Losambo na libota ezali na ntina mpo na kobika!
KANISÁ ndenge “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” ekozala nsɔmɔ! (Em. 16:14) Mosakoli Mika asalelaki maloba ya polele ya elilingi; akomaki boye: “Bangomba ekonyangwa . . . , mpe mabwaku ya patatalu ekopaswana, lokola mafuta mpo na mɔtɔ, lokola mai esopani na esika oyo ekitá.” (Mika 1:4) Likambo nini ya nsɔmɔ ekokómela bato oyo basalelaka Yehova te? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.”—Yir. 25:33.
Na kotalela makebisi wana, baboti, oyo mingi babɔkɔlaka bana bango moko, basengeli komituna mpo na bana na bango oyo bazali na makoki ya kokanisa ete, ‘Bakobika ntango likambo wana ya nsɔmɔ ekosalema?’ Biblia emonisi polele ete bakobika soki bazali na boyokani makasi na Yehova na ndenge oyo ekoki na mbula na bango.—Mat. 24:21.
Ntina ya kopona ntango mpo na Losambo na libota
Soki ozali moboti, osengeli kosala nyonso oyo okoki mpo na kobɔkɔla bana na yo “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Koyekola Biblia na bana na yo ezali na ntina mingi mpenza. Mposa na biso ezali ete bana na biso bázala lokola bakristo ya Filipi, oyo Paulo apesaki longonya mpo bazalaki kosepela kotosa Yehova. Akomaki boye: “Bandeko na ngai ya bolingo, se ndenge botosaka ntango nyonso, kaka te na ntango oyo ngai nazali, kasi mingi lisusu sikoyo na ntango oyo ngai nazali te, bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.”—Flp. 2:12.
Bana na yo batosaka mibeko ya Yehova soki ozali te? Bongo ntango bazali na kelasi? Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bámona ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na bango mpo bándima ete etambwisaka bango ata ntango ozali te?
Losambo na libota ekoki kosalisa mingi na oyo etali kolendisa kondima ya mwana na likambo yango. Yango wana, tólobela makambo misato oyo okoki kosala mpo boyekoli ya Biblia na libota esalemaka malamu.
Bóyekolaka pɔsɔ nyonso
Biblia emonisi ete baanzelu bakɔtaka liboso ya Nzambe na ntango oyo etyamá. (Yobo 1:6) Yo mpe saláká bongo mpo na bana na yo. Bópona mokolo mpe ngonga mpo na Losambo na libota mpe bótosaka yango. Bópona mpe ntango mosusu oyo bokosala yango soki likambo moko ya mbalakaka ebebisi programɛ na bino.
Wana basanza ezali koleka, bókóma te na momesano ya koyekola na libota kaka soki ntango ezwami. Kobosana te ete bana na yo bazali bayekoli na yo ya Biblia ya libosoliboso. Kasi, Satana azali koluka kolya bango. (1 Pe. 5:8) Soki bozali kobebisa ntango ya Losambo na libota na kotala televizyo to kosala makambo mosusu ya mosuni, Satana akolonga bino.—Ef. 5:15, 16; 6:12; Flp. 1:10.
Bótalelaka mpe makambo oyo ekosalisa libota
Losambo na libota esengeli te kozala kaka ntango ya koyekola makambo ya sika. Bósala makasi mpo bótalelaka mpe makambo oyo ekoki kosalisa libota. Ndenge nini? Mikolo mosusu, bóponaka masolo oyo eyokani na makambo oyo bana bakokutana na yango na mikolo to bapɔsɔ oyo ezali koya. Na ndakisa, mpo na nini te kosala bilakiseli oyo ekosalisa bango na mosala ya kosakola? Bana basepelaka kosala makambo oyo bayebi kosala malamu. Komekameka ndenge ya kobanda lisolo na moto mpe kokanisa ndenge ya kosala ntango moto abimisi likanisi mpo na kokata lisolo, ekosalisa bana bábangaka te ntango bazali na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola Bokonzi.—2 Tim. 2:15.
Bokoki mpe kosala bilakiseli oyo ekosalisa bango bálanda te makambo mabe ya baninga. Mokapo 15 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, Volimi 2, (na Lifalanse) ekoki kosalisa mingi mpo na kosolola na libota. Bitanda oyo ezali na nkasa 132 mpe 133, oyo elobi “Komibongisa mpo na koboya makambo mabe ya baninga,” epesi makanisi ya malamu mpe etikeli mwana nzela ya kokoma makambo oyo amoni ete akoki kosala yango malamu mpo na kokima makambo mabe ya baninga. Maloba oyo ezali na nse ya lokasa 133 elendisi bilenge ete: “Meká ná tata to mama to ná moninga moko ya mokóló ndenge okosala makambo yango.” Bokoki komekaka makambo ya ndenge wana mbala na mbala ntango bozali koyekola na libota.
Losambo na libota ezali kopesa baboti libaku ya komonisa ete komityela mikano ya elimo ezali na matomba. Na likambo yango, buku Mituna oyo bilenge batuna . . . , Volimi 2 epesi makanisi ya malamu mpenza na mokapo 38, oyo elobi “Nakosala nini na bomoi na ngai?” Ntango bozali kotalela mokapo yango, salisá mwana amona ete komipesa mobimba na kosalela Yehova ezali nzela eleki malamu oyo moto akoki kolanda. Salisá ye akolisa mposa ya kokóma mobongisi-nzela, kosala na Betele, kokɔta Eteyelo mpo na kobongisa basungi, to mpe kosala na motindo mosusu ya mosala ya ntango nyonso.
Likebisi: Baboti mosusu oyo mbala mosusu bazali koluka bolamu ya mwana na bango, balobelaka mingi kaka mikano oyo balingi ete mwana akokisa mpe babosanaka makambo oyo mwana azali kosala sikoyo. Ya solo, ezali malamu kolendisa mwana amityela mikano ya malamu, na ndakisa kosala na Betele to kokóma misionɛrɛ. Kasi, ntango ozali kosala yango, kebá ete osilikisa mwana na yo te na makambo oyo ozali kozela ye asala mpe kotinda ye alɛmba nzoto. (Kol. 3:21) Osengeli kobosanaka te ete mwana na yo asengeli kolinga Yehova na motema na ye moko, kasi na oyo ya yo te. (Mat. 22:37) Na yango, lukáká mabaku ya kopesa mwana na yo ya mwasi to ya mobali longonya mpo na makambo ya malamu oyo azali kosala, mpe kebá na motambo ya kolobela kaka makambo oyo azali kosala te. Salisá ye asepelaka na makambo oyo Yehova asalá. Mpe tiká mwana amonisa botɔndi mpo na bolamu ya Yehova.
Bósala ete esepelisaka
Likambo ya misato mpo Losambo na libota esalemaka malamu ezali kosala ete esepelisaka. Ndenge nini okoki kosala yango? Mbala mosusu, bokoki koyoka drame to kotala video moko ya Batatoli ya Yehova mpe kolobela makambo oyo boyoki to botali. To bokoki kotánga lisolo moko ya Biblia elongo, mpe soki lisolo yango elobeli bato mingi, moto mokomoko ya libota akotánga maloba ya moto oyo bokopesa ye.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali na masolo oyo bokoki kosalela mpo na kosolola na libota. Na ndakisa, bokoki kosalela lisolo oyo ezalaka na lokasa 31 ya Lamuká!, oyo ezalaka na motó ya likambo “Okopesa eyano nini?” Na banimero mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso, ezalaka na lisolo “Mpo na bilenge” oyo ekoki kosalelama mpo na koyekola. Na banimero na yango mosusu, ezalaka na masolo mpo na bana mike, oyo ezali na motó ya likambo “Teyá bana na yo.”
Ndenge moko na buku Mituna oyo bilenge batunaka . . . , Volimi 2, masolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” oyo ebimaka na Lamuká! ekosepelisa mingi baboti oyo bana na bango bakómi bilenge. Ntango bozali koyekola buku yango, bóbosanaka te etanda oyo elobi “Okanisi nini?” oyo ezali na nsuka ya mokapo mokomoko. Etanda yango ezali kaka mpo na bozongeli te. Mituna oyo ezali kuna ekoki kosalelama mpo na kosolola na libota.
Kasi, osengeli kokeba ete boyekoli na libota ezala te ntango ya kotuna bana mituna ebeleebele. Na ndakisa, kosɛnga mwana na makasi te ete atánga na mongongo makasi makambo oyo akomaki na nkasa oyo elobi “Makambo na ngai” to na bisika mosusu ya buku yango oyo asengeli kokoma makambo na ye moko. Na etanda “Epai ya baboti” oyo ezali na lokasa 3 ya buku yango, tozali kotánga boye: “Soki olingi bana bákomaka na buku na bango na bosembo, tikelá bango mwa bonsomi ya kobomba makambo na bango. Mbala mosusu na nsima, bakoki koyebisa yo makambo oyo bakomá na buku yango.”
Soki bozali kosala losambo na libota pɔsɔ nyonso, bozali kotalela makambo oyo ekosalisa libota, mpe bozali kosala ete boyekoli esepelisaka, Yehova akopambola mpenza milende na bino. Ntango oyo bokolekisa mpo na koyekola na libota ekosalisa bato ya libota na yo bázala na boyokani malamu na Yehova.
[Etanda na lokasa 31]
Bósalelaka mayele na bino
“Ntango tozali koyekola na bana na biso ya basi, ngai ná mobali na ngai totalelaka makambo oyo tokoyekola na likita moko ya lisangá mpe na nsima tosɛngaka bana na biso báloba yango na mokuse. Ntango mosusu, tosalaka bilakiseli ya masolo ya Biblia to ndenge ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola. Toyekolaka makambo oyo ebongi mpo na mbula na bango, tosalaka ete boyekoli ebenda likebi, elendisa, mpe esepelisa.”—J.M., États-Unis.
“Mpo na kosalisa mwana mobali ya moto moko oyo nayekolaka na ye Biblia ayeba ndenge bazalaki kosalela barulo na ntango ya kala, tozwaki mokanda ya Yisaya, tolongolaki mikapo ná bavɛrsɛ, mpe na nsima tobimisaki yango na masini ya konyata mikanda. Tosangisaki lokasa mokomoko na molai mpe tokangisaki nzete na bansɔngɛ na yango. Na nsima, mwana yango amekaki kosala oyo Yesu asalaki na sinagoga ya Nazarete. Lisolo oyo ezali na Luka 4:16-21 elobi ete Yesu ‘afungolaki rulo [ya Yisaya] mpe azwaki’ mokapo oyo azalaki koluka. (Yis. 61:1, 2) Kasi, ntango mwana yango amekaki kosala bongo, amonaki ete ezali mpasi komona Yisaya mokapo 61 na rulo molai wana oyo ezali na mikapo te, bavɛrsɛ mpe te. Lokola akamwaki mayele oyo Yesu azalaki na yango na ndenge ya kosalela barulo, mwana yango agangaki ete: ‘Yesu azalaki nsɔmɔ!’”—Y.T., Japon.
[Elilingi na lokasa 30]
Bilakiseli ekoki kosalisa bana na yo bákima makambo mabe ya baninga
[Elilingi na lokasa 31]
Bósala makasi mpo Losambo na libota esepelisaka