bazalaki kobɔkɔla banzoi na Yisalaele ya kala?
Makomami ya Liebele elobi ete Nzambe alakaki kokɔtisa Bayisalaele ya kala na “mokili moleki na [miliki] mpe na mafuta ya nzoi.” (Exode 3:8) Emonani ete na bisika mingi, Biblia elobeli nde mafuta ya banzoi ya zamba. Esika moko te Biblia elobeli mosala ya kobɔkɔla banzoi na Yisalaele ya kala. Kasi eumeli naino te, bato ya arkeoloji bamonaki bilembo oyo emonisi ete bato ya kala oyo bazalaki kofanda na lobwaku ya Bet Shean bazalaki “kobɔkɔla nzoi mingi mpenza.”
Na Tel Rehov, bato ya mayele ya ebongiseli moko oyo ezali na Israël (Institut d’archéologie de l’université hébraïque de Jérusalem) bakundolaki esika moko oyo bazalaki kobɔkɔla banzoi banda na ekeke ya zomi tii na ebandeli ya ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elingi koloba na ebandeli mpenza ya eleko oyo Yisalaele ekómaki koyangelama na bakonzi. Yango ezali mbala ya liboso oyo bakundolaki bandako ya kobɔkɔla banzoi na Moyen-Orient. Bato ya mayele bakanisi ete na ebandeli, esika yango ezalaki na bandako soki nkama ya kobɔkɔla ya banzoi, oyo etandamaki na milɔngɔ mpe elandisamaki misatomisato moko likoló ya mosusu.
Lapolo moko ya bato ya iniversite oyo bamonaki esika yango elobi ete ndako mokomoko ya banzoi “ezalaki na lolenge ya sɛrklɛ mpe esalemaki na mabelé oyo etumbami te . . . ezalaki na molai ya santimɛtrɛ 80 mpe bonene ya santimɛtrɛ 40. . . . Bato ya mayele mpe bato mosusu oyo bayebi malamu mosala ya kobɔkɔla banzoi, oyo bakendaki kotala esika yango, balobaki ete bandako wana ya banzoi ekokaki kobimisa ata kilo 500 ya mafuta ya nzoi na mbula moko.”
[Elilingi na lokasa 22]
Tel Rehov
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Institute of Archaeology/Hebrew University © Tel Rehov Excavations