Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 15
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Losambo ya Baala: Etumba monene na mitema ya Bayisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nzambe andimaka losambo ya motindo nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Alongisaki losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Sikoyo nde ntango ya kozwa ekateli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 15

Oyebaki yango?

Mpo na nini Biblia esangisaka losambo ya Baala ná kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo?

Mpo na Bakanana, Baala azalaki libosoliboso nzambe ya makambo ya kobota. Basambeli ya Baala bazalaki kokanisa ete ye nde azalaki kosala ete bilanga mpe bibwele na bango ebotaka mingi. Yango wana, buku moko (Manners and Customs in the Bible) elobi ete “bazalaki kosangisa nzoto na bisika ya losambo mpo mabele ebotaka mingi; bazalaki kosala yango mpo na kolendisa Baala, nzambe ya mbula, asangisa nzoto ná mwasi na ye Ashéra, mpo bilanga na bango mpe bibwele na bango ebota mingi.”

Bakanana bazalaki kondima ete soki eleko ya elanga ebandi, elimboli ete Baala akɔti na nse ya mabele mpo Môt, nzambe ya elanga mpe ya liwa, alongi ye. Nzokande, soki bambula ezongeli konɔka, bazalaki kokanisa ete Baala azongi na nguya, mpe ezalaki kosala ete milona mpe bibwele ebota mingi. Bakanana bazalaki kosepela na eleko yango mpe bazalaki kosala fɛti oyo ezalaki na milulu ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Yango esalisi biso tóyeba ntina oyo ntango Bayisraele bakanganaki na Baala ya Peore,” “babandaki kosala pite ná bana basi ya Moabe.”​—Mitángo 25:1-3.

Yesu alingaki komonisa nini ntango alobaki ete bakomeli ná Bafarisai bazalaki lokola “malita oyo epakolami mpɛmbɛ”?

Yesu amonisaki polele ete bakomeli ná Bafarisai bazalaki bakosi mpe ayebisaki bango ete: “Bozali lokola malita oyo epakolami mpɛmbɛ, oyo na libándá emonani kitoko mpenza kasi na kati etondi na mikuwa ya bakufi mpe na mbindo ya ndenge nyonso.” (Matai 23:27) Na nsuka ya eleko ya mbula, na mokolo ya 15 ya sanza ya Adar, sanza moko liboso ya fɛti ya Elekeli, Bayuda bazalaki na momeseno ya kopakola malita langi ya mpɛmbɛ mpo bato bámona yango malamu. Bazalaki kosala bongo mpo mbula ezalaki kolongola langi na malita.

Buku moko (The Jewish Encyclopedia) elobi ete bazalaki kopakola malita langi mpo “ebele ya bato oyo bazalaki koleka wana mpo na kokende na fɛti ya Elekeli” bámikómisa mbindo te. Mobeko oyo ezali na Mitángo 19:16 elobaki ete moto nyonso oyo asimbi ebembe, mokuwa ya moto, to lilita akozala mbindo mikolo nsambo. Moyisraele oyo amikómisi mbindo akoki te kosangana na losambo ya pɛto, noki te akobomama. (Balevi 15:31) Yesu apesaki ndakisa yango kaka mwa mikolo liboso ya Elekeli; na yango, bayoki na ye babosanaki naino te likambo ya kopakola malita langi, oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. Yesu alingaki komonisa ete bakonzi wana ya mangomba oyo bazalaki banguna na ye bazalaki te ndenge oyo bazalaki komonana libándá, mpe ete moto oyo asangani na bango akokóma mbindo na ndenge ya elimo.

[Elilingi na lokasa 15]

Ekeko ya Baala ya Nkanke, ekeke 14 to 13 L.T.B.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musée du Louvre, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto