Zwáká na botɔndi—Pesáká na motema moko
YEHOVA, Tata na biso ya bolingo, amibanzabanzaka mingi mpo na biso. Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete atyelaka basaleli na ye nyonso likebi. (1 Pet. 5:7) Ndenge moko oyo Yehova amonisaka yango ezali na nzela ya lisungi ya ndenge na ndenge oyo apesaka biso mpo tósalela ye na bosembo. (Yis. 48:17) Mingimingi ntango tokutani na mikakatano oyo epesi biso mpasi, Yehova alingaka tózwa matomba na lisalisi oyo apesaka. Mibeko ya Moize emonisi bosolo ya likambo yango.
Na Mibeko ya Moize, Yehova azwaki bibongiseli mpo “babola,” lokola bitike, basi oyo mibali na bango bakufá, mpe bapaya bázwaka lisungi. (Lev. 19:9, 10; Det. 14:29) Ayebaki ete basusu kati na basaleli na ye bakozala na mposa ya lisalisi ya bandeko na bango. (Yak. 1:27) Yango wana, mosaleli na ye moko te asengeli koboya lisalisi oyo euti na bandeko oyo Yehova asaleli. Kasi, tosengeli kondima lisungi yango na elimo ya malamu.
Liloba ya Nzambe emonisi mpe ete basaleli na ye basengeli mpe kozwaka libaku ya kopesa. Tókanisa lisolo ya “mwasi moko mobola oyo akufelá mobali” oyo Yesu amonaki na tempelo na Yelusaleme. (Luka 21:1-4) Na ntembe te, azalaki kozwa matomba na ebongiseli ya Yehova mpo na basi oyo mibali na bango bakufá ndenge emonisami na Mibeko. Kasi, atako azalaki mobola, Biblia elobeli ye te mpo na lisungi oyo azalaki kozwa, kasi mpo na ndenge apesaki. Na ntembe te, elimo oyo amonisaki ememelaki ye esengo, mpo Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Lokola oyebi likambo yango, ndenge nini okoki kozala “na momeseno ya kopesa” mpe kozwa esengo?—Luka 6:38.
‘Nakozongisa nini epai ya Yehova?’
Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?” (Nz. 116:12) Mapamboli nini azwaki? Yehova asungaki ye na ntango ya “kotungisama mpe mawa.” Lisusu, Yehova abikisaki “molimo [na ye] na liwa.” Mpo na yango, alingaki ‘kozongisela’ Yehova eloko moko. Mokomi ya nzembo akokaki kosala nini? Alobaki boye: “Nakokokisa bilaka na ngai nyonso epai ya [Yehova].” (Nz. 116:3, 4, 8, 10-14) Azwaki ekateli ya kokokisa bilaka nyonso oyo apesaki Yehova mpe kotosa masɛngami nyonso ya Nzambe.
Yo mpe okoki kosala bongo. Ndenge nini? Soki ozali na bomoi oyo eyokani na mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Yango wana, salá nyonso mpo losambo ya Yehova ezala na esika ya liboso na bomoi na yo mpe tiká elimo ya Nzambe etambwisa makambo nyonso oyo ozali kosala. (Mos. 12:13; Gal. 5:16-18) Mpo na koloba solo, okoki te kofuta Yehova mpo na nyonso oyo asili kosalela yo. Kasi, ‘okosepelisa motema ya Yehova’ ntango ozali komipesa mobimba na mosala na ye. (Mas. 27:11) Ezali mpenza libaku malamu kosepelisa Yehova na ndenge wana!
Pesá mabɔkɔ na bolamu ya lisangá
Ntembe ezali te ete ozwi matomba ndenge na ndenge na nzela ya lisangá. Na nzela ya lisangá, Yehova apesi yo ebele ya bilei ya elimo. Oyekoli solo oyo elongoli yo na molili ya mangomba ya lokuta. (Yoa. 8:32) Na makita ya lisangá, mayangani ya mike mpe ya minene oyo ebongisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele,” ozwi boyebi oyo ekomema yo na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, epai mpasi mpe minyoko ekozala te. (Mat. 24:45-47) Ezali mpasi tótánga mapamboli nyonso oyo tozwi, mpe oyo tokozwa na nzela ya lisangá. Eloko nini okoki kozongisela lisangá mpo na mapamboli yango nyonso?
Ntoma Paulo akomaki boye: “Nzoto mobimba, na kosanganáká liboke moko na boyokani mpenza mpe kobongisamáká mpo na kosala elongo na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli, engebene mosala ya enama moko na moko na mezire oyo ekoki, ezali kopesa mabɔkɔ na bokoli ya nzoto mpo na kotongama na yango moko na kati ya bolingo.” (Ef. 4:15, 16) Atako bavɛrsɛ yango elobeli libosoliboso baklisto bapakolami, toli na yango ebongi mpo na baklisto nyonso lelo oyo. Ya solo, mokomoko na kati ya lisangá akoki kopesa mabɔkɔ mpo lisangá ekende liboso. Na ndenge nini?
Tokosala yango soki tozali ntango nyonso kosala milende mpo na kolendisa bandeko mosusu na elimo. (Lom. 14:19) Tokoki mpe kopesa mabɔkɔ na “bokoli ya nzoto” soki tozali komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe na makambo nyonso oyo tosalelaka bandeko na biso baklisto. (Gal. 5:22, 23) Lisusu, tosengeli koluka mabaku ya ‘kosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.’ (Gal. 6:10; Ebe. 13:16) Moto nyonso na kati ya lisangá—bandeko mibali, bandeko basi, bilenge mpe mibange—biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na ‘kotongama ya nzoto na kati ya bolingo.’
Lisusu, tokoki kosalela makoki, makasi, mpe bozwi na biso mpo na kosimba mosala ya kosakola oyo lisangá ezali kokokisa. Yesu Klisto alobaki ete: “Bozwi ofele.” Tosengeli kosala nini? Alobaki boye: “Bópesa ofele.” (Mat. 10:8) Na yango, tómipesa na mosala ya ntina mingi ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Ezali na makambo oyo ezali kopekisa yo osala mingi? Kobosana te mwasi mobola oyo akufelá mobali oyo Yesu alobelaki. Likabo oyo apesaki ezalaki ya motuya moke mpenza. Kasi, Yesu alobaki ete apesaki koleka bato mosusu nyonso. Apesaki nyonso oyo akokaki kopesa.—2 Kol. 8:1-5, 12.
Zwáká na elimo ya malamu
Nzokande, ekoki kokóma ete okelela mpe na ntango yango bandeko na lisangá basengeli kosalisa yo. Kokakatana te kondima lisungi oyo lisangá epesi yo wana ozali kobundana na mitungisi ya mokili oyo. Yehova atyá mibali ya makoki mpo na “kobatela lisangá,” mpe kosalisa biso ntango tokutani na minyoko to bampasi. (Mis. 20:28) Bankulutu mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá bazalaka pene mpo na kobɔndisa, kosunga mpe kobatela yo na ntango ya mpasi.—Gal. 6:2; 1 Tes. 5:14.
Kasi, ntango ozali kozwa lisungi, osengeli kosala yango na elimo ya malamu. Zaláká ntango nyonso na botɔndi mpo na lisungi oyo ozwi. Taleláká lisungi yango oyo bandeko bapesaka lokola elembo ya motema boboto ya Nzambe. (1 Pet. 4:10) Mpo na nini ezali na ntina? Mpo tolingi te kokokana na bato mingi ya mokili, oyo bazalaka na botɔndi te ntango bapesi bango lisungi.
Tózala na bokatikati mpe na makanisi ebongi
Na mokanda oyo akomelaki lisangá ya Filipi, Paulo alobaki mpo na Timote boye: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na ezaleli lokola ya ye, oyo akomitungisa mpenza mpo na makambo oyo etali bino.” Kasi, abakisaki boye: “Bamosusu nyonso bazali koluka matomba na bango moko, oyo ya Klisto Yesu te.” (Filp. 2:20, 21) Soki tobosani te maloba wana ya Paulo, ndenge nini lelo oyo tokoki koboya koluka kaka ‘matomba na biso moko’?
Tosengeli te kolekisa ndelo ntango tozali kosɛnga bandeko ya lisangá básalisa biso na mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Mpo na nini? Tókanisa naino: Ntembe ezali te ete tokozala na botɔndi mingi soki ndeko moko asungi biso ntango tokutani na mokakatano. Kasi, tokosɛnga ye lisalisi yango na makasi? Te. Ndenge moko mpe, bandeko na biso bazalaka ntango nyonso na esengo ya kosalisa biso; kasi, tosengeli kolekisa ndelo te na makambo oyo tozali kozela ete básalela biso. Kutu, tokolinga ete nyonso oyo bandeko bazali kosala mpo na kosalisa biso, básala yango na bolingo na bango.
Ntembe ezali te, bandeko na yo bakozala ntango nyonso pene mpo na kosalisa yo. Kasi, ekoki kokóma ete bázala te na likoki ya kokokisa bamposa na yo nyonso. Soki esalemi bongo, zalá na elikya ete Yehova akosunga yo, ndenge asungaki mokomi ya nzembo, ata soki okutani na mpasi ya ndenge nini.—Nz. 116:1, 2; Filp. 4:10-13.
Na yango, kokakatanaka te kozwa na botɔndi lisungi nyonso oyo Yehova azali kopesa yo, mingimingi na ntango ya mpasi mpe ya mikakatano. (Nz. 55:22) Alingi ondima yango. Kasi, alingi mpe ete ‘opesaka na esengo.’ Yango wana, ‘kaná na motema’ kopesa nyonso oyo okoki mpo na kosimba losambo ya solo. (2 Kol. 9:6, 7) Na ndenge yango, okokokisa makambo yango nyonso mibale—kozwa na botɔndi mpe kopesa na motema moko.
[Etanda/Bililingi na lokasa 31]
“Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”—Nz. 116:12
▪ Lukáká mabaku ya ‘kosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu’
▪ Lendisáká mpe bɔndisáká basusu na elimo
▪ Saláká nyonso oyo okoki na mosala ya kokómisa bato bayekoli