Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/1 nk. 17-21
  • Yebá kosalela malamu bonzemba na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yebá kosalela malamu bonzemba na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likabo moko ya ntina mingi
  • Kozala monzemba na bolenge
  • Kozala monzemba ntango bambula epusani
  • Kozala monzemba bomoi mobimba
  • Yebá kosalela malamu bomoi oyo ozali na yango
  • ‘Pesá nzela na yango’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndenge ya kozala na esengo ntango ozali monzemba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bonzemba​—⁠libaku mpo na mosala mosalemi na likebi nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/1 nk. 17-21

Yebá kosalela malamu bonzemba na yo

“Oyo akoki kosala yango asala yango.”​—MAT. 19:12.

1, 2. (a) Ndenge nini Yesu, Paulo, mpe bato mosusu batalelaki bonzemba? (b) Mpo na nini bato mosusu bakoki komona ete kozala monzemba to likombe ezali likabo te?

KOZANGA ntembe, libala ezali moko ya makabo kitoko mingi oyo Nzambe apesá bato. (Mas. 19:14) Atako bongo, bakristo mingi oyo bazali minzemba bazalaka mpe na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Harold, ndeko mobali moko ya mbula 95 oyo abalá te, alobi boye: “Atako nasepelaka kozala elongo na basusu mpe koyamba bapaya, soki nazali ngai moko, namiyokaka te ete nazangi moto. Nakanisi nakoki mpenza koloba ete kozala monzemba ezali mpenza likabo oyo nazwá.”

2 Kutu, ezala Yesu Kristo, ezala ntoma Paulo balobaki ete bonzemba, ndenge moko na libala, ezali likabo oyo euti na Nzambe. (Tángá Matai 19:11, 12; 1 Bakorinti 7:7.) Nzokande, moto nyonso oyo azali mozemba aponá te kozala bongo. Ntango mosusu makambo ya bomoi ezali kopekisa moto azwa molongani oyo abongi na ye. Bamosusu mpe, nsima ya kofanda na libala bambula ebele, batikalaka bango moko na mbalakaka mpo libala na bango ekufi to mpe molongani akufi. Na yango, ndenge nini kozala monzemba to likombe ekoki kozala likabo? Ndenge nini bakristo oyo bazali na molongani te bakoki koyeba kosalela bonzemba na bango malamu?

Likabo moko ya ntina mingi

3. Mbala mingi, mabaku nini bakristo oyo bazali minzemba bazalaka na yango?

3 Mbala mingi, moto oyo azali monzemba to likombe azalaka na ntango mingi mpe na bonsomi mingi koleka moto oyo azali na molongani. (1 Ko. 7:32-35) Wana ezali mabaku minene oyo ekoki kopesa ye nzela ya kosala mingi na mosala ya Nzambe, kofungwama na bolingo na ye epai ya basusu, mpe kopusana lisusu mingi penepene na Yehova. Yango wana, bakristo mingi bakómaki kosepela na matomba ya kozala bango moko mpe bandimaki kotikala ndenge wana, ata mpo na mwa ntango. Bato mosusu bakanaki mpenza te kotikala bango moko, kasi ntango makambo ya bomoi ebongwanaki, bakanisaki likambo yango na kati ya libondeli mpe bamonaki ete na lisalisi ya Yehova, bango mpe bakoki kondima kotikala bongo. Na yango, bandimaki bambongwana oyo esalemaki na bomoi na bango mpe bandimaki kotikala bongo, kozanga molongani.​—1 Ko. 7:37, 38.

4. Mpo na nini bakristo oyo bazali minzemba bakoki koyoka ete bazali na esika na mosala ya Nzambe?

4 Bakristo oyo bazali minzemba bayebi ete esengeli te kaka bábala mpo bázwama na valɛrɛ to bándimama na Yehova to na ebongiseli na ye. Nzambe alingaka mokomoko na biso. (Mat. 10:29-31) Moto moko te mpe eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe. (Rom. 8:38, 39) Ezala tóbala to tozali kaka biso moko, tozali na bantina nyonso ya koyoka ete tozali na esika na mosala ya Nzambe.

5. Esɛngaka nini mpo na kozwa mpenza matomba ya kozala monzemba?

5 Nzokande, ndenge moko na bato oyo bazali na likabo ya miziki to ya kosala masano, esɛngaka milende mpo na koyeba kosalela likabo ya bonzemba na ndenge ya malamu. Boye, ndenge nini bakristo oyo bazali minzemba lelo​—mibali to basi, bilenge to mikóló, ezala bango moko baponá kotikala bongo to bazali bongo mpo na makambo ya bomoi​—bakoki koyeba kosalela bomoi na bango malamu? Tózwa mwa bandakisa ya malamu na lisangá ya bokristo ya liboso mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.

Kozala monzemba na bolenge

6, 7. (a) Mokumba nini bana basi ya Filipe bazwaki na mosala ya Nzambe? (b) Ndenge nini Timote asalelaki malamu bambula ya bonzemba na ye, mpe mapamboli nini azwaki mpo andimaki kosalela Nzambe na bolenge na ye?

6 Filipe mopalanganisi ya nsango malamu azalaki na bana basi minei oyo bazalaki bangɔndɔ, oyo bazalaki kosakola nsango malamu na molende lokola tata na bango. (Mis. 21:8, 9) Kosakola ezali na kati ya makabo ya kosala makamwisi oyo eutaki na elimo santu mpe bilenge basi wana basalelaki likabo yango ndenge Yoele 2:28, 29 esakolaki yango.

7 Elenge mobali Timote asalelaki bonzemba na ye malamu. Banda bomwana mpenza, mama na ye Enise mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi bateyaki ye “makomi mosantu.” (2 Tim. 1:5; 3:14, 15) Kasi emonani ete bakómaki bakristo kaka ntango Paulo ayaki mpo na mbala ya liboso na Listra, mboka na bango, na mobu soki 47 T.B. Mbula mibale na nsima, ntango Paulo akendaki kuna mpo na mbala ya mibale, mbala mosusu Timote azalaki na mbula soki 20 to mwa moke koleka. Atako azalaki naino elenge mpe moto ya sika na kati ya solo, bankulutu ya Listra mpe ya Ikoniumu, engumba moko ya pembeni, bazalaki “koloba malamu” mpo na ye. (Mis. 16:1, 2) Paulo abengaki Timote akóma moninga na ye ya mobembo. (1 Tim. 1:18; 4:14) Toyebi mpenzampenza te soki Timote abalaki te bomoi na ye mobimba. Kasi toyebi nde ete ntango azalaki elenge, andimaki na esengo libyangi ya Paulo, mpe mbula ebele nsima na yango, azalaki kaka monzemba mpe na esengo ya kosala lokola misionɛrɛ mpe mokɛngɛli.​—Flp. 2:20-22.

8. Nini esalisaki Yoane Marko azala na mikano ya elimo, mpe mapamboli nini azwaki?

8 Ntango azalaki elenge, Yoane Marko mpe asalelaki bonzemba na ye malamu. Ye ná mama na ye Maria, mpe ndeko na ye Barnabasi, bazalaki kati na basangani ya liboso ya lisangá ya Yerusaleme. Mbala mosusu mpe libota ya Marko ezalaki na bozwi, mpo bazalaki na ndako na bango moko na engumba yango mpe bazalaki na mwana mwasi moko ya mosala. (Mis. 12:12, 13) Kasi atako bolamu wana nyonso, ntango azalaki naino elenge, Marko alukaki bomoi ya bisengo te to ya koluka kaka komisepelisa. Alukaki mpe te kofanda esika moko mpe kobala. Mbala mosusu lokola azalaki na bantoma na ebandeli, akómaki na mposa ya kozala misionɛrɛ. Na yango, na esengo nyonso, akendaki elongo na Paulo mpe Barnabasi na mobembo na bango ya liboso na mosala ya misionɛrɛ mpe azalaki mosaleli na bango. (Mis. 13:5) Na nsima, asalaki mobembo elongo na Barnabasi; nsima ya wana, Biblia elobi ete azalaki kosala elongo na Petro na Babilone. (Mis. 15:39; 1 Pe. 5:13) Toyebi te soki Marko atikalaki monzemba mbula boni. Kasi, atiká nkombo malamu ya moto oyo amipesaki na kosalela basusu mpe kosala mingi na mosala ya Nzambe.

9, 10. Bilenge oyo bazali minzemba bazali na mabaku nini ya kosala mingi na mosala ya Nzambe lelo? Pesá ndakisa.

9 Bilenge mingi na lisangá lelo bazali mpe kosepela kosalela bambula oyo bazali minzemba mpo na komipesa mingi na mosala ya Nzambe. Ndenge moko na Marko mpe Timote, bazali kosepela ndenge bonzemba ezali kopesa bango nzela ya “kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.” (1 Ko. 7:35) Ezali mpenza lipamboli. Mabaku ezali mingi​—kozala mobongisi-nzela, kosala esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi, koyekola monɔkɔ ya sika, kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi to Babetele, kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mpe kosala na Betele. Soki ozali elenge mpe obali naino te, ozali kosalela malamu mabaku oyo ozali na yango?

10 Ndeko mobali moko na nkombo Mark abandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango akómaki pene na mbula 20, na nsima akɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mpe asalaki na bateritware ndenge na ndenge na mokili mobimba. Akanisaki mbula 25 oyo alekisi na mosala ya ntango nyonso, mpe alobi boye: “Nalukaka kolendisa bato nyonso na lisangá; nalukaka kobima na bango na mosala ya kosakola, kokende kotala bango mpo na kolendisa bango, kobenga bango báya kolya na ndako na ngai, ata mpe kosangana elongo na bandeko ebele mpo na kolendisana na elimo. Nyonso wana epesaka ngai esengo mingi.” Ndenge maloba ya Mark emonisi yango, esengo oyo eleki monene na bomoi eutaka na kopesa, mpe soki moto amipesi mobimba na mosala mosantu, akozala na mabaku mingi mpo na kopesa basusu. (Mis. 20:35) Ezala olingaka nini, to ozali na makoki nini, to mpe osalá nini na bomoi na yo, makambo ezali mingi oyo bilenge bakoki kosala lelo na mosala ya Nkolo.​—1 Ko. 15:58.

11. Wapi mwa matomba ya kowela te kobala?

11 Atako nsukansuka bilenge mingi bakosepela kobala, ezali na bantina mpenza ya koluka te kowela kobala. Paulo alendisi bilenge bázela ata tii bakoleka “eleko ya ebandeli ya bolenge,” ntango oyo bamposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mingi. (1 Ko. 7:36) Esɛngaka ntango mingi mpo na komiyeba mpe koyeba makambo mosusu ya bomoi oyo esengeli mpo na kopona molongani ya malamu. Kosala elako ya libala ezali ekateli moko monene, ekateli mpo na bomoi mobimba.​—Mos. 5:2-5.

Kozala monzemba ntango bambula epusani

12. (a) Ndenge nini Ana, mwasi oyo mobali akufá, asalelaki mbongwana wana oyo esalemaki na bomoi na ye? (b) Azwaki libaku nini?

12 Mbala mosusu Ana, oyo Evanzile ya Luka elobeli, azalaki na mawa mingi ntango mobali na ye akufaki na mbalakaka nsima ya mbula nsambo mpamba ya libala. Toyebi te soki bazalaki na bana to soki azalaki kokanisa kobala lisusu. Kasi Biblia elobi ete na mbula 84, Ana azalaki kaka mwasi oyo mobali akufá. Na kolanda makambo oyo Biblia elobi, tokoki koloba ete Ana asalelaki mbongwana wana ya bomoi na ye mpo na kopusana lisusu penepene na Yehova. “Azalaki kozanga te na tempelo, azalaki kosala mosala mosantu butu moi, kokila bilei mpe kosala malɔmbɔ.” (Luka 2:36, 37) Boye, atyaki makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye. Kosala bongo esɛngaki mpiko mpe milende mingi, kasi azwelaki yango mbano monene. Azwaki libaku ya komona mwana Yesu mpe asakwelaki basusu kosikolama oyo bato basengelaki kozwa na nzela ya Masiya.​—Luka 2:38.

13. (a) Nini emonisi ete Dorkasi amipesaki mpenza mpo na lisangá? (b) Mbano nini Dorkasi azwaki mpo na bolamu mpe boboto na ye?

13 Mwasi moko na nkombo Dorkasi, to Tabita, azalaki kofanda na Yope, engumba moko ya kala oyo ezalaki na libongo na nɔrdi-wɛsti ya Yerusaleme. Lokola Biblia elobeli mobali na ye te, na ntembe te na ntango wana azalaki na mobali te. Dorkasi “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.” Na ntembe te atongaki bilamba mpo na basi oyo mibali bakufá mpe bato mosusu oyo bazalaki na bosɛnga, mpe mpo na yango, bakómaki kolinga ye mingi. Na yango, ntango Dorkasi abɛlaki mpe akufaki na mbalakaka, lisangá mobimba etindaki bato bábenga Petro aya kosekwisa ndeko na bango oyo balingaki mingi. Ntango nsango ya lisekwa na ye etambolaki na Yope mobimba, bato mingi bakómaki bandimi. (Mis. 9:36-42) Na boboto na ye, mbala mosusu Dorkasi ye moko mpe asalisaki basusu kati na bato yango.

14. Nini etindaka bakristo oyo bazali na molongani te bápusana penepene na Yehova?

14 Ndenge moko na Ana mpe Dorkasi, bato mingi na lisangá lelo bazali kaka minzemba atako mbula na bango epusani. Mpo na bamosusu, ekoki kozala mpo bazwi naino molongani oyo abongi na bango te. Bamosusu ekoki kozala mpo libala na bango ekufá to molongani na bango akufá. Lokola bazali te na moto oyo bakoki koyebisa basekele na bango, mbala mingi bakristo oyo bazali na molongani te bayekolaka kotyela Yehova motema mingi. (Mas. 16:3) Silvia, ndeko mwasi moko ya monzemba oyo asali na Betele mbula koleka 38 amonaka ete ezali lipamboli. Kasi alobi boye: “Na bantango mosusu, makasi esilaka ngai. Namitunaka boye: ‘Nani akolendisa ngai?’” Na nsima abakisi boye: “Kotya motema ete Yehova ayebi oyo nasengeli na yango malamu koleka ngai moko esalisaka ngai napusana penepene na ye. Mpe elendiseli ezangaka koya te, mbala mosusu na ndenge oyo nakanisaki ata kokanisa te.” Ntango nyonso oyo topusani penepene na Yehova, azangaka te kosalisa biso na ndenge ya malamu koleka mpe ya kokitisa motema.

15. Ndenge nini bakristo oyo babalá te bakoki ‘kofungwama’ na kati ya bolingo na bango?

15 Bonzemba epesaka libaku monene ya ‘kofungwama’ na kati ya bolingo. (Tángá 2 Bakorinti 6:11-13.) Jolene, ndeko mwasi moko ya monzemba oyo alekisi mbula 34 na mosala ya ntango nyonso, alobi boye: “Nalingaka kosala nyonso mpo nasala boninga makasi na bato, kaka na baoyo ya mbula na ngai te, kasi na bato ya mbula nyonso. Bonzemba ezali mpenza libaku ya kopesa mingi epai ya Yehova, libota, bandeko ya lisangá, mpe epai ya bazalani. Ndenge mbula na ngai ezali kopusana, nazali mpe kosepela mingi koleka ndenge nazali monzemba.” Mibange, bibɔsɔnɔ, baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko, bilenge, mpe bato mosusu na lisangá basepelaka mpenza na lisalisi ya bolingo oyo minzemba bapesaka bango. Ya solo, ntango nyonso oyo tomoniseli basusu bolingo, biso moko mpe tomiyokaka malamu koleka. Yo mpe okoki ‘kofungwama’ na kati ya bolingo na yo mpo na basusu?

Kozala monzemba bomoi mobimba

16. (a) Mpo na nini Yesu atikalaki monzemba bomoi na ye mobimba? (b) Ndenge nini Paulo asalelaki malamu bonzemba na ye?

16 Yesu abalaki te; asengelaki komibongisa mpe kokokisa mosala oyo bapesaki ye. Asalaki mibembo mingi; azalaki kosala mosala banda ntɔngɔ tii butu, mpe nsukansuka apesaki bomoi na ye mbeka. Kozala monzemba ezalaki na litomba mpo na ye. Ntoma Paulo mpe asalaki mibembo milai mpe akutanaki na mikakatano minene na mosala ya kosakola. (2 Ko. 11:23-27) Atako mbala mosusu kala azalaki na mwasi, Paulo aponaki kotikala monzemba nsima ya kokóma ntoma. (1 Ko. 7:7; 9:5) Mpo na mosala ya Nzambe, ezala Yesu ezala Paulo balendisaki basusu bálanda ndakisa na bango soki likoki ezali. Atako bongo, moko te kati na bango mibale alobaki ete kotikala monzemba ezali mobeko mpo na mosaleli ya Nzambe.​—1 Tim. 4:1-3.

17. (a) Ndenge nini bato mosusu balandi ndakisa ya Yesu ná Paulo lelo? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova asepelaka na baoyo bamipimelaka ndenge wana?

17 Lelo mpe bato mingi baponá bango moko kotikala minzemba mpo bákoka kosalela Nzambe malamu koleka. Harold, oyo tolobelaki na ebandeli, asali mbula koleka 56 na Betele. Alobi boye: “Ntango nakokisaki mbula 10 na Betele, nasilaki komona babalani ebele batiki mosala ya Betele mpo na maladi to mpo na kosunga moboti moko oyo akómi mobange. Baboti na ngai basilaki kokufa. Kasi, nazalaki kolinga Betele mingi mpenza, yango wana naboyaki kobala, mpo nalingaki te kotya mosala na ngai na likama.” Ndenge moko mpe, eleki mwa bambula, mobongisi-nzela moko ya kala na nkombo Margaret alobaki boye: “Mabaku ya kobala emonanaki mingi, kasi naboyaki na ngai nde kobala. Kasi nasalelaki bonsomi oyo bonzemba epesaki ngai mpo na komipesa na mosala ya kosakola, mpe yango epesi ngai esengo mingi.” Na ntembe te, Yehova akobosana ata mokolo moko te moto oyo azali komipimela ndenge wana mpo na losambo ya solo.​—Tángá Yisaya 56:4, 5.

Yebá kosalela malamu bomoi oyo ozali na yango

18. Ndenge nini tokoki kolendisa mpe kosunga bakristo oyo babalá te?

18 Bakristo nyonso oyo babalá te, oyo bazali kosala nyonso mpo na kosalela Yehova babongi mpenza kozwa longonya mpe kolendisama. Tolingaka bango mpo na ndenge bazali mpe mpo na mosala monene oyo bazali kosala na lisangá. Bakomiyoka te ete bazali kaka bango moko soki tokómi mpenza “bandeko mibali mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana” na bango ya elimo.​—Tángá Marko 10:28-30.

19. Okoki kosala nini mpo oyeba kosalela bonzemba na yo malamu?

19 Ozala monzemba mpo yo moko oponá to kaka mpo makambo ya bomoi nde esali ete ozala bongo, bandakisa ya Biblia mpe ya mikolo na biso oyo touti kotalela endimisa yo ete okoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Tozelaka makabo mosusu na mposa makasi; nzokande mosusu eyaka na pwasa. Tosepelaka na mosusu na mbala moko, nzokande mosusu, tomonaka motuya na yango nsima ya mikolo. Na yango, etali mingimingi makanisi na yo. Okoki kosala nini mpo osepela na bonzemba na yo? Pusaná penepene na Yehova, zalá na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe, mpe fungwamá na kati ya bolingo na yo mpo na basusu. Ndenge moko na libala, bonzemba ekoki kozala malamu mingi soki tomoni yango lokola likabo oyo euti na Nzambe mpe tosaleli yango malamu.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini bonzemba ekoki kozala likabo?

• Ndenge nini kozala monzemba na bolenge ekoki kozala lipamboli?

• Mabaku nini bakristo ya minzemba bazali na yango ya kopusana penepene na Yehova mpe ya kofungwama na kati ya bolingo na bango?

[Bililingi na lokasa 18]

Ozali kosalela mabaku oyo ozali na yango na mosala ya Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto