Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/10 nk. 22-25
  • Mayangani misato oyo esalisaki ngai na bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayangani misato oyo esalisaki ngai na bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nayekoli kozala na mpiko
  • Nayekoli kosepela na oyo nazali na yango
  • Toyekoli komipesa mingi koleka
  • Tokutani lisusu na baninga ya kala
  • Yehova asalisaki ngai mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bikateli ya malamu ememeli biso matomba ya libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nakozongisela Yehova nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/10 nk. 22-25

Mayangani misato oyo esalisaki ngai na bomoi

Lisolo ya George Warienchuck

ESILÁ kokóma ete oyoka likambo moko na liyangani, mpe likambo yango esimba motema na yo mpe etinda yo obongisa makambo mingi na bomoi na yo? Likambo yango ekómelaki ngai. Soki nakanisi, namonaka ete ezali mingimingi na mayangani misato oyo esalisaki ngai na bomoi. Liyangani ya liboso esalisaki ngai natika kobangabanga; oyo ya mibale esalisaki ngai nayekola kosepela na oyo nazali na yango; oyo ya misato esalisaki ngai nayekola komipesa mingi koleka. Kasi, liboso nalobela ndenge mayangani yango esalisaki ngai, nalobela naino makambo oyo esalemaki na bomwana na ngai, bambula mingi liboso ya mayangani yango.

Nabotamaki na 1928 mpe nazali mwana ya nsuka ya libota ya bana misato. Ngai ná bayaya na ngai ya basi Margie ná Olga, tokolá na engumba South Bound Brook, na etúká ya New Jersey, na États-Unis; na ntango wana engumba yango ezalaki na bato soki 2 000. Atako tozalaki babola, mama azalaki kokaba mingi. Soki kaka azwi mwa mbongo mpe alambi bilei ya kitoko, azalaki kopesa bato oyo bazalaki kofanda pembeni na biso. Ntango nakómaki na mbula libwa, Motatoli moko ayaki kotala mama; lokola Motatoli yango azalaki koloba Hongrois, monɔkɔ ya mboka ya mama, mama asepelaki koyoka nsango ya Biblia. Na nsima, Bertha, ndeko mwasi moko oyo azalaki na mbula koleka 20 mwa moke, akobaki koyekola Biblia na mama mpe asalisaki ye akóma mosaleli ya Yehova.

Na bokeseni na mama, ngai nazalaki nsɔninsɔni mpe kobangabanga. Mama asalisaki ngai te, azalaki kolinga kokitisa ngai. Ntango natunaki ye na kolela ete, “Mpo na nini okitisaka ngai ntango nyonso?” ayebisaki ngai ete alingaka ngai mingi, kasi alingi kobebisa ngai te. Mama azalaki na makanisi ya mabe te, kasi lokola azalaki kopesa ngai longonya te, nazalaki komona ete basusu baleki ngai.

Mokolo moko, mama moko ya kartye oyo azalaki koloba na ngai na boboto asɛngaki ngai nakende elongo na bana na ye na eteyelo ya mokolo ya lomingo ya lingomba na bango. Nayebaki ete Yehova akosepela te soki nakei, kasi nabangaki koyokisa mama wana ya boboto mpasi. Yango wana, na boumeli ya basanza, nazalaki kokende na ndako-nzambe yango atako nazalaki kotungisama na nse ya motema. Na kelasi mpe, kobanga bato etindaki ngai nasala makambo kozanga koyokela lisosoli na ngai. Mokambi ya eteyelo, oyo azalaki makambo makasi, ayebisaki balakisi ete bana nyonso basengeli kopesa drapo losako. Ngai mpe nazalaki kosala yango. Nasalaki yango pene na mbula mobimba, mpe na nsima makambo ebongwanaki.

Nayekoli kozala na mpiko

Na 1939, bakómaki kosala boyekoli ya mokanda na ndako na biso. Ndeko moko oyo azalaki mobongisi-nzela, nkombo na ye Ben Mieszkalski, nde azalaki kotambwisa yango. Tozalaki kobenga ye Engambe Ben, mpe nkombo yango ebongaki na ye. Liboso na ngai, azalaki komonana molai mpe monene lokola porte ya ndako na biso. Kasi, atako azalaki engambe, azalaki na boboto, mpe lokola azalaki kosɛkisa ngai nazalaki lisusu kobanga ye te. Yango wana, ntango Ben asɛngaki ngai tóbima na mosala ya kosakola, nandimaki na esengo. Tokómaki baninga. Ntango nazalaki na basusi, azalaki koloba na ngai ndenge yaya ya bolingo alobaka na leki na ye. Yango ezalaki na ntina mingi mpo na ngai mpe nakómaki kolinga ye makasi.

Na 1941, Ben asɛngaki libota na biso mobimba tókende elongo na ye na motuka na ye na liyangani moko na Saint Louis, na etúká ya Missouri. Nasepelaki mingi mpenza! Nasalá naino te mobembo ya kilomɛtrɛ 80 longwa na ndako na biso, kasi nasengelaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 1 500! Kuna na Saint Louis, tokutanaki na mokakatano. Bakonzi ya mangomba bapesaki bandimi na bango mitindo ete báfandisa Batatoli na bandako na bango te, atako liboso bandimaki kosala yango. Bato mingi batosaki mitindo yango. Libota oyo esengelaki koyamba biso ezwaki mpe mitindo yango. Atako bongo, bayambaki biso. Bato yango balobaki ete bakofandisa biso na ndako na bango, ndenge balakaki. Mpiko na bango ekamwisaki ngai.

Bayaya na ngai bazwaki batisimo na liyangani yango. Kaka na mokolo yango, Ndeko Rutherford, oyo autaki na Betele ya Brooklyn, asalaki lisukulu moko ya kolendisa mpenza mpe asɛngaki bana nyonso oyo balingi kosala mokano ya Nzambe bátɛlɛma. Bana soki 15 000 batɛlɛmaki. Ngai mpe natɛlɛmaki. Na nsima, asɛngaki bana oyo balingi komipesa na mosala ya kosakola báloba, “Ɛɛ.” Elongo na bana mosusu nagangaki, “Ɛɛ.” Bato babɛtaki mabɔkɔ makasi. Yango elendisaki ngai.

Nsima ya liyangani, tokendaki kotala ndeko moko na etúká ya Virginie ya wɛsti. Ndeko yango ayebisaki biso ete mokolo moko ntango azalaki na mosala ya kosakola, etuluku moko ya bato oyo bazalaki na nkanda babɛtaki ye mpe bapakolaki ye gudrɔ ná nsala ya nsoso. Nazalaki koyoka ye na likebi mpenza. Alobaki boye: “Nakotika kosakola te.” Ntango tolongwaki epai ya ndeko yango, namiyokaki lokola Davidi. Nazalaki lisusu kobanga Goliate te, elingi koloba mokambi ya eteyelo na biso.

Ntango nakómaki na kelasi, nakendaki epai ya mokambi. Atalaki ngai na nkanda. Nabondelaki Yehova na nse motema mpo asalisa ngai. Mbala moko nalobaki boye: “Nakendaki na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova. Nakopesa lisusu drapo losako te!” Afandaki nyɛɛ ntango molai. Na nsima, atɛlɛmaki na malɛmbɛ mpe abandaki kopusana pene na ngai. Elongi na ye ezalaki kopela na nkanda. Agangaki boye: “Soki opesi drapo losako te, okolongwa kelasi!” Na mbala oyo, nabukaki mobeko ya Nzambe te, mpe nayokaki esengo na motema na ndenge oyo nayoká naino te.

Nazalaki na mposa makasi ya koyebisa Ben makambo oyo eutaki koleka. Ntango namonaki ye na Ndako ya Bokonzi, nagangaki ete: “Balongoli ngai na kelasi! Naboyaki kopesa drapo losako!” Ben asimbaki ngai na lipeka, asɛkaki mwa moke, mpe alobaki ete: “Yebá ete Yehova alingi yo.” (Mib. 31:6) Maloba wana elendisaki ngai mpenza! Na mokolo ya 15 Yuni 1942, nazwaki batisimo.

Nayekoli kosepela na oyo nazali na yango

Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nkita ya ekólo emataki, mpe bato bakómaki konduka biloko ya mokili. Nazwaki mosala oyo bazalaki kofuta ngai malamu, mpe nakómaki na likoki ya kosomba biloko oyo nazalaki kokanisa ete nakoki kosomba yango te. Baninga na ngai basombaki batukutuku; bamosusu babongisaki bandako na bango. Ngai nasombaki vuatire ya sika. Eumelaki te, lokola nakómaki na mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili, nazalaki lisusu na ntango mingi te mpo na mosala ya Yehova. Nayebaki ete nzela oyo nazali kolanda ezali malamu te. Nzokande, na 1950, liyangani moko oyo esalemaki na engumba New York esalisaki ngai natalela lisusu bomoi na ngai.

Na liyangani yango, molobi mokomoko azalaki kolendisa bayangani bámipesa lisusu koleka na mosala ya kosakola. Molobi moko alobaki boye: “Bólongola makambo oyo ezali na ntina mingi te, mpe bópota mbangu.” Nayokaki lokola nde azali koloba na ngai. Nakɔtaki mpe likita moko ya kopesa bana-kelasi ya Gileadi badiplome, mpe yango etindaki ngai nakanisa ete, ‘Soki Batatoli yango ya mbula na ngai bandimi kotika bomoi ya malamu mpo na kokende kosala na mboka mopaya, ngai mpe nasengeli kosala yango awa na mboka na biso.’ Na nsuka ya liyangani, nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela.

Na ntango wana, nakómaki fianse ya Evelyn Mondak, ndeko mwasi moko ya molende na lisangá oyo nakómaki. Mama ya Evelyn, oyo abɔkɔlaki bana na ye motoba ye moko, azalaki mwasi ya mpiko. Azalaki kolinga kosakola na balabala liboso ya ndako-nzambe moko monene ya Katolike. Atako sango asilikaki mbala mingi mpe azalaki koyebisa ye alongwa wana, alongwaki te. Lokola mama na ye, Evelyn azalaki kobanga bato te.​—Mas. 29:25.

Na 1951, ngai ná Evelyn tobalanaki, totikaki misala na biso, mpe tokómaki babongisi-nzela. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alendisaki biso tókende na Amagansett, mboka oyo ezali pembeni ya mai monene ya Atlantique, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 160 longwa na engumba New York. Ntango bandeko ya lisangá bayebisaki biso ete bazali na ndako ya kopesa biso te, tolukaki wagɔ kasi tomonaki oyo tokokaki kosomba te. Na nsima, tomonaki wagɔ moko ya kala. Nkolo na yango asɛngaki biso tósomba yango na dolare 900​—mbongo nyonso oyo bapesaki biso na kado ya libala. Tosombaki yango, tobongisaki yango, mpe tomemaki yango na teritware na biso ya sika. Kasi, ntango tokómaki kuna, tozalaki na mbongo te mpe tozalaki komituna ndenge nini tokolonga na mosala ya babongisi-nzela.

Evelyn azwaki mosala ya kosokola bandako, mpe ngai nazalaki kotya bopɛto na butu, na restora moko oyo balambaka biloko ya Italie. Nkolo restora yango ayebisaki ngai boye: “Soki biloko ya kolya etikali, memeláká mwasi na yo.” Na yango, ntango nakozonga na ndako na ngonga 2 na butu, ndako na biso ezalaki kotonda na nsolo ya pizza mpe pasta. Ntango totye lisusu bilei yango na mɔtɔ, ezalaki kosepelisa biso mpenza, mingimingi na eleko ya malili wana tozalaki kolɛnga na kati ya wagɔ na biso oyo ezalaki kotonda na malili. Longola yango, mbala mingi bandeko ya lisangá bazalaki kotikela biso mbisi ya monene na porte ya wagɔ. Na boumeli ya bambula oyo tosalaki elongo na bandeko wana ya Amagansett, toyekolaki ete kosepela na mwa biloko oyo tozali na yango epesaka mpenza esengo. Bambula yango ezalaki ya esengo.

Toyekoli komipesa mingi koleka

Na sanza ya Yuli 1953, toyambaki bankama ya bamisionɛrɛ oyo bautaki na bikólo mosusu mpe bayaki koyangana na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili mingi, na engumba New York. Bayebisaki makambo kitoko oyo bakutanaka na yango. Bapesaki bayangani esengo na bango. Lisusu, ntango molobi moko na liyangani amonisaki ete ezali na mikili oyo nsango ya Bokonzi ekómi naino te, toyebaki oyo tosengelaki kosala: komipesa mpo na kokende kosakola na mikili oyo mposa ezali makasi. Na liyangani yango, totondisaki baformilɛrɛ mpo na kokɔta na kelasi ya bamisionɛrɛ. Kaka na mbula yango, babengaki biso na kelasi ya mbala ya 23 ya Gileadi, oyo ebandaki na sanza ya Febwali 1954. Ezalaki mpenza libaku monene!

Tosepelaki mingi ntango toyebaki ete tokokende kosala na Brésil. Liboso tósala mobembo ya mikolo 14 na masuwa mpo na kokende na Brésil, ndeko moko oyo azalaki na mikumba na Betele ayebisaki ngai boye: “Bamisionɛrɛ libwa ya basi oyo bazali minzemba bakosala mobembo elongo na yo ná mwasi na yo tii na Brésil. Batelá bango malamu!” Kanisá naino ndenge bato ya masuwa basɛkaki ntango bamonaki ngai nazali kokɔta na masuwa elongo na bilenge basi zomi! Kasi, bandeko basi wana bayokaki nsɔni te. Atako bongo, motema na ngai ekitaki kaka ntango tokómaki malamu na Brésil.

Nsima ya koyekola monɔkɔ ya Portugais, batindaki ngai na Rio Grande do Sul, etúká moko na sudi ya Brésil, mpo na kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Mokɛngɛli ya zongazonga oyo azalaki wana liboso, ndeko moko ya monzemba, ayebisaki ngai ná mwasi na ngai ete: “Nakamwe ndenge batindi ndeko oyo azali na mwasi na teritware oyo. Teritware oyo ezali mpasi.” Masangá ezalaki na bamboka mosikamosika, mpe mpo na kokóma na masangá yango mosusu, esengelaki kosala mobembo na motuka ya monene. Soki osombeli sofɛlɛ biloko ya kolya, nde andimi omata na motuka na ye. Lokola bato oyo bamataka na mpunda, tozalaki kofanda likoló ya biloko, topanzi makolo, mpe tosimbi na mabɔkɔ mibale, bansinga oyo bakangi biloko. Ntango motuka etɛngami, tozalaki kosimba makasi mpo tókwea te, wana biloko oyo ezali na motuka elingi kokwea mpe tozali komona mabwaku na nse. Kasi, komona esengo na bilongi ya bandeko oyo bazalaki kozela biso na mposa makasi, ezalaki kondimisa biso ete tosengelaki kaka kosala mobembo yango ya mpasi.

Tozalaki kofanda na bandako ya bandeko. Bazalaki babola mpenza; atako bongo, bazalaki kaka kokaba. Na mboka moko mosika, bandeko mibali nyonso bazalaki kosala na izini oyo batyaka biloko ya kolya na manzanza. Mwa lifuti oyo bazalaki kozwa ezalaki kosalisa bango kaka mpo na kolya mbala moko na mokolo. Soki basali te mokolo moko, bakofuta bango te. Atako bongo, ntango tokei kotala bango, bazalaki kozwa konje mikolo mibale mpo na komipesa na makambo ya lisangá. Bazalaki kotyela Yehova motema. Bandeko wana ya babola bateyaki biso ete esengeli komipimela mpo na matomba ya Bokonzi ya Nzambe, mpe tobosanaka liteya yango te. Kozala elongo na bango eteyi biso makambo oyo tokoki koyekola ata na eteyelo moko te. Soki nakanisi bandeko yango, natangisaka mpisoli ya esengo.

Na 1976, tozongaki na États-Unis mpo na kosalisa mama na ngai oyo azalaki kobɛla. Kolongwa na Brésil ezalaki mpasi mingi, kasi tozali na esengo mpo tomonaki ndenge basakoli ya Bokonzi bakómaki mingi mpe masangá ekolaki na ekólo yango. Ntango nyonso oyo tozwaka mikanda oyo euti na Brésil, tokanisaka lisusu makambo kitoko oyo tokutanaki na yango kuna.

Tokutani lisusu na baninga ya kala

Ntango tozalaki kosalisa mama, tozalaki mpe babongisi-nzela, mpe tozwaki misala ya kotya bopɛto. Na 1980, mama akufaki; azalaki sembo epai ya Yehova. Na nsima, babengaki ngai nakóma mokɛngɛli ya zongazonga na États-Unis. Na 1990, ngai ná mwasi na ngai tokendaki kotala lisangá moko na etúká ya Connecticut, mpe kuna tokutanaki na moninga moko ya kala. Moninga yango ezalaki Ben​—Ben oyo asalisaki ngai natikala sembo epai ya Yehova, mbula soki 50 liboso; azalaki moko na bankulutu ya lisangá yango. Kanisá naino esengo oyo toyokaki ntango toyambanaki!

Banda 1996, ngai ná Evelyn tozali kosala lokola babongisi-nzela monene ya mibange na lisangá ya monɔkɔ ya Portugais na engumba Elizabeth, na etúká ya New Jersey. Nakómi kobɛlabɛla, kasi na lisalisi ya mwasi na ngai, nasakolaka na kolanda makoki na ngai. Evelyn asalisaka mpe mobange moko oyo abɛlabɛlaka, oyo tozali na ye pembeni. Boyebi nkombo na ye? Bertha​—kaka Bertha oyo asalisaki mama akóma mosaleli ya Yehova mbula koleka 70 liboso! Tozali na esengo ndenge tozali komonisa ye botɔndi mpo na nyonso oyo asalá mpo libota na biso eyeba solo.

Nazali na esengo ndenge mayangani wana ya kala elendisaki ngai nazala na ngámbo ya losambo ya solo, nakómisa bomoi na ngai pɛpɛlɛ, mpe namipesa na mosala ya kosakola. Ya solo, mayangani wana esalisaki ngai na bomoi.

[Elilingi na lokasa 23]

Mama ya Evelyn (na lobɔkɔ ya mwasi) ná mama na ngai

[Elilingi na lokasa 23]

Moninga na ngai Ben

[Elilingi na lokasa 24]

Tokómi na Brésil

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná Evelyn lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto