Mpo na bilenge
Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo
Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.
Bato oyo balobeli: Yonatane, Davidi, mpe Saulo
Na mokuse: Davidi abomaki Goliate, na nsima Yonatane akómaki moninga na ye ya motema.
1 TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ 1 SAMWELE 17:57–18:11; 19:1; 20:1-17, 41, 42.
Lobelá ndenge okanisi ete Saulo azalaki komonana. (Lisalisi: Talá 1 Samwele 10:20-23.)
․․․․․
Ntango akutanaki na Yonatane, ekoki kozala ete Davidi azalaki elenge. Okanisi ete azalaki komonana ndenge nini? (Lisalisi: Talá 1 Samwele 16:12, 13.)
․․․․․
Soki otángi maloba oyo ezali na nsuka ya 1 Samwele mokapo 20, okanisi ete mingongo ya Davidi ná Yonatane ntango balingaki kokabwana ezalaki koyokana ndenge nini?
․․․․․
2 KƆTÁ NA MOZINDO.
Lisolo yango elobi ete “molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi”—to ndenge Biblia moko (Contemporary English Version) emonisi yango, “Davidi mpe Yonatane bakómaki baninga ya motema.” (1 Samwele 18:1) Bizaleli nini Davidi azalaki na yango oyo ebendaki Yonatane? (Lisalisi: Talá 1 Samwele 17:45, 46.)
․․․․․
Ekoki kozala ete Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mbula soki 30. Makambo nini okanisi ete esalisaki bango bákóma “baninga ya motema,” atako bakesanaki bambula?
․․․․․
Wapi bizaleli oyo esengeli mpo na kozala na moninga ya malamu, ndenge tomoni yango na lisolo oyo? (Lisalisi: Talá Masese 17:17; 18:24.)
․․․․․
Mpo na nini Yonatane azalaki sembo mingi epai ya Davidi koleka epai ya tata na ye moko?
․․․․․
3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .
Boninga.
․․․․․
Bosembo.
․․․․․
Kosala boninga ná mikóló.
․․․․․
Ndenge nini okoki kobenda baninga ya malamu?
․․․․․
4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?
․․․․․
SOKI OZALI NA BIBLIA TE, SƐNGÁ BATATOLI YA YEHOVA, TO TÁNGÁ MIKANDA MOSUSU OYO ELIMBOLAKA BIBLIA NA INTERNET NA www.pr2711.com