Mpo na bilenge
Moto moko ya maba abikisami!
Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.
Bato oyo balobeli: Naamane, Elisha, mpe elenge mwasi Moyisraele oyo nkombo na ye eyebani te
Na mokuse: Naamane, mokonzi ya basoda ya Siri abikisami na maladi moko mabe ntango elenge mwasi moko Moyisraele ayebisaki ye akende komona Elisha.
1 TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ 2 BAKONZI 5:1-19.
Okanisi ete mwana mwasi wana ya moke ayokaki ndenge nini ntango balongolaki ye na libota na ye oyo ezalaki kobanga Nzambe?
․․․․․
Okanisi ete Naamane azalaki koyoka ndenge nini na motema—Ye moto monene na maladi wana ya mabe?
․․․․․
Okanisi ete Naamane mpe basaleli na ye bazalaki koyoka ndenge nini ntango bazalaki kosolola na vɛrsɛ 11 tii 13?
․․․․․
Omoni mbongwana nini na ezaleli ya Naamane kobanda na vɛrsɛ 15?
․․․․․
2 KOTÁ NA MOZINDO.
Ekoki kozala makambo nini esalaki ete Naamane azala na lolendo? (Tángá lisusu vɛrsɛ 1.)
․․․․․
Na lisalisi ya mikanda ozali na yango, luká koyeba likambo moko na ntina na maladi ya maba na ntango ya kala.a (Na ndakisa, maladi yango ezalaki mpenza mabe ndenge nini? Moto oyo azali na maladi yango akokaki kopesa yango na bato mosusu? Ndenge nini bazalaki kosalisa maladi yango?)
․․․․․
Okanisi ete mwana mwasi ya moke, Moyisraele, ayokaki ndenge nini ntango Naamane abikisamaki na maladi na ye?
․․․․․
Na ndenge nini eyano ya Elisha etyaki Naamane na komekama? (Talá vɛrsɛ 10.)
․․․․․
3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .
Likama ya kozala na lolendo.
․․․․․
Mpiko ya kolobela mateya ya Biblia.
․․․․․
Nguya ya Yehova ya kobikisa maladi.
․․․․․
4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?
․․․․․
SOKI OZALI NA BIBLIA TE, SƐNGÁ BATATOLI YA YEHOVA, TO TÁNGÁ MIKANDA MOSUSU OYO ELIMBOLAKA BIBLIA NA INTERNET NA www.pr2711.com
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maladi ya loposo oyo eyebanaki na nkombo maba na ntango ya kala, ezali maladi oyo eyebani lelo na nkombo ya maladi ya Hansen.