Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/2 nk. 6-7
  • Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Okozwa mbano oyo ebongisami mpo na bato ya malamu?
  • Na ntina na avenire ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/2 nk. 6-7

Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?

NA BUTU ya nsuka liboso Yesu abomama, mpe nsima ya bilei ya nsuka na bantoma na ye, Yesu alakaki ete akopesa bango mbano: esika na likoló. Alobaki boye: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. Soki bongo te, mbɛlɛ nayebisaki bino, mpo nazali kokende kobongisela bino esika.” (Yoane 14:2) Mpo na nini Yesu akanaki kobongisela bango esika na likoló? Basengelaki kokende kosala nini kuna?

Yesu azalaki kokanisa kopesa bayekoli na ye mokumba moko ya ntina mingi. Kaka na butu yango, alobaki boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai, mpo na bokonzi.” (Luka 22:28, 29) Nzambe alakaki Yesu ete akozala Mokonzi oyo akokokisa moko ya bamposa oyo eleki ntina mpo na bato​—guvɛrnema ya malamu. Yesu akobikisa bato oyo bazali na mpasi mpe akoboma baoyo bazali kobuba bango. Atako bato oyo Yesu akoyangela bakozala “kino nsuka ya mabele,” kiti ya bokonzi na ye ekozala na likoló.​—Nzembo 72:4, 8; Danyele 7:13, 14.

Kasi, Yesu akoyangela ye moko te. Yango wana, alakaki bantoma na ye esika na likoló. Bazalaki bato ya liboso oyo baponamaki mpo ‘báyangela mabele.’​—Emoniseli 5:10.

Bato boni bakokende na likoló? Ndenge moko na guvɛrnema nyonso, bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe na likoló bazali moke soki tokokanisi bango na bato nyonso oyo bango bakoyangela. Mpo na baoyo bakoyangela elongo na ye, Yesu alobaki boye: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) “Etonga moke” yango ekozala na bato 144 000. (Emoniseli 14:1) Motángo yango ezali moke soki tokokanisi yango na bamilio ya bato oyo bakozala na bomoi ezangi nsuka awa na mabele lokola bato ya sembo na Bokonzi yango.​—Emoniseli 21:4.

Na yango, bato nyonso te ya malamu nde bakendaka na likoló. Na ntina na Mokonzi Davidi, ntoma Petro alobaki polele ete: “Davidi amataki na likoló te.” (Misala 2:34) Yoane Mobatisi azalaki moto malamu. Kasi, Yesu amonisaki ete akozala te na nkembo ya koyangela na likoló. Yesu alobaki ete: “Na bato nyonso oyo basi babotá, moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki ye.”​—Matai 11:11.

Okozwa mbano oyo ebongisami mpo na bato ya malamu?

Mpo na kozwa likabo ya bomoi ya seko na mabele, moto asengeli kosala nini? Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Simbá ete bolingo ya Nzambe mpo na mokili etindaki ye apesa nzela ete moto nyonso akoka kozwa bomoi ya seko, kasi kaka baoyo bazali ‘kondimela’ Yesu nde bakozwa mbano yango.

Kondima yango esengeli kouta na boyebi ya sikisiki. (Yoane 17:3) Okoki komonisa ete ozali moto ya malamu soki oyekoli makambo mingi oyo etali mokano ya Yehova mpo na moto. Omonisa kondima na makambo oyo ozali koyekola. Mpe ondima ete libaku ya bomoi oyo ezangi nsuka ezali mpenza liboso na yo.

[Etanda na lokasa 7]

Biblia elobi nini?

Motuna:

Nini ekómelaka bato malamu soki bakufi?

Eyano:

“Kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—MOSAKOLI 9:5.

Motuna:

Elikya nini bato malamu bazali na yango mpo na mikolo ezali koya?

Eyano:

“Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [ya Yesu] mpe bakobima.”​—YOANE 5:28, 29.

Motuna:

Ebele ya bato ya malamu bakofanda wapi?

Eyano:

“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—NZEMBO 37:29.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto