Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 3
  • Liteya moko ya lokuta ebimisi mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya moko ya lokuta ebimisi mosusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Justin—Filozofe, mokɔteli na boklisto ya solo mpe martyr
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Baapolojiste—Bazalaki kokɔtela mateya ya bokristo to bazalaki nde bato ya filozofi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Eteni 3—Bakonzi ya mangomba bakɔtɛli na boklisto ya solo, bateyaki Bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 3

Liteya moko ya lokuta ebimisi mosusu

NTOMA Paulo akomelaki bakristo oyo bazalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.) ete: “Bókeba.” Akebisaki bango mpo na likambo nini? Alobaki boye: “Mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.”​—Bakolose 2:8.

Atako Paulo akebisaki bango, na katikati ya ekeke ya mibale T.B., bakristo mosusu babandaki kozwa makanisi ya bato ya filozofi mpe kosalela yango mpo na kolimbola bindimeli na bango. Mpo na nini? Bazalaki kolinga ete bato ya mayele ya Ampire ya Roma básepela na bango, mpe na bongo, bákómisa bato ebele bandimi.

Justin, moko ya bakristo yango oyo bayebanaki mingi, azalaki koloba ete Molobeli ya Nzambe abimelaki bato ya filozofi ya Bagrɛki kala mpenza liboso Yesu aya awa na mabele. Justin mpe bateyi mosusu oyo bazalaki koteya lokola ye balobaki ete filozofi mpe masapo ya kala nde esalaki ete lingomba yango esepelisa bato ya mokili mobimba.

Mateya oyo Justin akɔtisaki na lingomba ya bokristo elongaki mpenza kokómisa bato mingi bandimi. Nzokande, kondima liteya moko ya lokuta ebimisaki mateya mosusu ya lokuta mpe lelo oyo, bato mingi bazali kondima yango lokola mateya ya bokristo. Mpo na komona lokuta ya mateya yango, kokanisá makambo oyo babuku mosusu elobi ná makambo oyo Biblia eteyaka mpenza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto