Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/03 lok. 1
  • ‘Pesá nzela na yango’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Pesá nzela na yango’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Yebá kosalela malamu bonzemba na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Bonzemba​—⁠libaku mpo na mosala mosalemi na likebi nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 4/03 lok. 1

‘Pesá nzela na yango’

1 Mokolo mosusu, ntango Yezu azalaki kosolola na bayekoli na ye na likambo etali libala, alobaki ete kotikala monzemba ezali ‘likabo.’ Na nsima abakisaki: “Oyo akoki kopesa nzela na yango apesa nzela na yango.” (Mat. 19:10-12) Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo alobelaki na mokanda na ye matomba ya kotikala monzemba, mpe alendisaki baklisto mosusu bázala minzemba lokola ye. (1 Kol. 7:7, 38) Bato mingi lelo oyo ‘bapesi nzela’ na bonzemba mpe bazali kozwela yango matomba mingi. Wapi mwa matomba ya bonzemba?

2 Kosalela Nzambe “kozanga kotya makanisi na makambo mosusu”: Paulo ayebaki ete kozala monzemba ezalaki kopesa ye libaku ya kosalela Yehova “kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.” Ndenge moko lelo oyo, ndeko mobali oyo azali monzemba akoki kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mpe monzemba azalaka na mpasi mingi te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela, ya koyekola monɔkɔ mosusu, ya kokende na lisangá esika mposa ezali makasi, ya kosala na Betele, to ya kozwa mokumba mosusu ya mosala. Azalaka na ntango mpe mabaku mingi ya koyekola mpe komanyola, mpe ya kobondela Yehova na motema mobimba. Moto oyo abali te, mbala mingi azalaka na ntango mingi mpo na kosalisa bato mosusu. Makambo wana nyonso ezalaka “mpo na litomba” ya moto ye moko.​—1 Kol. 7:32-35; Mis. 20:35.

3 Mosala ya ndenge wana mpo na Nzambe oyo moto atyeli yango likebi na ye nyonso, ememaka mapamboli mingi. Nsima ya kolekisa mbula 27 na Kenya, ndeko mwasi moko ya monzemba akomaki ete: “Tozwaki baninga ebele mpe tozalaki na mosala mingi mpenza! Tozalaki kosala makambo elongo [mpe] tozalaki kokende kotalana. . . . Nazalaki kosalela bonsomi na ngai ya monzemba mpo na kokende esika nyonso oyo nalingi mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola, mpe yango epesi ngai esengo mingi.” Abakisaki ete: “Wana bambula ezali koleka, boninga na ngai elongo na Yehova ezali kokóma makasi.”

4 Kopesa nzela na yango: Yesu alobaki ete mokano ya likabo ya kotikala monzemba esengeli kozala “mpo na bokonzi ya likoló.” (Mat. 19:12) Ndenge kaka ezalaka mpo na likabo mosusu nyonso, kotikala monzemba esengeli kosalelama malamu mpo epesa esengo mpe matomba. Mpo bazali kosalela mabaku nyonso oyo bonzemba epesaka mpe mpo batyeli Yehova motema ete akopesa bango bwanya mpe nguya, bato mingi oyo babali te bamoni ntina ya kopesa nzela na likabo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto