Mpo na bilenge
Kɔtelá bindimeli na yo!
Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.
Bato oyo balobeli mingi: Yirimia, Ebede-meleke, Mokonzi Zidikiya
Na mokuse: Yirimia akutani na botɛlɛmi makasi ntango azali kosakola nsango ya Nzambe ete bato ya Yuda basengeli komipesa na mabɔkɔ ya Bakaladea.
1 TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ YIRIMIA 38:1-5.
Okanisi ete Yirimia azalaki koyoka ndenge nini ntango azalaki koloba na bato ya Yuda?
․․․․․
Oyoki mongongo ya Yirimia ezali ndenge nini ntango azalaki kosakola likebisi ya Yehova?
․․․․․
KƆTÁ NA MOZINDO.
Yirimia andimaki makambo nini oyo mbala mosusu etindaki ye asakola na mpiko ndenge wana?
․․․․․
2 TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ YIRIMIA 38:6-13.
Na makanisi na yo, lobá ndenge libulu yango ya kobomba mai ezalaki—monene na yango, mozindo na yango, mpe nsolo na yango.
․․․․․
Mbala mosusu Yirimia azalaki na makanisi nini ntango “abandaki kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ yango”? (Tángá lisusu vɛrsɛ 6.)
․․․․․
KƆTÁ NA MOZINDO.
Na lisalisi ya mikanda oyo bozali na yango, luká koyeba likambo moko oyo oyebaki liboso te na ntina na mabulu ya kobomba mai oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala.
․․․․․
Ebede-meleke andimaki mpenza likambo nini mpo aluka kobikisa Yirimia? (Tángá lisusu vɛrsɛ 7-9.)
․․․․․
Mpo na nini Zidikiya aumelaki te kolanda makanisi ya bankumu, mpe na nsima makanisi ya Ebede-meleke? (Tángá lisusu vɛrsɛ 5 mpe 10.) Emonisi ete azalaki moto ya ndenge nini? ndenge nini emonisi ete azalaki bindimandima?
․․․․․
Na lisolo yango, bato nini bamonisaki kondima makasi, mpe banani bazali na kondima makasi te? Mpo na nini olobi bongo?
․․․․․
3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .
Mpiko.
․․․․․
Kondima.
․․․․․
Libateli ya Yehova mpo na bato oyo batosaka ye kozanga kobanga.
․․․․․
Ntango okutani na botɛmɛli, ndenge nini kozala na kondima makasi ekoki kosalisa yo osala makambo ya malamu?
․․․․․
4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?
․․․․․
SOKI OZALI NA BIBLIA TE, SƐNGÁ BATATOLI YA YEHOVA, TO TÁNGÁ MIKANDA MOSUSU NA www.jw.org