Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/4 lok. 4
  • Yesu Kristo—Mateya na ye esalisi bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu Kristo—Mateya na ye esalisi bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Tozala batosi na liloba, nde bayoki mpamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tiká maloba ya Yesu etambwisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Naino moto moko te alobá lokola moto yango”
    “Yaká, landá ngai”
  • Maloba ya Yesu esalisaka yo obongisa mabondeli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/4 lok. 4

Yesu Kristo​—Mateya na ye esalisi bato

“Likambo oyo emonisi mpenza ete Yesu moto ya Kapernaume azalaki na bomoi awa na mabele, ezali ete tii lelo oyo bato babosanaka te makambo oyo asalá mpe yango emonisi ete azalaki moto oyo aleki bato nyonso.”a​—GREGG EASTERBROOK.

MALOBA ezalaka na nguya. Kopona maloba ya bwanya ekoki kosimba mitema, kopesa moto elikya, mpe kobongola bomoi ya bato. Moto moko te alobá maloba ya nguya lokola Yesu Kristo. Moto oyo ayokaki lisolo ya Yesu likoló ya ngomba akomaki boye na nsima: “Ntango Yesu asilisaki maloba yango, esalaki ete bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.”​—Matai 7:28.

Tii lelo, bato na mokili bayebi malamu maloba mingi oyo Yesu alobaki. Tótala mwa bandakisa ya maloba ya ntina mingi oyo Yesu alobaki.

“Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.”​—Matai 6:24.

“Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—Matai 7:12.

“Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”​—Matai 22:21.

“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Kasi Yesu asukaki kaka te na koloba maloba wana oyo etiká nsango. Nsango oyo asakolaki ezalaki na nguya mpo ezalaki koyebisa solo na ntina na Nzambe, eteyaki bato ndenge ya koyeba ntina ya bomoi, mpe alobelaki eloko oyo ekosilisa bampasi nyonso ya bato​—Bokonzi ya Nzambe. Ntango tozali kotalela nsango yango na nkasa oyo elandi, tokomona mpo na nini bamilio ya bato “babosanaka te makambo oyo Yesu asalaki awa na mabele.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kapernaume, oyo ezalaki na etúká ya Galile, eyebanaki lokola esika oyo Yesu azalaki kofanda.​—Marko 2:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto