Nani asengeli koteya bana makambo ya Nzambe?
“Mwana-kelasi aleki moteyi na ye te, kasi moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.”—LUKA 6:40.
BABOTI mosusu bamonaka ete bakoki te koteya bana na bango makambo ya Nzambe. Bakoki kokanisa ete bateyamá mpenza te to bayebi mpenza te makambo ya Nzambe mpo bázala balakisi malamu. Yango ekoki kotinda bango bátikela ndeko to mokambi moko ya lingomba mokumba wana ya ntina mingi.
Kasi, nani mpenza abongi koteya bana makambo ya Nzambe mpe bizaleli malamu? Talá oyo Biblia elobi na likambo yango, mpe kokanisá yango na oyo bato ya mayele bamoni.
Tata azali na mokumba nini?
Oyo Biblia eteyaka: “Batata, bóyokisaka bana na bino kanda té, kasi bóbokola bango na mateya pe batoli ya Nkolo.”—Ba-efezien 6:4, “Bible na lingala ya lelo oyo.”
Oyo bato ya mayele bamoni: Matomba nini batata bazwaka soki bango moko bazali na kondima makasi? Lisolo moko (Fathers’ Religious Involvement and Early Childhood Behavior) oyo ebimaki na buku moko na 2009, elobaki boye: “Komipesa na makambo ya lingomba ekoki kosalisa mibali bakóma batata ya malamu. Lingomba esungaka mpe ebatelaka bato, epesaka mateya mpe toli na ndenge oyo moto asengeli kotambwisa bomoi na ye.”
Biblia emonisi ete tata azali na mokumba monene na likambo etali kobɔkɔla mpe koteya bana. (Masese 4:1; Bakolose 3:21; Baebre 12:9) Kasi, toli yango ezali na ntina lelo oyo? Na 2009, lisolo moko oyo elobelaki bokonzi oyo batata bazalaka na yango epai ya bana ebimaki na mokanda moko ya Iniversite ya Floride. Bato oyo basalaki bolukiluki yango bamoni ete bana oyo batata na bango bamipesaki mpenza mpo na kobɔkɔla bango, bazalaki na mokakatano mpenza te ya komitya na esika ya basusu mpe bazalaki komona ete bazali na valɛrɛ na miso ya bato. Bana mibali bazalaki na bizaleli ya mabe te, mpe oyo ya basi bazalaki na makanisi ya malamu. Ya solo, toli ya Biblia ezali kaka na ntina tii lelo oyo.
Mokumba ya mama ezali nini?
Oyo Biblia eteyaka: “Kotika mobeko ya mama na yo te.”—Masese 1:8.
Oyo bato ya mayele bamoni: Na 2006, buku moko (Handbook of Child Psychology) elobaki boye: “Bamama balekisaka ntango mingi koleka batata na kosolola na mokomoko ya bana na bango ya mike, mpe ezali bongo na mikili ndenge na ndenge.” Lokola bamama balekisaka ntango mingi ná bana, maloba, misala, mpe bizaleli na bango emonanaka na ndenge oyo mwana azali kokola.
Ntango tata ná mama bazali kopesana mabɔkɔ mpo na koteya bana makambo ya Nzambe, bazali kosalisa bango na ndenge mibale ya ntina mingi. Ya liboso, bana bazwaka libaku ya kokóma baninga ya Nzambe, boninga oyo ekoki komemela bango litomba bomoi na bango mobimba. Ya mibale, bana bamonaka ndakisa oyo eteyaka bango ndenge mwasi ná mobali basengeli kosala elongo mpo bákokisa mikano ya ntina. (Bakolose 3:18-20) Atako bato mosusu bakoki kopesa baboti mabɔkɔ, bango moko nde bazali libosoliboso na mokumba ya koteya bana makambo ya Nzambe mpe ndenge oyo Nzambe alingi mabota ezala.
Kasi, ndenge nini baboti basengeli koteya bana? Mayele nini ekoki kosimba mpenza?