Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna elandi:
• Makambo nini misato ekoki kosalisa biso tólonga mposa ya kosala makambo oyo ezangi bosembo?
Yango oyo: (1) Koyekola kobanga Nzambe na ndenge ya malamu. (1 Pe. 3:12) (2) Kozala na lisosoli oyo eteyami na Biblia. (3) Koyeba kosepela na oyo tozali na yango.—15/4, nkasa 6-7.
• Ndenge nini toyebi ete koboya kozwa makambo na lisɛki na mosala ya Nzambe elimboli te kozala ntango nyonso elongi ya kokangama to koboya kominanola?
Tokoki kozwa ndakisa ya Yesu. Azalaki kominanola mpe kolya elongo na basusu. Toyebi ete azalaki ntango nyonso elongi ya kokangama te. Bato nyonso, ata mpe bana, bazalaki kobanga te kopusana penepene na ye.—15/4, lokasa 10.
• Mwasi ná mobali bakoki kosala nini soki bolingo na bango na libala ekiti nsima ya kobota bana?
Basengeli kozongisa bolingo na bango. Mobali akoki kosala milende mpenza mpo na kosilisa mokakatano nyonso oyo mwasi na ye akoki kozala na yango. Mpe bango nyonso mibale basengeli kosolola malamu mpo na bamposa ya makanisi mpe ya nzoto ya mokomoko na bango.—1/5, nkasa 12-13.
• Nzete ya olive oyo Baroma mokapo 11 elobeli ezalaki elilingi ya nini?
Nzete ya olive elakisi eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama, Yisraele ya elimo. Yehova azali lokola mosisa mpe Yesu azali lokola mobimbi ya nzete yango ya olive. Ntango Bayuda mingi ya mosuni baboyaki Yesu, bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo babakamaki na nzete yango, na ndenge yango bakokisaki motángo mobimba ya eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama.—15/5, nkasa 22-25.
• Nsango malamu nini ya ntina mingi tokoki koyebisa babola?
Nsango malamu oyo: Nzambe atyaki Yesu azala Mokonzi. Azali mokonzi oyo abongi mpo na kosilisa bobola. Mpo na nini? Mpamba te akoyangela bato nyonso mpe azali na nguya ya kosala yango; amoniselaka babola motema mawa; mpe akoki kosilisa eloko oyo ebimisaka bobola, ezaleli ya moimi oyo tozwá.—1/6, lokasa 7.
• Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki Kaifa ete: “Yo moko olobi yango”?—Mat. 26:63, 64.
Emonani ete elobeli “yo moko olobi yango” ezalaki lolenge moko ya kondima ya Bayuda, oyo emonisaki ete likambo ezali solo. Nganga-nzambe monene Kaifa atunaki soki Yesu azali Masiya, Mwana ya Nzambe. Eyano ya Yesu ete: “Yo moko olobi yango” emonisaki ete andimi maloba wana.—1/6, lokasa 18.
• Bana ya kokoka oyo Yesu akokaki kobota balingaki kozala na kati ya lisiko?
Te. Atako Yesu akokaki kozwa bamiliare ya bakitani ya kokoka, bakitani yango bakokaki kozala na kati ya lisiko te. Kaka bomoi ya kokoka ya Yesu nde ekokani na oyo ya Adama. (1 Tim. 2:6)—15/6, lokasa 13.
• Ndenge nini bakristo bakoki komonisa ete bandimaka likebisi oyo ezali na Misala 20:29, 30 mpo na bateyi ya lokuta?
Bayambaka bateyi ya lokuta na bandako na bango te mpe bapesaka bango mbote te. (Rom. 16:17; 2 Yoa. 9-11) Bakristo baboyaka mikanda ya bapɛngwi, kolanda baemisyo na bango na televizyo, mpe basite ya Internet oyo ezali na mateya na bango.—15/7, nkasa 15-16.
• Nani asengeli koteya bana makambo ya Nzambe?
Na kolanda batoli ya Biblia, tata ná mama basengeli kopesana mabɔkɔ mpo na kosala yango. (Mas. 1:8; Ef. 6:4) Bolukiluki emonisi ete ntango baboti nyonso mibale bazali koteya bana, ezalaka malamu mingi mpo na bana.—1/8, nkasa 6-7.