Okɔtá na kopema ya Nzambe?
“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—EBR. 4:12.
1. Tokoki kosala nini mpo tókɔta na kopema ya Nzambe lelo, mpe mpo na nini kotosa ekoki kozala mpasi?
NA LISOLO oyo eleki, tomonaki ete tokoki kokɔta na kopema ya Nzambe lelo soki tozali kotosa ye mpe kosala na boyokani na mikano na ye. Kasi koloba ekoki kozala pɛtɛɛ, kosala nde mpasi. Na ndakisa, ntango toyekoli ete Yehova aboyaka likambo moko oyo biso tosepelaka na yango, na ebandeli tokoki koboya kotosa. Yango emonisaka ete tosengeli kokola na oyo etali ‘kosepela kotosa.’ (Yak. 3:17) Na lisolo oyo, tokolobela mwa makambo oyo epesaka biso libaku ya komonisa soki tosepelaka mpenza kotosa ntango nyonso.
2, 3. Milende nini tosengeli kokoba kosala mpo tózala ntango nyonso kitoko na miso ya Yehova?
2 Olingaka mpenza kolanda batoli ya Biblia? Biblia eyebisi biso ete Yehova alingi koyanganisa “biloko kitoko ya bikólo nyonso.” (Hag. 2:7) Ya solo, mingi kati na biso tozalaki biloko kitoko te ntango tobandaki koyekola Biblia. Nzokande, bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na ye etindaki biso tóbongola mpenza makanisi mpe bizaleli na biso mpo esepelisa mpenza Nzambe. Nsukansuka, nsima ya kosala mabondeli mpe milende makasi, mokolo ya esengo ekokaki mpe tozwaki batisimo.—Tángá Bakolose 1:9, 10.
3 Nzokande, kobunda na kozanga kokoka esukaki te na batisimo. Etumba ezali kaka mpe tokokoba kobunda tii kozanga kokoka ekosila. Kasi, toyebi ete soki tokobi kobunda mpe tozali na ekateli ya kokóma kitoko koleka na miso ya Yehova Nzambe, akopambola milende na biso.
Ntango tosengeli kozwa toli
4. Yehova asalelaka nzela misato nini mpo na kopesa biso toli?
4 Liboso tóbongisa makambo mosusu na bomoi na biso, tosengeli naino koyeba makambo yango. Diskur moko oyo bapesi na Ndako ya Bokonzi to lisolo moko oyo ebimi na mikanda na biso ekoki komonisa bolɛmbu moko oyo tozali na yango. Nzokande, soki tomoni te ete tosengeli kobongola makambo mosusu ata nsima ya koyoka diskur moko to kotánga lisolo moko na mikanda na biso, Yehova akoki kosalela ndeko moko na lisangá mpo asalisa biso tómona mabe yango.—Tángá Bagalatia 6:1.
5. Mbala mosusu tosalaka ndenge nini soki bapesi biso toli, mpe mpo na nini bankulutu basengeli kotika te kosalisa biso?
5 Ezalaka pɛtɛɛ te kondima toli oyo euti na moto ya kozanga kokoka, ata soki apesaki yango na mayele mpe na bolingo ndenge nini. Kasi, ndenge Bagalatia 6:1 emonisi yango, Yehova atindi baoyo bazali na makoki ya elimo to bankulutu ‘bámekaka’ kosembola biso “na elimo ya boboto.” Soki tondimi lisalisi na bango, tokokóma kitoko koleka na miso ya Nzambe. Likambo ya kokamwa, na mabondeli na biso, tondimaka mbala mingi ete tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi, ntango moto moko ayebisi biso ete tosali libunga, mbala mosusu tolukaka komilongisa, koloba ete libunga yango ezali monene te, kokanisa ete moto oyo asemboli biso alingaka biso te, to mpe koloba ete apesi biso toli yango na ndenge ya malamu te. (2 Bak. 5:11) Mpe soki toli yango etali likambo moko oyo tolingaka kutu bálobela te, na ndakisa makambo oyo moto moko ya libota na biso azali kosala, molato ná ndenge na biso ya kobongisa nzoto, bopɛto ya nzoto na biso, to lolenge moko ya kominanola oyo tolingaka kasi esepelisaka Yehova te, tokoki kosilika mpenza, mpe yango ekoki kopesa biso moko mawa mpe kolɛmbisa ndeko oyo ayei kopesa biso toli! Kasi ntango nkanda esili, mbala mingi toyaka kondima ete toli yango ebongaki mpenza.
6. Na ndenge nini liloba ya Nzambe emonisaka “makanisi mpe mikano ya motema”?
6 Vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo eyebisi biso ete liloba ya Nzambe “ezali na nguya.” Ya solo, liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kobongola bomoi. Ekoki kosalisa biso tóbongola makambo oyo esengeli nsima ya kozwa batisimo kaka ndenge tosalaki liboso tózwa batisimo. Na mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo akomaki mpe ete liloba ya Nzambe “ekɔtaka tii kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Maloba ya Paulo elimboli ete ntango tokangi mpenza ntina ya mokano ya Nzambe mpo na biso, misala na biso ekomonisa bomoto na biso ya kati. Na bantango mosusu, ndenge oyo bato mosusu bamonaka biso (“molimo”) ekesanaka na ndenge oyo tozali mpenza na kati (“elimo”)? (Tángá Matai 23:27, 28.) Kanisá ndenge yo okoki kosala soki okutani na makambo oyo tolingi kolobela sikoyo.
Kobá kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova
7, 8. (a) Ekoki kozala nini nde etindaki Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo bákangama na makambo mosusu ya Mibeko? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bazalaki kosala na boyokani na mokano ya Yehova te?
7 Mingi kati na biso toyebi malamu maloba oyo ya Masese 4:18: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Elingi koloba ete etamboli na biso mpe boyebi na biso ya mikano ya Nzambe ekokola lisusu nsima ya mikolo.
8 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, nsima ya liwa ya Yesu, Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo bazalaki kokoka te kotika Mibeko ya Moize. (Mis. 21:20) Atako Paulo alimbolaki polele ete bakristo bazalaki lisusu na nse ya Mibeko te, bamosusu baboyaki toli na ye oyo eutaki na Yehova. (Kol. 2:13-15) Mbala mosusu bamonaki ete soki bakobi kotosa ata mwa makambo mosusu ya Mibeko, bato ya Lingomba ya Bayuda bakonyokola bango te. Kasi Paulo akomelaki Baebre oyo bakómaki bakristo mpe ayebisaki bango polelepolele ete bakoki te kokɔta na kopema ya Nzambe soki baboyi kosala na boyokani na mokano na Ye.a (Ebr. 4:1, 2, 6; tángá Baebre 4:11.) Mpo Yehova andima bango, basengelaki kondima ete akómi kotambwisa bato na ye na nzela mosusu.
9. Tosengeli koyoka ndenge nini ntango basemboli boyebi na biso mpo na mateya mosusu ya Biblia?
9 Na ntango na biso, basembolaka boyebi na biso ya mateya mosusu ya Biblia. Esengeli kobulunganisa biso te; esengeli nde kotinda biso tótyela moombo ya sembo mpe ya mayele motema koleka. Ntango Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bazali bamonisi ya “moombo ya sembo” basosoli ete esengeli kobongola to kosembola makanisi na biso mpo na liteya moko, babangaka te kosala yango. Mpo na bango, likambo oyo eleki ntina ezali nde kosala na boyokani na mokano ya Nzambe; ezali te koluka komibomba mpo bato bálobela bango mabe te soki basali mbongwana. Yo osalaka nini ntango basemboli boyebi na biso mpo na liteya moko boye ya Biblia?—Tángá Luka 5:39.
10, 11. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Bayekoli mosusu ya Biblia ntango bayokaki ete ndenge ya sika eyei mpo na kosakola nsango malamu?
10 Tózwa ndakisa mosusu. Eleki mbula soki 100, Bayekoli mosusu ya Biblia oyo bazalaki kosala badiskur kitoko bazalaki komona ete kosala badiskur ya kitoko nde lolenge malamu oyo bakokaki kosala mosala ya kosakola. Bazalaki kosepela koloba liboso ya bato ebele, mpe bamosusu bazalaki kosepela mingi ntango bato bazali kokumisa bango. Nzokande na nsima, emonanaki ete Yehova alingi bato na ye básuka kaka na kosala badiskur te, kasi bámipesa na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola, na ndakisa na mosala ya kosakola ndako na ndako. Balobi mosusu ya malamu baboyaki komeka likambo nyonso ya sika. Na badiskur na bango, bazalaki komonana lokola bato oyo balingaka makambo ya elimo mpe oyo bamipesá mobimba na Nkolo. Kasi, ntango mokano ya Nzambe mpo na mosala ya kosakola eyebanaki polele, makanisi na bango ya solosolo, mikano na bango, mpe bamposa na bango ebimaki polele. Yehova amonaki bango ndenge nini? Apambolaki bango te. Batikaki lisangá ya Yehova.—Mat. 10:1-6; Mis. 5:42; 20:20.
11 Elingi koloba te ete kosakola ndako na ndako ezalaki likambo ya pɛtɛɛ mpo na bato nyonso oyo batikalaki sembo na lisangá. Mingi bamonaki ete mosala yango ezali mpasi, mingimingi na ebandeli. Kasi, bazalaki na botosi. Na nsima, balongolaki kobanga, mpe Yehova apambolaki bango mingi. Yo osalaka ndenge nini ntango basɛngi yo omeka lolenge moko ya mosala ya kosakola oyo osepelaka na yango te? Ondimaka komeka likambo ya sika?
Ntango moto oyo tolingaka atiki Yehova
12, 13. (a) Mpo na nini Yehova asɛngi ete bato oyo basali mabe bábimisama na lisangá? (b) Baboti mosusu oyo bazali bakristo bakutanaka na mokakatano nini, mpe eloko nini ekómisaka mokakatano yango mpasi mingi?
12 Na ntembe te, biso nyonso tondimaka etinda oyo elobi ete tosengeli kozala pɛto na nzoto, na bizaleli mpe na elimo mpo na tósepelisa Nzambe. (Tángá Tito 2:14.) Kasi, na makambo mosusu, ekoki kozala mpasi mpenza tótosa etinda yango. Na ndakisa, kanisá likambo oyo: ndeko moko ná mwasi na ye bazali bakristo ya sembo kasi mwana na bango kaka moko ya mobali atiki Yehova. Lokola aponi “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu” mpe abebisi boyokani na ye na Yehova mpe baboti na ye oyo babangaka Nzambe, elenge mobali yango abimisami na lisangá.—Ebr. 11:25.
13 Baboti na ye bayoki mpasi mingi! Bayebi ete Biblia elobi: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.” (1 Ko. 5:11, 13) Bayebi mpe ete maloba “moto nyonso” esangisi mpe bandeko ya libota oyo tofandi na bango ndako moko te. Kasi lokola balingi mwana na bango mingi, bakoki kokanisa boye: ‘Ndenge nini tokosalisa mwana na biso azongela Yehova soki totiki mpenza kosolola na ye? Tokosalisa ye mingi nde soki tozali kosolola mingi na ye, boye te?’b
14, 15. Baboti oyo mwana na bango abimisami na lisangá basengeli mpenza kozwa ekateli nini?
14 Tomitye na esika ya baboti yango. Mwana na bango asengelaki kopona likambo moko, mpe aponi nde kozala na bomoi oyo eyokani te bokristo na esika ya kokoba kozala na boyokani malamu na baboti na ye mpe bandeko mosusu ya lisangá. Mpe baboti bazalaki na likambo ya koloba te. Yango wana bazali na mpasi mpenza!
15 Kasi, baboti yango bakosala nini? Bakotosa etinda yango oyo Yehova apesi polelepolele? To bakomona nde ete bakoki kosolola mbala na mbala na mwana na bango mpe koloba ete masolo yango ezali “makambo ya ntina mpenza mpo na libota”? Ntango bazali kozwa ekateli na likambo yango, basengeli kobosana te kokanisa ndenge oyo Yehova azali koyoka mpo na likambo oyo bazali kosala. Alingaka nde kobatela ebongiseli na ye pɛto, mpe soki likoki ezali, kosalisa basali-mabe bázongela makanisi ya malamu. Ndenge nini baboti bakristo bakoki komonisa ete bazali na mposa moko na oyo ya Yehova?
16, 17. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Arona?
16 Arona, ndeko ya Moize, akutanaki na mokakatano na ntina etali bana na ye mibale ya mibali. Kanisá ndenge ayokaki ntango bana na ye, Nadabe mpe Abihu bapesaki Yehova mɔtɔ oyo endimami na mibeko te mpe Yehova abomaki bango. Ya solo, liwa yango ekataki boyokani nyonso oyo mibali yango bakokaki kozala na baboti na bango. Kasi, esukaki wana te. Yehova apesaki Arona ná bana oyo batikalaki sembo etinda oyo: “Bómeka kobebisa nsuki ya mitó na bino te, mpe bosengeli te kopasola bilamba na bino [na kolela], mpo bókufa te mpe mpo [Yehova] asilikela liyangani mobimba te.” (Lev. 10:1-6) Liteya oyo tokoki kozwa ezali polele. Bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kozala makasi koleka bolingo na biso mpo na bandeko ya libota na biso oyo batikali sembo te.
17 Lelo oyo, Yehova abomaka mbala moko te bato oyo babuki mibeko na ye. Amoniselaka bango bolingo mpe apesaka bango libaku ya kobongola motema. Kasi, Yehova akoyoka ndenge nini soki baboti ya moto oyo abongoli motema te bazali kaka komeka Ye na ndenge bazali kosolola mpambampamba na mwana na bango oyo abimisami na lisangá?
18, 19. Mapamboli nini bato ya libota bakoki kozwa soki batosi mibeko ya Yehova oyo etali kobimisa moto na lisangá?
18 Bato mingi oyo babimisaki na lisangá balobaka ete bazongá na lisangá mpo baninga mpe bandeko ya libota na bango batikalaki sembo epai ya Yehova mpe baboyaki kosolola na bango. Ntango basɛngaki ete mwana mwasi moko azongisama na lisangá, bankulutu bakomaki ete ntina mosusu oyo etindaki elenge mwasi yango apɛtola bomoi na ye ezali mpo “ndeko na ye ya mosuni atosaki likambo etali kobimisa moto na lisangá.” Mwana mwasi yango alobaki ete lokola ndeko na ye ya mobali akangamaki na mitinda ya Biblia, esalisaki ye alinga kozonga.
19 Tóloba nini? Tosengeli kobundisa mposa ya kotɛmɛla toli ya Biblia, oyo eutaka na motema na biso ya kozanga kokoka. Tosengeli kondima na motema mobimba ete makambo oyo Yehova asɛngaka biso tósala ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso.
“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi”
20. Wapi ndenge mibale oyo Baebre 4:12 ekoki kolimbolama? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
20 Ntango Paulo akomaki ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi,” azalaki kolobela mpenzampenza Biblia te.c Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emoni ete azalaki kolobela nde liloba ya elaka oyo Nzambe apesaki. Paulo azalaki koloba ete Nzambe apesaka elaka te mpe na nsima abosani yango. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova amonisaki likambo yango boye: “Liloba [na ngai] . . . ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te kasi . . . ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.” (Yis. 55:11) Na yango, tosengeli kozala motema likoló te soki makambo ezali kokende mbangumbangu te ndenge tolingi. Yehova “azali kokoba kosala” mpo na kokokisa mpenza mokano na ye.—Yoa. 5:17.
21. Ndenge nini Baebre 4:12 ekoki kolendisa bandeko mingi oyo banuni kasi bazali kosalela Yehova na bosembo?
21 Bandeko mingi kati na “ebele mpenza ya bato” basaleli Yehova na bosembo banda bambula mingi. (Em. 7:9) Mingi bakanisaki te ete bakonuna na ebongiseli ya makambo oyo. Atako bongo, balɛmbi nzoto te mpo na likambo yango. (Nz. 92:14) Bayebi ete liloba ya elaka oyo Yehova apesaki ezali na bomoi, mpe ete Yehova azali kosala mpo ekokisama. Lokola mokano ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na ye, tosepelisaka motema na ye soki tozali kotya mokano yango na esika ya liboso na makanisi na biso. Na boumeli ya mokolo oyo ya nsambo, Yehova azali kopema mpo ayebi ete eloko moko te ekopekisa mokano na ye ekokisama, mpe ete etuluku ya basaleli na ye bakokoba kosala na boyokani na mokano yango. Bongo yo? Okɔtá na kopema ya Nzambe?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bakonzi mingi ya Lingomba ya Bayuda bazalaki kotosa likambo mokomoko ya Mibeko ya Moize, kasi ntango Yesu ayaki na mabele, baboyaki kondima ete ye nde Masiya. Bakendaki nzela moko na mokano ya Nzambe te.
c Lelo, Nzambe alobaka na biso na nzela ya Biblia, oyo ezali na nguya ya kobongola bomoi na biso. Na yango, maloba ya Paulo oyo ezali na Baebre 4:12 etali mpe Biblia.
Bóbosana ntina na yango te
• Tosengeli kosala nini mpo tókɔta na kopema ya Nzambe lelo?
• Boyokani nini ezali kati na mokano ya Nzambe mpe kondima kotosa batoli ya Biblia?
• Na makambo nini ekoki kozala mpasi kolanda malako ya Biblia, kasi mpo na nini ezali na ntina tótosa yango?
• Wapi ndenge mibale oyo Baebre 4:12 ekoki kolimbolama?
[Elilingi na lokasa 31]
Baboti bayoki mpasi mingi!