Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 5
  • Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Banani bakendaka na lifelo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Liteya oyo epalangani mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 5

Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifelo

Liteya yango eutá wapi?

“Na bato nyonso ya filozofi ya Bagrɛki, moto oyo abendaki bato mingi bándima liteya ya lifelo ezalaki Platon.”​—Histoire des enfers (Lisolo ya lifelo), ya Georges Minois, lokasa 50.

“Kobanda na katikati ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), bakristo oyo bayekolaki filozofi ya Bagrɛki bakómaki komona ete basengeli kolobela bindimeli na bango na kolanda makanisi ya bato ya filozofi . . . Makanisi ya filozofi oyo bazalaki kosepela na yango mingi ezalaki oyo ya Platon.”​—The New Encyclopædia Britannica (1988), Volimi 25, lokasa 890.

“Lingomba ekómaki koteya ete lifelo ezali solo mpe ekotikala libela. Nsima ya liwa, milimo ya bato oyo bakufi na masumu minene ekendaka mbala moko na lifelo, esika enyokwamaka na bitumbu ya lifelo, ‘mɔtɔ ya seko.’ Etumbu eleki monene ya lifelo ezali kokabwana na Nzambe mpo na libela.”​—Catechism of the Catholic Church, ebimeli ya 1994, lokasa 270.

Biblia elobi nini?

“Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te, . . . mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda [to Sheole], esika ozali kokende.”​—Mosakoli 9:5, 10.

Liloba ya Ebre Sheol oyo ebongolami na Nkunda, oyo esalelamaka mpo na kolobela “esika ya bakufi,” ebongolami na “lifelo” na Babiblia mosusu. Mokapo wana ya Mosakoli emonisi nini mpo na bakufi? Banyokwamaka na kati ya Sheole mpo na kofuta masumu na bango? Te, mpo “bayebi ata eloko moko te.” Yango wana, ntango Yobo azalaki konyokwama mpo na maladi makasi oyo ebɛtaki ye, abondelaki Nzambe boye: “Batelá ngai na lifelo [na Ebre Sheol].” (Yobo 14:13; Douay-Rheims Version) Libondeli na ye elingaki kolimbola nini soki Sheole ezalaki esika ya minyoko ya seko? Na Biblia, lifelo elimboli kaka nkunda ya bato nyonso, esika oyo ata mosala moko te esalemaka.

Omoni te ete ndimbola wana ya lifelo ebongi mpenza mpe eyokani na Makomami? Lisumu nini mpenza moto akoki kosala oyo ekoki kotinda Nzambe ya bolingo anyokola ye libela na libela? (1 Yoane 4:8) Kasi, soki liteya ya lifelo ezali lokuta, bongo liteya ya kokende na lola?

Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Nzembo 146:3, 4; Misala 2:25-27; Baroma 6:7, 23

LIKAMBO YA SOLO:

Nzambe apesaka bato etumbu ya lifelo te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto