Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/6 lok. 3
  • Tobosaná ndimbola ya lisumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tobosaná ndimbola ya lisumu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Lisumu—Ebongwani na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mpo na nini bato bakufaka?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ezali nde na “Masumu nsambo oyo ememaka na liwa”?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mokili mozangi masumu: mokoki kosalema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/6 lok. 3

Tobosaná ndimbola ya lisumu?

ELEKI bambula mingi te, bandimi ya mangomba bazalaki mbala na mbala koyoka bateyi na bango bazali koteya na mongongo makasi na ntina na “masumu nsambo ya kufa”​—bonsɔni, kolunda, mposa makasi ya bozwi, gɔigɔi, nkanda, likunya, mpe lolendo. Mbala mingi bateyi bazalaki kolobela makama oyo lisumu ememaka mpe bazalaki kosɛnga bandimi bábongola motema. Mokomi moko alobi boye: “Lelo oyo, bateyi mingi balingaka te kolobela makambo oyo ekopesa bandimi na bango mpasi, kasi nde makambo oyo esepelisaka matoi ya bandimi yango.”

Bapanzi-nsango mosusu balobi mpe kaka bongo. Talá mwa makanisi oyo bapesi:

▪ “Makambo lokola lisumu, kobongola motema mpe lisiko ekómá makambo ya kala mpe lelo oyo makambo lokola komipesa kilo mpe komilinga mingi ekómá koteyama mingi.”​—Star Beacon, Ashtabula, Ohio.

▪ “Mpo na bato, lisumu ezalaka mpenza lisusu te.”​—Newsweek.

▪ “Tomitunaka lisusu te ‘Nzambe azali kosɛnga ngai nini?,’ kasi nde, ‘Nzambe akoki kosala nini mpo na ngai?’”—Chicago Sun-Times.

Na mokili ya lelo, oyo etondi na bato ndenge na ndenge, bato bakakatanaka mpo na kosambisa basusu na makambo etali bizaleli. Balobaka ete kosambisa basusu mpo na bizaleli na bango ezali bonkonde te. Bakanisaka ete lisumu ya monene ezali kosambisa basusu mpo na makambo bazali kosala. Yango ebimisi likanisi oyo: ‘Makambo oyo yo ondimaka ekoki kozala malamu mpo na yo, kasi osengeli te kotinda basusu na makasi ete bándima yango. Mikolo oyo, bato bazali koyokanisa bomoi na bango na kolanda bizaleli ndenge na ndenge. Moto moko te akoki koloba ete ye nde ayebi oyo ezali malamu. Bizaleli ya bato mosusu ezali mpe malamu lokola kaka oyo ya yo.’

Likanisi yango ebongoli elobeli ya bato. Bato basalelaka lisusu mingi te liloba “lisumu,” mpo na bato mingi liloba yango ekómá kosalelama na ndenge ya masɛki. Na ndakisa, bato balobaka lisusu te “bazali na libala ya lisumu”; kasi, balobaka nde “bafandaka elongo.” Balobaka lisusu te “bazali kosala ekobo”; kasi nde “biro na ngai.” Balobaka lisusu te ete “bazali na libala ya mobali na mobali”; basepelaka koloba ete “baponi ndenge mosusu ya bomoi.”

Ntembe ezali te ete, makambo oyo bato bandimaka ete ezali “malamu” to bamonaka ete ezali “lisumu” ebongwani. Kasi, mpo na nini makanisi ebongwani? Ndenge nini bato bakómi kotalela lisumu? Mpe osengeli mpenza kotalela lisumu ndenge yo okanisi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto