Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/2 nk. 4-9
  • Ndenge ya kolonga makambo oyo babalani mingi bamilelaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolonga makambo oyo babalani mingi bamilelaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sekele mpo na kolonga
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Pesáká molongani na yo kilo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/2 nk. 4-9

Ndenge ya kolonga makambo oyo babalani mingi bamilelaka

BIBLIA elobaka te ete libala ezali likambo ya pɛtɛɛ. Na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki ete babalani bakokutana na “mikakatano ya mokolo na mokolo.” (1 Bakorinti 7:28, Today’s English Version) Kasi, mwasi ná mobali bakoki kosala mingi mpo na kokitisa mikakatano oyo bazali na yango mpe kosala makasi mpo mokomoko abakisela moninga esengo. Tótalela makambo motoba oyo mibali mpe basi mingi bamilelaka mpo na yango, mpe tótala ndenge oyo kosalela batoli ya Biblia ekoki kosalisa.

1

LIKAMBO:

“Ngai ná molongani na ngai tosalaka moto na moto makambo na ndenge na ye.”

TOLI YA BIBLIA:

“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—BAFILIPI 1:10.

Libala na yo ezali moko ya makambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Ebongi kozala na esika ya liboso. Na yango, talá programɛ na yo soki yango nde ezali kosala ete moto na moto na libala asalaka makambo na ndenge na ye. Kotika te makambo mosusu ya ntina ya bomoi esala ete yo ná molongani na yo, bókóma moto na moto kosala makambo na ndenge na ye. Toboyi te, mosala mpe makambo mosusu oyo okoki kobongola yango te, ekoki kosala ete yo ná molongani na yo bózala te elongo mpo na mwa ntango. Kasi, okoki mpe osengeli kotya ndelo na likambo nyonso oyo ozali na bokonzi likoló na yango​—na ndakisa, ntango oyo olekisaka na kominanola to elongo na baninga.

Nzokande, babalani mosusu bakoki kokóma kosalaka bangonga mingi nsima ya mosala to kolekisa ngonga mingi na kominanola kaka mpo bázala te na ntango ya kolekisaka elongo na balongani na bango. Tokoki koloba te ete mibali mpe basi yango “bazali kosala moto na moto makambo na ndenge na ye.” Bazali nde kokima makambo. Soki yo ná molongani na yo bokómi kosala bongo, bosengeli koluka koyeba mikakatano oyo bozali na yango mpe kobongisa yango. Yo ná molongani na yo bokozala mpenza na bomoko mpe ‘bokokóma mosuni moko’ soki bozali kolekisa ntango elongo.​—Ebandeli 2:24.

Ndenge babalani mosusu basalelaki toli oyo: Andrewa ná Tanji, mwasi ná mobali moko na Australie, babalaná eleki mbula zomi. Andrew alobi boye: “Kolekisa ntango mingi na mosala mpe na bafɛti ekoki kozala likama mpo na libala. Na yango, ngai ná mwasi na ngai tozwaka ntango ya kosolola mpe koyebisanaka makambo.”

Dave ná Jane, oyo bafandaka na États-Unis mpe oyo babalaná esili koleka mbula 22, balekisaka miniti 30 mpokwa nyonso mpo na koyebisana makambo oyo bakutanaki na yango mpe kosolola. Jane alobi boye: “Yango ezalaka ntango moko oyo topesaka nzela te ete eloko moko ebebisa yango.”

2

LIKAMBO:

“Nazali kozwa lisusu litomba moko te na libala oyo.”

TOLI YA BIBLIA:

“Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 BAKORINTI 10:24.

Moto oyo azali komibanzabanza libosoliboso mpo na litomba oyo azali kozwa na libala akozala soki moke te na esengo, ata soki abali mbala boni. Libala esimbaka kaka soki molongani mokomoko azali kotya likebi na oyo akoki kopesa na esika ya koluka eloko oyo ye akozwa. Yesu alobelaki ntina yango na maloba oyo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Ndenge oyo babalani mosusu basalelaki toli yango: Maria ná Martin, oyo bafandaka na Mexico, babalaná esili koleka mbula 39. Kasi, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Babosanaka te mokakatano moko oyo bakutanaki na yango. Maria alobi boye: “Mokolo moko ntango tozalaki koswana makasi, nalobelaki Martin likambo moko ya kozanga botosi. Asilikaki makasi mpenza. Namekaki kolimbolela ye ete nakanaki te koloba na ye bongo, ezalaki kaka nkanda. Kasi, aboyaki koyoka ngai.” Martin alobi ete: “Ntango tozalaki koswana, nabandaki kokanisa ete tosengeli kokabwana kaka, nakosala lisusu eloko moko te mpo na kobongisa libala oyo.”

Martin azalaki na mposa mwasi na ye atosaka ye. Maria azalaki na mposa mobali na ye amitya na esika na ye. Moko te na kati na bango azalaki kozwa oyo ye azalaki na mposa na yango.

Ndenge nini basilisaki mokakatano yango? Martin alobi ete: “Nazwaki ntango ya kokitisa nkanda na ngai, mpe biso mibale tozwaki ekateli ya kosalela batoli ya Biblia ya kozala na limemya mpe boboto. Na boumeli ya bambula, tomonaki ete ata soki mikakatano ebimi mbala boni, tokoki kolonga yango soki tosɛngi Nzambe lisalisi mpe tosaleli toli ya Biblia.”​—Yisaya 48:17, 18; Baefese 4:31, 32.

3

LIKAMBO:

“Molongani na ngai akokisaka te mokumba na ye.”

TOLI YA BIBLIA:

“Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”​—BAROMA 14:12.

Na ntembe te, libala ekotambola malamu te soki kaka molongani moko nde azali kosala mpo elonga. Kasi, makambo ekozala mabe mingi koleka soki babalani nyonso mibale bazali kosala eloko moko te mpe bazali kopesana foti.

Soki ozali kotya kaka miso na oyo molongani na yo asengeli kosala, okozala na esengo soki moke te. Ekozala bongo, soki ozali kotalela mabunga mikemike ya molongani na yo mpo okokisaka te mokumba oyo ya yo. Kasi, soki ozali kosala makasi mpo ozala mobali to mwasi ya malamu, na ntembe te libala na bino ekobonga. (1 Petro 3:1-3) Likambo eleki ntina, bokomonisa Nzambe ete bozali kozwa na motuya ebongiseli oyo ye asalaki mpo na libala, mpe misala na bino ekosepelisa ye mingi.​—1 Petro 2:19.

Ndenge oyo babalani mosusu basalelaki toli yango: Kim ná mobali na ye, oyo bafandaka na Corée, baumeli na libala mbula 38. Kim alobi boye: “Ntango mosusu asepelaka te kozala elongo na ngai mpe aboyaka kosolola na ngai, mpe nayebaka ntina te. Yango etindaka ngai namona lokola alingaka ngai lisusu te. Na bantango mosusu nakómaka kokanisa, ‘mpo na nini ye alingaka kaka ngai namitya na esika na ye kasi ye alingaka te komitya na esika na ngai?’”

Na esika atyaka miso kaka na mabe oyo mobali na ye asalelaka ye, Kim asalaka bongo te. Alobi boye: “Na esika natikala kaka na nkanda, namonaka ete nasengeli kozala moto ya liboso ya koluka kotya kimya. Nsukansuka, biso mibale tolongolaka nkanda mpe tosololaka makambo nyonso na kimya.”​—Yakobo 3:18.

4

LIKAMBO:

“Mwasi na ngai azalaka na botosi te.”

TOLI YA BIBLIA:

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo.”​—1 BAKORINTI 11:3.

Mobali oyo akanisaka ete mwasi na ye azali na botosi te, asengeli liboso kotalela soki ye andimaka kotosa Mokonzi na ye, Yesu Kristo. Mobali akoki komonisa botosi na ye na kolanda ndakisa ya Yesu.

Ntoma Paulo akomaki ete: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:25) Yesu ‘alakisaki te’ bokonzi to akonzaki te bayekoli na ye. (Marko 10:42-44) Apesaki bayekoli na ye litambwisi ya polele mpe asembolaki bango ntango esengelaki. Kasi, azalaki makambo makasimakasi te. Azalaki komonisela bango boboto mpe koyeba bolɛmbu na bango. (Matai 11:29, 30; Marko 6:30, 31; 14:37, 38) Azalaki ntango nyonso kotya matomba na bango liboso ya oyo ya ye.​—Matai 20:25-28.

Mobali asengeli komituna motuna oyo: ‘Ndenge oyo natalelaka bokonzi mpe basi emonisaka ete nazali kolanda mimeseno ya mboka na ngai na esika ya kolanda toli mpe bandakisa ya Biblia?’ Na ndakisa, okokanisa nini mpo na mwasi oyo aboyi kondima likanisi ya mobali na ye mpe na limemya nyonso amonisi likanisi na ye? Na Biblia, Sara, mwasi ya Abrahama, alobelami lokola ndakisa ya mwasi ya botosi. (1 Petro 3:1, 6) Kasi, amonisaki likanisi na ye ntango esengelaki, na ndakisa ntango Abrahama amonaki te makama oyo elingaki kokómela libota na bango.​—Ebandeli 16:5; 21:9-12.

Emonani polele ete Abrahama abangisaki Sara te mpo akanga monɔkɔ. Azalaki te mobali ya makambo makasi. Ndenge moko, mobali oyo alandaka toli ya Biblia, akoluka te kobangisa mwasi na ye, kosɛnga ye ete atosa ye na makambo nyonso oyo ye alingi. Mwasi na ye akobanda kotosa ye soki azali kosalela bokonzi na ye na boboto nyonso.

Ndenge oyo babalani mosusu basalelaki toli oyo: James, oyo afandaka na Angleterre mpe abalá esili koleka mbula mwambe, alobi boye: “Nayekoli ete nasengeli te kozwa bikateli ya ntina mingi kozanga kotuna mwasi na ngai. Nalukaka te kotalela kaka matomba na ngai moko. Kasi, nasalaka nde makasi ete natya bamposa na ye liboso ya oyo ya ngai.”

George afandaka na États-Unis mpe abalá eleki bambula 59. Alobi boye: “Nasalá makasi mpo nasalelaka mwasi na ngai makambo te lokola moto moko oyo azali na ntina te, kasi natalelaka ye lokola moninga oyo azali na mayele mpe na makoki.”​—Masese 31:10.

5

LIKAMBO:

“Mobali na ngai azelaka kaka ngai natambwisa makambo.”

TOLI YA BIBLIA:

“Mwasi ya bwanya mpenza atongi ndako na ye, kasi oyo ya zoba abukaka yango na mabɔkɔ na ye moko.”​—MASESE 14:1.

Soki mobali na yo akakatanaka mpo na kozwa bikateli to kotambwisa makambo na ndako na bino, ezali na makambo soki misato oyo okoki kosala. (1) Okoki kolobelaka ntango nyonso mabunga na ye to (2) kobɔtɔla ye mokumba ya kotambwisa libota to (3) okoki kopesa ye longonya mpo na milende nyonso oyo asalaka. Soki oponi makanisi mibale ya liboso, okobuka ndako na yo na mabɔkɔ na yo moko. Soki oponi likanisi ya misato, yango ekosalisa yo otonga to oyeisa libala na yo makasi.

Mibali mingi, bapesaka motuya na botosi koleka bolingo. Na yango, soki ozali kosala makambo oyo mobali azali komona ete otosaka ye​—komonisaka ye ete milende oyo asalaka mpo na kotambwisa libota ezali malamu mpe osepelaka na yango—​na ntembe te akokokisa lisusu malamu mokumba na ye. Ya solo, ekozala na bantango oyo bokoyokana te na mobali na yo mpo na likambo moko. Bino mibale bosengeli kosolola mpo na makambo yango. (Masese 18:13) Kasi, maloba oyo okopona mpo na koloba mpe mongongo na yo ekoki kosala ete obebisa to obongisa libala na yo. (Masese 21:9; 27:15) Lobáká na limemya, mpe na ntembe te okolonga na likambo oyo ozali na yango mposa​—kozala na mobali oyo akakatanaka te mpo na kotambwisa makambo.

Ndenge oyo babalani mosusu basalelaki toli yango: Michele, oyo afandaka na États-Unis, mpe abalá eleki mbula 30 alobi boye: “Lokola mama abɔkɔlá ngai ná bandeko na ngai ya basi kaka ye moko, azalaki mwasi moko matata mpe azalaki kosala makambo ye moko. Ekómaka ete namekola bizaleli yango. Yango wana, esɛngaka nasala makasi mpo na komonisa limemya mpenza. Na ndakisa, nayekoli ete na esika nazwaka bikateli ngai moko, nasengeli kosolola na mobali na ngai.”

Rachel, oyo afandaka na Australie mpe abalaná na Mark esili koleka mbula 21, azalaki mpe kolanda makambo oyo azalaki komona ntango azali kokola. Alobi boye: “Mama azalaki na botosi ata moke te epai ya Tata, bazalaki ntango nyonso koswana mpe kopesana limemya te. Na bambula ya liboso ya libala na biso, nazalaki kolanda bizaleli ya mama. Kasi, nsima ya bambula nayekolaki ete nasengeli kosalelaka toli ya Biblia na oyo etali komonisa botosi. Lelo oyo, ngai ná Mark tozali mpenza na esengo na libala na biso.”

6

LIKAMBO:

“Nakokoka lisusu te kokanga motema na bizaleli mabe ya molongani na ngai.”

TOLI YA BIBLIA:

“Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—BAKOLOSE 3:13.

Ntango bobandaki kokutana mpo na libala, na ntembe te ozalaki kotya likebi mingi kaka na bizaleli ya malamu ya fianse na yo mpe okangaki miso na mabunga na ye. Okoki kosala bongo te sikoyo? Toboyi te, azali kosala makambo oyo ebongi mpenza omilela mpo na yango. Kasi, omituna boye: ‘Na bizaleli nini ya molongani na ngai nakosepela kotya likebi​—na oyo ya malamu to ya mabe?’

Yesu asalelaki ndakisa moko ya malamu mpenza oyo emonisi ntina oyo tosengeli kotyaka miso te na mabunga oyo tomonaka epai ya basusu. Atunaki boye: “Mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko?” (Matai 7:3) Lititi, ekoki kozala moke, nzokande libaya ya motɔndɔ, ezali nzete ya molai oyo bazalaki kosalela mpo na kosimba nsamba ya ndako. Likanisi ya Yesu ezalaki mpenza nini? “Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.”​—Matai 7:5.

Yesu abandaki ndakisa yango na likebisi moko ya ntina mingi. Alobaki: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa.” (Matai 7:1, 2) Soki olingi Nzambe atala te mabunga na yo​—libaya ya motɔndɔ oyo ezali na liso na yo—​ekozala malamu mpo na yo otala mpe te mabunga ya molongani na yo.​—Matai 6:14, 15.

Ndenge oyo babalani mosusu basalelaki toli oyo: Jenny, oyo afandaka na Angleterre mpe abalaná ná Simon eleki sikoyo mbula 9, alobi boye: “Namonaka ete likambo oyo esilikisaka ngai mingi mpo na mobali na ngai, ezali ndenge oyo abongisaka te makambo liboso, azelaka kaka kosala makambo ntango ngonga etikali moke. Nayebaka te mpo na nini nasilikaka, mpo ntango tozalaki bafianse nazalaki kosepela na ndenge azalaki kosala makambo kozanga kobongisa liboso. Nzokande, lelo oyo namonaka ete ngai mpe nazali na foti na ndenge nalingaka kolandela makambo nyonso. Ngai ná Simon tozali koyekola ndenge ya kokipe te mwa mabunga ya mikemike.”

Curt, oyo abalaná na Michele oyo tolobelaki liboso, alobi ete: “Soki ozali kotalela kaka bizaleli ya mabe ya molongani na yo, okobanda komona mabunga yango kaka minene. Nasepelaka kotya likebi na bizaleli oyo etindaki ngai nalinga Michele ntango tobandaki.”

Sekele mpo na kolonga

Mwa bandakisa oyo emonisi ete mikakatano ekoki kozanga te na libala, kasi tokoki kolonga yango. Sekele mpo na kolonga ezali nini? Kolisá bolingo mpo na Nzambe mpe ndimá kosalela toli oyo ezali na Liloba na ye, Biblia.

Alex ná Itohan, oyo bazalaka na Nigeria mpe babalaná mbula koleka 20 bayekoli sekele yango. Alex alobi boye: “Namoni ete mikakatano mingi ya libala ekoki kosila soki babalani bazali kosalela batoli ya Biblia.” Mwasi na ye alobi ete: “Toyekoli ntina ya kobondelaka elongo mbala na mbala mpe kosalela toli ya Biblia, ya kolingana mpenza mpe komonisana motema molai. Sikoyo tozalaka na mikakatano mingi te ndenge oyo tozalaki na yango ntango tobalanaki.”

Okosepela koyekola makambo mingi na ndenge oyo toli ya Liloba ya Nzambe ekoki komema matomba na libota na yo? Soki ezali bongo, sɛngá Batatoli ya Yehova básolola na yo mokapo 14 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?b

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 4]

Tozwaka ntango mpo na kozala elongo?

[Elilingi na lokasa 5]

Nasalaka nyonso mpo na kopesa koleka oyo nazwaka?

[Elilingi na lokasa 6]

Nazalaka moto ya liboso ya koluka kosilisa matata?

[Elilingi na lokasa 7]

Natalelaka likanisi ya mwasi na ngai liboso nazwa ekateli?

[Elilingi na lokasa 9]

Natyaka likebi mingi na bizaleli ya malamu mingi ya molongani na ngai?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto