Biblia ebongolaka bato
NDENGE nini moboti moko na Russie oyo azalaki kobɔkɔla bana ye moko, oyo amipesaki na komɛla bangi atikaki momeseno yango mpe akómaki koyokana malamu na bana na ye? Ndenge nini mobali moko oyo azalaki kolala na balabala na engumba Kyoto na Japon, azwaki makasi mpe mpiko ya kolonga makambo oyo esalaki ete akóma mobola? Nini esalisaki elenge moko ya Australie oyo azalaki komata mpunda (cowboy) atika molangwa? Tótalela makambo oyo bato yango balobi.
“Nazalaki komona ete nazali na mokumba ya kokokisa bamposa na ngai.”—NELLY BAYMATOVA
MBULA: 45
EKÓLO: RUSSIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOMƐLI-BANGI
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na engumba Vladikavkaz, mboka-mokonzi ya Ossétie du nord-Alanie. Libota na ngai ezalaki na mwa bozwi. Kasi, atako tozalaki kokelela te, nazalaki na esengo te na bomoi. Ntango nakómaki na mbula 34, nasilaki koboma mabala mbala mibale. Elekaki mbula zomi, banda nabandaki komɛla bangi, mpo na yango nakɔtaki lopitalo mbala mibale. Atako nazalaki na bana mibale, nazalaki na ntango te ya komonisela bango bolingo; nazalaki mpe te koyokana malamu na baninga to bato ya libota na ngai.
Mama akómaki Motatoli ya Yehova, mpe nazalaki koyoka mbala mingi ndenge azalaki kolela mpo na ngai mpe kobondela Yehova asalisa ngai. Nakanisaki boye: ‘Mpo na nini mama azali yuma boye! Ndenge nini Yehova akoki kosalisa ngai?’ Namekaki kosala makasi mpo natika komɛla bangi. Kasi nazalaki te na makasi ya kolonga momeseno yango na ndenge na ngai moko. Mokolo moko, namɛlaki bangi te na boumeli ya mikolo mibale. Na nsima, nazwaki ekateli ete nabima na ndako, nzokande nazalaki na etaze ya likoló; napumbwaki na lininisa, nakweaki, lobɔkɔ ná lokolo ebukanaki mpe mokɔngɔ ebebaki. Natambolaki te na boumeli ya sanza koleka moko.
Na ntango yango, mama azalaki ntango nyonso pembeni na ngai mpe azalaki kopamela ngai te. Ayebaki ete nazalaki konyokwama na makanisi. Kasi, atyaki zulunalo Lamuká!a pembeni ya mbeto na ngai. Natángaki yango nyonso mpe namonaki ete ezali na makambo ya ntina mpe elobeli makambo mingi. Na nsima, nazwaki ekateli ya koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Likambo moko oyo Biblia eteyaki ngai ezalaki ya koyeba kokokisa mikumba na ngai. Na esika ya kozela kaka ete mama asungaka ngai, namonaki ete nazali na mokumba ya kokokisa bamposa na ngai mpe ya bana na ngai na makambo etali mbongo. Na ntango oyo nazalaki kosala kaka makambo oyo ngai nalingi, komipesa na mosala ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai.
Toli oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:5-7, oyo ezali koyebisa baboti ete báteyaka bana na bango makambo ya Nzambe esalisaki mpe ngai mingi. Namonaki ete Nzambe ayanolaki na libondeli na ngai mpe alakisaki ngai ndenge ya kobɔkɔla bana na ngai mibale. Likambo wana epesaki ngai makasi nabanda kolekisa ntango elongo na bango mpe námoniselaka bango mpenza bolingo.
Nakómaki mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalisaki ngai nayeba solo na ntina na ye. Na yango, namipesaki epai na ye, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Lokola nayekolaki ndenge ya kosala mpo na kolonga nkanda na ngai makasi, nakómaki koyokana malamu ná mama. Nakómaki mpe koyokana malamu ná bana na ngai.
Lokola nakómaki mpenza koyina makasi makambo ya mabe, mikakatano mingi oyo eutaki na bomoi oyo nazalaki na yango liboso esilaki. Lelo oyo nazwaka esengo mingi na kosalisa basusu báyekola solo na ntina na Yehova, Nzambe na biso ya bolingo.
“Nakanisaki ete bomoi na ngai ebongi mpenza.”—MINORU TAKEDA
MBULA: 54
EKÓLO: JAPON
BOMOI NA YE YA KALA: NAZALAKI KOLALA NA BALABALA
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na engumba ya Yamaguchi; nazalaki kofanda elongo na tata mpe nkɔkɔ na ngai ya mwasi. Nayebaki mama ata moke te. Ntango nazalaki na mbula 19, nkɔkɔ ya mwasi akufaki, mpe natikalaki ná tata na ngai. Nazalaki kosala mosala ya kolamba, tata mpe azalaki kosala kaka mosala yango. Programɛ na biso ya mosala ekesanaki makasi, yango wana ezalaki mpasi mpo tómonanaka. Nakómaki na momeseno ya kosala bangonga ebele mpe komɛlaka masanga ná baninga.
Nsima ya mikolo, mosala yango ekómaki kolɛmbisa ngai. Naswanaki na patrɔ na ngai mpe nakómaki lisusu komɛla mingi. Nsukansuka, ntango nakómaki na bambula 20 nazwaki ekateli ya kolongwa na ndako mpe kokende epai mosusu. Ntango mbongo esilaki, nabandaki kosala na esika moko ya masano ya mbongo. Nakutanaki na elenge mwasi moko mpe tobalanaki. Kasi, tokabwanaki nsima kaka ya mbula mibale na ndambo.
Makambo elekaki ngai motó mpe nsukansuka natondanaki na banyongo. Nakimaki bato wana ya banyongo mpe nakendaki kofanda mwa moke na mboka na biso epai ya tata, kasi nakosaki ye mpe nabebisaki boyokani na biso. Nayibaki ye mbongo mpe nasalaki mwa moke mosala ya masano ya mbongo. Nsukansuka, nakómaki mobola mpe mpo na mwa ntango nakómaki kolala na esika bazwaka engbunduka. Nakendeki na engumba Hakata, na nsima na Himeji, mpe nsukansuka nakendaki na engumba Kyoto. Nakómaki kolala na balabala na boumeli ya mwa bambula.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na 1999 nazalaki na parkɛ moko oyo ezalaki pembeni ya ebale Kamogawa na engumba Kyoto ntango basi mibale bakutanaki na ngai. Moko na bango atunaki: “Okosepela koyekola Biblia?” Nandimaki. Bakristo oyo bakɔmeli na kati ya Batatoli ya Yehova ya esika yango bayekolaki na ngai Biblia mpe basalisaki ngai namona ntina ya kosalela batoli na yango. Bapesaki ngai likanisi ete nameka koluka mosala mpe esika ya kofanda. Mpo na kosepelisa bango, nakendaki esika basengelaki kotuna ngai mituna mpo na mosala, kasi na ebandeli ezalaki mpasi. Nzokande, na nsima, nabandaki kobondela Nzambe asalisa ngai, nasalaki makasi mpo na koluka mosala, mpe nsukansuka nazwaki yango.
Libondeli esalisaki mpe ngai na ntango ya komekama makasi. Bato ya banyongo oyo nakimaki bakangaki ngai mpe basɛngaki ngai nafuta banyongo na bango. Mayele esilaki ngai. Kasi na boyekoli ya Biblia oyo nazalaki kosala mokolo na mokolo, namonaki mokapo ya Yisaya 41:10. Na vɛrsɛ yango, Nzambe alaki basaleli na ye ya sembo ete: “Nakosalisa yo mpenza.” Elaka yango epesaki ngai makasi mpe mpiko. Nasalaki mpenza makasi mpe nsukansuka nasilisaki banyongo nyonso. Na 2000, nakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Makambo oyo nayekolaki na Biblia etindaki ngai naluka kobongisa boyokani na ngai na tata na ngai, mpe alimbisaki ngai mpo na makambo oyo nasalaki kala. Asepelaki mingi ete nayekolaki ndenge ya kotosa batoli ya Biblia. Namonaki mpenza ete bomoi na ngai ebongaki mpo nabandaki kosalela batoli ya Biblia.
Lisusu, nazali na likoki ya kosala mpo nazwa biloko ya kobikela. (Baefese 4:28; 2 Batesaloniki 3:12) Nazwi mpe baninga ya solo na kati ya lisangá. (Marko 10:29, 30) Nazali mpenza na botɔndi na kati ya motema mpo na makambo oyo Yehova ateyi ngai.
“Ezalaki pɛtɛɛ te nasala mbongwana oyo esengeli.”—DAVID HUDSON
MBULA: 72
EKÓLO: AUSTRALIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOMƐLI-MASANGA
NDENGE NAZALAKI: Nazalaki mwana ya 11 na kati ya bana oyo baboti na biso Willie ná Lucy babotaki. Tozalaki kofanda na Aurukun, kartye moko oyo ezalaki mosika mpenza na nɔrdi ya Queensland. Kartye yango etongamaki na esika kitoko pembeni ya ebale Archer mpe ezalaki mosika te na mbu. Baboti na biso balakisaki biso ndenge ya koboma nyama mpe mbisi. Na ntango yango, guvɛrnema epekisaki biso, bato oyo tozalaki na kartye wana kosimba mbongo mpe tosengelaki kofanda kaka esika moko oyo guvɛrnema eponaki.
Baboti na biso basalaki nyonso mpo na kolakisa biso bizaleli malamu mpe koteya biso nyonso kozala na limemya epai ya mibange oyo tozalaki na bango na kartye mpe kokabolaka na basusu biloko oyo tozali na yango. Yango esalaki ete tómonaka mibange nyonso lokola bamama mpe batata na biso, lokola bandeko ya tata mpe bandeko ya mama.
Tata akufaki ntango nazalaki na mbula nsambo, mpe tokendaki kofanda na kartye moko oyo ezalaki na Mapoon, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 150 na nɔrdi Aurukun epai bato bakendeke koyekola makambo ya Nzambe. Ntango nazalaki na mbula 12, nayekolaki ndenge ya kotambwisa bampunda mpe kobatela bibwɛlɛ mpe tii ntango nakómaki na mbula soki 40, nasalaki lokola motambwisi ya mpunda (cowboy) na bisika ebele oyo bibwɛlɛ ezalaki. Bomoi yango ezalaki mpasi. Nazalaki komɛla masanga mingi. Yango esalaki ete nabɛlaka mingi motó mpe ebimiselaki ngai mikakatano mosusu.
Mokolo moko, lokola namɛlaki mingi mpe nalangwaki, nalongwaki na otɛlɛ mpe nakweaki na motuka moko oyo ezalaki na mbangu makasi. Nalekisaki mbula mibale na lopitalo—mosala na ngai ya kotambwisa bampunda esilaki.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nazalaki na lopitalo, moninga na ngai moko ya mwasi amemelaki ngai zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpo natánga. Kasi, nakokaki kotánga yango malamu te mpo nakɔtaki kelasi mpenza te. Na nsima, mokolo moko oyo moi ezalaki makasi, mobali moko ya mbula 83 ayaki kotala ngai. Nasɛngaki ye amɛla mai ya malili. Apesaki ngai mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe atunaki ngai soki nakondima azongela ngai mpo alimbwela ngai makambo oyo ezali na kati. Nsukansuka, tobandaki koyekola Biblia na ye. Nabandaki komona ete esengeli kobongola bomoto mpe bizaleli na ngai soki nalingi kosepelisa Nzambe.
Ezalaki pɛtɛɛ te nasala mbongwana oyo esengeli. Kasi, na lisalisi ya makambo oyo mama ateyaki ngai, nazalaki mpenza na limemya mpo na mobali wana ya mobange oyo ayekolaki na ngai Biblia mpe mpo na makambo ya Nzambe oyo alakisaki ngai. Atako bongo, nazalaki naino kokakatana mpo namipesa epai ya Nzambe. Nazalaki kokanisa ete esengeli nayeba makambo nyonso oyo ekomami na Biblia.
Kasi, eyaki kosalema ete moninga moko oyo tozalaki kosala na ye mosala ya kotambwisa mpunda, asalisaki ngai nakanisa lisusu malamu na likambo yango. Azalaki Motatoli ya Yehova, mpe atángelaki ngai toli oyo ezali na Bakolose 1:9, 10. Mokapo wana elobaka ete tosengeli kokoba “kokola na boyebi ya solosolo ya Nzambe.” Moninga wana asalisaki ngai nayeba ete nakobanda ntango nyonso koyekola makambo ya sika, na yango ezali na ntina te nazonga nsima mpo nayebi makambo mingi te.
Nakamwaki mpenza ntango nabandaki koyangana na Batatoli ya Yehova. Namonaki mpenza ndenge bato oyo bazalaki na mimeseno ndenge na ndenge bazali kosambela Nzambe na bomoko. Na ntembe te, bomoko wana endimisaki ngai ete nazwi lingomba ya solo, na yango na 1985 nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Nakómá mpenza na makoki ya kotánga, mpe nazali sikoyo kolekisa bangonga mingi pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosalisa basusu báyekola kotánga mpe koyekola Biblia. Lisusu, moninga wana ya mwasi oyo amemelaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ayekolaki mpe na Batatoli ya Yehova, azwaki batisimo mpe ye nde akómá mwasi na ngai. Ngai ná ye, tozali mpenza na esengo ya kosalisa basusu na kartye na biso mpo báyekola makambo etali Yehova Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Ngai ná mwasi na ngai tosepelaka mpenza kosalisa basusu na kartye na biso mpo báyekola makambo etali Nzambe