Ezali likambo ya mokili mobimba, ebongi esila mpe na mokili mobimba
BAMPASI ezali bisika nyonso, mpe bato mingi basalisaka bato oyo bazali konyokwama. Na ndakisa, minganga basalaka mingi na lopitalo, bato na bato na ngala na bango mpo na kosalisa bato oyo bazali kobɛla to baoyo bazoki. Bato oyo babomaka mɔtɔ, bapolisi, bato oyo babimisaka mibeko, mpe bato oyo basalisaka bato na ntango ya likama balukaka kokitisa mpasi to kosala ete mpasi ekómela bato te. Milende oyo basalaka esalisaka bato; atako bongo, moto moko te to ebongiseli moko te ekoki kosilisa bampasi na mokili. Kasi, Nzambe azali na likoki ya kosilisa bampasi yango na mokili mobimba mpe akosala yango.
Elikya yango ezali na mokanda ya nsuka ya Biblia: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” (Emoniseli 21:4) Kanisá naino matomba oyo elaka yango ekomemela bato. Emonisi na mokuse mokano ya Nzambe ya kosukisa bampasi nyonso. Mpo na kosala yango akolongola na mabele bitumba, nzala, maladi, mpe kozanga bosembo, mpe bato nyonso ya mabe. Moto ata moko te akoki kosala yango.
Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
Nzambe akokokisa bilaka na ye, na nzela ya Yesu Kristo oyo asekwá, moto ya mibale oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́. Ntango ezali koya oyo Yesu akoyangela mabele mobimba mpe ekozala na mokonzi moko te oyo akotɛmɛla ye. Bato bakoyangelama lisusu te na bakonzi ya mokili oyo, baprezida to bato ya politiki. Bakoyangelama nde na mokonzi moko mpe guvɛrnema moko: Bokonzi ya Nzambe.
Bokonzi yango ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato. Bambula mingi liboso, Biblia esakolaki ete: “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Bato ya mokili mobimba bakozala na bomoko mpe bakoyangelama na guvɛrnema moko ya sembo: Bokonzi ya Nzambe.
Ntango azalaki awa na mabele, na mabaku mingi Yesu alobelaki Bokonzi yango. Alobelaki yango na libondeli ya ndakisa, ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Simbá ete Yesu amonisaki ete Bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabele, mpe mposa ya Nzambe ezali ya kosilisa bampasi nyonso na mabele.
Guvɛrnema ya sembo ya Nzambe ekomema mapamboli oyo guvɛrnema ata moko te ya bato ekoki komema. Kobosana te ete Yehova apesaki Mwana na ye lokola lisiko mpo ete bato bázwa bomoi ya seko. Na nzela ya boyangeli wana ya boboto, bato bakokóma bato ya kokoka. Yango ekosala nini? Yehova “akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8.
Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Mpo na nini banda kala Nzambe azali kosilisa bampasi te? Azali kozela nini?’ Yehova akokaki kosilisa bampasi banda kala, to mpe kopekisa ete bampasi ya ndenge nyonso ekómela bato. Kasi, atiki yango ekoba, kaka mpo na bolamu na ye moko te, kasi mpo na matomba ya seko ya bana na ye awa na mabele. Baboti oyo balingaka mwana na bango bakoki kondima ete mwana na bango amona mpasi soki bayebi ete na nsima ekomemela ye bolamu. Ndenge moko, ezali na ntina oyo Yehova atiki nzela ete bato bányokwama mpo na mwa ntango, mpe Biblia emonisi ntina yango. Etaleli makambo lokola bonsomi ya kopona, lisumu, mpe ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya Yehova ya koyangela. Biblia emonisi mpe ete Nzambe atikeli ekelamu moko mabe ya elimo mwa ntango mpo ayangela mokili.a
Tokokoka te kolimbola makambo nyonso na lisolo oyo, kasi ezali na makambo mibale oyo ekoki kopesa biso elikya mpe kolendisa biso. Ya liboso, yango oyo: Yehova akopambola biso koleka bampasi nyonso oyo ekoki kokómela biso. Lisusu Nzambe alaki biso boye: “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yisaya 65:17) Nzambe akolongola mpo na libela mawa mpe bampasi oyo eutá na mabe oyo ye moko atikelá nzela mpo na mwa ntango.
Ya mibale yango oyo: Nzambe atye ntango oyo akosilisa bampasi nyonso mpe akobongola ntango yango te. Kobosana te ete mosakoli Habakuku atunaki tii ntango nini Yehova akotika mobulu mpe kowelana. Yehova ayanolaki ete: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, . . . Ekokóma nsima ya ngonga te.” (Habakuku 2:3) Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, ‘ntango yango oyo etyamá’ ekómi pene.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, talá mokapo 11 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 7]
Bavɛrsɛ oyo ezali na bilaka kitoko
BITUMBA EKOZALA LISUSU TE:
“Bóya, bótala misala ya Yehova, Ndenge atye makambo ya kokamwisa na mabele. Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”—Nzembo 46:8, 9.
BALINGAMI NA BISO BAKOSEKWA:
“Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Misala 24:15.
BILEI MPO NA MOTO NYONSO:
“Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”—Nzembo 72:16.
MALADI EKOZALA LISUSU TE:
“Moto moko te oyo afandi kuna akoloba:
‘Nazali na maladi.’”—Yisaya 33:24.
BATO MABE BAKOLONGOLAMA:
“Bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.”—Masese 2:22.
BOSEMBO EKOTONDA NA MABELE:
“Talá! Mokonzi moko [Kristo Yesu] akoyangela mpo na boyengebene; bongo bankumu bakoyangela mpo na bosembo.”—Yisaya 32:1.
[Bililingi na lokasa 7]
Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mpasi nyonso oyo tozali komona