Mituna ya batángi . . .
Nasengeli kokɔta na lingomba moko?
▪ Obangaka kokɔta na lingomba moko mpo na bokosi mpe bokabwani oyo bandimi ata mpe bakonzi ya mangomba bazalaka na yango? Soki ezali bongo, lisese oyo ya France emonisi na mokuse ndenge oyokaka: “Moto oyo azalaka pene ya ndako-nzambe, mbala mingi azalaka mosika na Nzambe.”
Ekoki kozala omemyaka Biblia mpe omonaka ete baguvɛrnema mpe bato basengeli kotosa lotomo ya moto ya kozala na lingomba moko epai asambelaka. Kasi, okoki komituna boye: ‘Nzambe alobi mpenza ete baoyo balingi kosambela ye na ndenge oyo ye andimaka basengeli kokɔta na lingomba moko boye?’
Na mokuse, tokoloba ete ezali bongo. Mpo na nini tondimi yango mpenza? Lisusu, andimaka mangomba nyonso?
Tózwa ndakisa ya Yesu. Azalaki moto ya lingomba moko boye? Ntango azalaki elenge, Yesu azalaki kokende elongo na libota na ye ya Bayuda mpe bato mosusu oyo bazalaki na momeseno ya kokendaka na tempelo na Yerusaleme mpo na kosambela na ndenge oyo ebongisamaki. (Luka 2:41-43) Ntango akolaki, Yesu azalaki kokende elongo na Bayuda mosusu kosambela Nzambe na sinagoga ya engumba na ye. (Luka 4:14-16) Ntango azalaki kosolola na mwasi moko oyo azalaki na lingomba mosusu, Yesu alobaki boye: “Biso tosambelaka oyo toyebi.” (Yoane 4:22) Na maloba yango, Yesu amonisaki polele ete azalaki na Lingomba ya Bayuda.
Na nsima, Yesu alobaki ete lokola ekólo ya Bayuda ebwakaki ye, Nzambe asengelaki mpe kobwaka lingomba na bango oyo ebebaki. (Matai 23:33–24:2) Kasi, amonisaki ete baoyo balingi kosambela Nzambe na ndenge oyo ye andimaka, basengelaki kozala na lingomba moko oyo ebongisamaki. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Ezalaki mpasi mpo na moyekoli ya Kristo oyo azalaki te koyangana na bandeko na ye bakristo, amonisela bango bolingo. Kutu, Yesu amonisaki ete mangomba ezali lokola banzela mibale. Alobaki ete nzela moko ezali ‘monene mpe efungwamá,’ mpe ememaka na “libebi.” Nzokande, alobaki ete: “Porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.”—Matai 7:13, 14.
Na yango, ezali polele ete mangomba nyonso te nde ezali malamu. Biblia ekebisi biso na likambo ya kosangana na baoyo “bakomilakisa lokola bato ya Nzambe, kasi bakondima nguya na ye té.” Liloba ya Nzambe elobi lisusu ete, “zala mosika na bato ya ndenge wana.” (2 Timote 3:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Epai mosusu, tozwaka matomba mingi soki toyebi baoyo bazali na nzela oyo ezali komema na bomoi mpe tozali koyangana na bango. Tolendisamaka mpe tozwaka lisungi lelo oyo mpe tozali na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya.—Baebre 10:24, 25.
Ndenge nini okoki koyeba lingomba oyo ezali na nzela yango ya moke? Mpo na nini te kotalela biyano ya Biblia oyo ezali na mokapo 15 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a Makambo oyo ezali na mokapo yango ekosalisa yo opona malamu lingomba nini osengeli kokɔta.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.