Nzambe alaki yo bomɛngo?
‘Nzambe alingi ozala na bozwi, ozala na mituka ebele, mpe mombongo na yo etambola malamu . . . Zalá kaka na kondima, fungolá pɔtɔmɔni na yo, mpe pesá ye mbongo nyonso oyo okoki.’
ZULUNALO moko oyo ebimaka na Brésil emonisi ete mangomba mosusu ya ekólo yango eyebisaka bato makambo ya ndenge wana. Bato mingi bandimaka makambo yango. Mpo na ankɛtɛ moko oyo basalaki na États-Unis epai ya bato oyo bamibengaka bakristo, zulunalo Time elobi boye: “Bato mingi (61 %) bandimaki ete Nzambe alingi bato bázala na bozwi. Mpe bato mosusu (31 %) . . . bandimaki ete soki opesi Nzambe mbongo, akopambola yo, akopesa yo mbongo mingi koleka.”
Makanisi ya ndenge wana, oyo elobaka ete ‘okokóma na bozwi’ ezali kopalangana mingimingi na mikili ya Amerika ya Sudi, na ndakisa na Brésil, mpe bato bazali kosopana na mangomba oyo eteyaka ete Nzambe apesaka bomɛngo. Kasi, Nzambe alaki mpenza ete akopesa basaleli na ye bomɛngo? Basaleli nyonso ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki bato ya bomɛngo?
Ya solo, mbala mingi na Makomami ya Ebre totángaka ete bato oyo Nzambe apambolaki bakómaki na bomɛngo. Na ndakisa, mokanda ya Kolimbola Mibeko 8:18 elobi boye: “Osengeli kokanisa Yehova Nzambe na yo, mpamba te ye moto apesi yo nguya ya kozwa bomɛngo.” Maloba yango etindaki Bayisraele bándima ete soki batosi Nzambe, akokómisa bango ekólo ya bomɛngo.
Kasi ezalaki ndenge nini mpo na moto mokomoko? Yobo, moto ya sembo, azalaki na bomɛngo mingi mpenza, mpe ntango Satana akómisaki ye mobola, na nsima Yehova azongiselaki Yobo bomɛngo na ye “mbala mibale.” (Yobo 1:3; 42:10) Abrahama mpe azalaki na bozwi. Mokanda ya Ebandeli 13:2 elobi ete azalaki “na bozwi mingi: bitonga ya banyama mpe palata mpe wolo.” Ntango mampinga ya bakonzi minei ya ɛsti bakangaki Lota, mwana ya ndeko na ye, Abrahama “ayanganisaki mibali na ye oyo babongisamá mpo na etumba, baombo nkama misato na zomi na mwambe (318) oyo babotamaki na ndako na ye.” (Ebandeli 14:14) Lokola Abrahama azalaki na ‘mibali 318 oyo babongisamá mpo na etumba,’ oyo bakokaki kosalela bibundeli, ntembe ezali te ete libota na ye ezalaki monene mpenza. Lokola azalaki kokoka koleisa libota monene ndenge wana elakisi ete azalaki mpenza moto ya bomɛngo, azalaki na bitonga minene ya bampate mpe ya bangɔmbɛ.
Ya solo, basaleli ya Nzambe mingi ya ntango ya kala na ndakisa Abrahama, Yisaka, Yakobo, Davidi, Salomo mpe basusu, bazalaki na bozwi. Kasi yango elingi nde koloba ete Nzambe akokómisa moto nyonso oyo asalelaka ye mozwi? Epai mosusu, soki moto azali mobola, yango emonisi nde ete azali na lipamboli ya Nzambe te? Lisolo oyo elandi ekolobela mituna wana.