Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/9 nk. 11-13
  • Biloko ya kolya na mokili ya ndaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko ya kolya na mokili ya ndaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • “Mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Tokolya nini?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Basanza na “mokili malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bosepela! Bibombelo bitondi na mafuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/9 nk. 11-13

Biloko ya kolya na Mokili ya Ndaka

BIBLIA elobelaka Yisraele lokola mokili ya bangomba mpe mabwaku, ya mabele patatalu mpe ya mwa bangomba, ya bibale mpe maziba. Lokola mokili yango ezalaki ndenge wana mpe esobe ezalaki na sudi mpe bangomba oyo ezali na nɛjɛ na nsɔngɛ na yango na nɔrdi, bazalaki kolona biloko ndenge na ndenge. Ntango Moize ayebisaki Bayisraele ndenge ‘mokili ya malamu mingi’ epai bazalaki kokende ezali, alobaki ete ezali “mokili moko ya blé mpe ya ɔrje mpe ya banzete ya vinyo mpe ya bafigi mpe ya bagrenade, mokili moko ya mbuma ya olive oyo etondi na mafuta mpe ya mafuta ya nzoi.” Moize atángaki biloko nsambo ya kolya oyo ezalaki na mokili yango.​—Kolimbola Mibeko 8:7, 8.

Mbongo ya bibende mpe batɛmbrɛ ya posita oyo basalelaki na mokili yango na bileko ndenge na ndenge ezalaki ntango mosusu na bililingi ya biloko yango mpo na kolakisa ete biloko ebotaka malamu. Ndenge nini bazalaki kolona biloko yango na ntango ya kala? Ndenge nini bato bazalaki kosalela biloko yango? Tótalela yango.

‘Blé mpe ɔrje’ Atako bazalaki kolona blé mpe ɔrje na eleko ya ɔtɔne, ɔrje ezalaki kokɔmɛla sanza moko liboso blé ekɔmɛla. Na sanza ya Marsi to Aprili, bazalaki komema liboke moko ya matiti ya mbuma ya liboso ya ɔrje na tempelo lokola likabo ya kopesa Yehova na Fɛti ya mampa ezangi levire. Bongo, na sanza ya Mai, bazalaki kopesa likabo ya mampa oyo basali na farini ya blé, na Fɛti ya Bapɔsɔ, to Pantekote.​—Balevi 23:10, 11, 15-17.

Banda kala mpenza tii na bambula euti koleka, basali-bilanga na Yisraele bazalaki kolona mbuma na mabɔkɔ; moloni azalaki kotya yango na libenga ya elamba mpe azalaki kozwa ndambo na lobɔkɔ mpe kobwaka na elanga. Ezalaki kosɛnga te kokunda mbuma ya ɔrje; nzokande, esengelaki kokunda mwa moke mbuma ya blé. Mpo na yango, bazalaki kolekisa banyama oyo ebendaka bitimweli to mpe bazalaki kobalola lisusu mabele.

Na bisika mingi Biblia elobeli kolona, kobuka, kotutatuta, kopupola, mpe konika mbuma. Nyonso wana ezalaki kosɛnga mosala makasi. Mokolo na mokolo, na bandako, bazalaki konika mbuma mpo na kosala farini mpe na nsima, kosala mampa mpo na libota. Yango ezali kosalisa biso tókanga ntina ya liteya ya Yesu ete tóbondelaka mpo na kosɛnga “limpa na biso ya mokolo na mokolo.” (Matai 6:11, Louis Segond) Limpa oyo basali na farini ya blé to ya ɔrje ezalaki bilei oyo bato bazalaki kolya mingi na ntango ya kala.​—Yisaya 55:10.

‘Vinyo mpe bafigi mpe bagrenade’ Nsima ya kotambwisa Bayisraele na esobe mbula 40, Moize apesaki bango elikya moko kitoko mpenza: kolya mbuma ya Mokili ya Ndaka. Mbula ntuku minei liboso, bato oyo batindaki bákende kotala Mokili ya Ndaka bamemelaki Bayisraele oyo bazalaki na esobe biloko nini mpo na kolakisa bango ete mbuma ebotaka mingi na mokili yango? “Etape ya etuka moko ya mbuma ya vinyo” oyo ezalaki kilo mpenza; kutu, esɛngaki ‘mibali mibale bámema yango na nzete.’ Bamemaki mpe bafigi ná bagrenade. Bayisraele oyo balekisaki ebele ya bambula na esobe balyaki mbuma ya elɛngi! Yango elakisaki bango kaka mwa moke biloko kitoko oyo balingaki kobanda kolya mosika te!​—Mitángo 13:20, 23.

Mpo nzete ya vinyo ebotaka mingi esɛngaka mosala ntango nyonso: kokata bitape, kosala baterase ya mai, mpe kobuka mbuma na yango. Elanga ya vinyo oyo ebatelami malamu ezalaki na efelo zingazinga na yango, baterase ya mai, mpe mwa ndako ya matiti mpo na mokɛngɛli. Bayisraele bayebaki malamu mosala oyo esengeli kosalema na elanga ya vinyo mpe bayebaki ndenge oyo elanga ekokóma soki bazali kosala misala yango te.​—Yisaya 5:1-7.

Kosala masanga ya vinyo ezalaki kobanda na eleko ya kobuka mbuma ya vinyo. Bazalaki kotya bituka ya vinyo na tɔnɔ to kokamola yango na ekamweli ya vinyo. Bazalaki kotɔkisa mai yango mpo esila sukali to mpe bazalaki kofandisa yango mikolo mingi tii ekokóma vinyo. Mokili ya Yisraele ezalaki na makambo nyonso oyo ebongi mpo vinyo ekola malamu mpe básala na yango masanga.a

Ekoki kozala ete bato oyo bafandi na mikili oyo balonaka figi te bamonaka kaka figi oyo ekauká to oyo bafiná. Figi oyo babuki sika na nzete ezalaka ndenge mosusu mpenza, ezalaka elɛngi mpe na mai mingi. Mpo na kobatela mbuma ya figi ntango molai nsima ya kobuka yango, bakaukisaka yango na moi mpe batyaka yango na manzanza. Na bisika mingi Biblia elobeli ‘gato ya figi oyo bafinafiná.’​—1 Samwele 25:18.

Soki moto apasoli mposo ya grenade oyo etɛlá, akomona ebele ya mbuma mikemike oyo ekangamá esika moko; akoki kolya yango to kokamola mai na yango. Mai yango ezalaka kitoko mpe elɛngi. Mpo na komonisa ete bato bazalaki kosepela na grenade, batyaki biloko oyo ezalaki lokola mbuma ya grenade na ndelo ya elamba moko ya nganga-nzambe monene mpe na makonzí ya tempelo ya Salomo.​—Kobima 39:24; 1 Bakonzi 7:20.

‘Olive mpe mafuta ya nzoi’ Biblia elobeli nzete mpe mbuma ya olive, oyo bazalaki kolya to mpe kosala na yango mafuta na bisika pene na 60. Tii lelo oyo, bilanga ya olive ezali na bisika mingi ya ekólo Israël. (Kolimbola Mibeko 28:40) Ata lelo oyo, na bamboka ya Israël, na mabota mingi bato nyonso basanganaka mpo na kobuka mbuma ya olive na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Baningisaka bitape ya nzete mpo mbuma ya olive ekwea na nse mpe na nsima balɔkɔtaka yango. Libota na libota ebombaka mbuma ya olive oyo bakoki kolya na boumeli ya mbula to mpe bamemaka yango na ekamweli ya mboka mpo na kosala mafuta. Kutu, bato oyo balukaka biloko ya kala bamonaki bankama ya bikamweli ya ndenge na ndenge. Lelo oyo, ezalaka esengo kotala ndenge oyo bazali kotya mafuta ya olive na babidɔ oyo libota ekosalela mbula mobimba to mpe kotɛka mpo na kozwa mbongo. Bazalaki mpe kosalela mafuta ya olive mpo na kopakola na nzoto mpe mpo na kotya na miinda.

Mafuta ya nzoi oyo Moize alobelaki ekoki kozala mafuta oyo nzoi mpenza esalaka to mpe mafuta oyo bazwaka na mbuma ya date mpe mbuma ya vinyo. Tii lelo basalelaka mafuta oyo bazwaka na bambuma yango mpo na kotya yango na bilei mosusu mpo ekóma sukali. Kasi, mafuta ya nzoi oyo balobeli na lisolo ya Samsone mpe ya Yonatane ezalaki mpenza oyo nzoi esalaka. (Basambisi 14:8, 9; 1 Samwele 14:27) Esika ya kobɔkɔla banzoi oyo ezali na bandako ya nzoi koleka 30, oyo bauti komona na Tel Rehov, na nɔrdi ya Israël, emonisi ete bato bazalaki kobɔkɔla banzoi na mokili yango ata na ntango ya Salomo.

Lelo oyo, moto nyonso oyo azwi libaku ya kotambola na zando moko na Israël, epai akomona bisika oyo bazali kotɛkisa mampa mpe mbuma mpe ndunda ndenge na ndenge, akomona ebele ya biloko ya kolya oyo tolobeli na lisolo oyo. Kasi, biloko yango ezali kaka mwa ndambo ya biloko ya kolya oyo balonaka na mokili yango. Mayele ya sika ya kosala bilanga ezali kosalisa mpo na kolona ata biloko oyo ekolaka na mikili mosusu. Nyonso wana ezali kolakisa ete mokili wana moke ebongi mpenza kobengama “mokili moko ya malamu mingi.”​—Mitángo 14:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bazalaki mpe kokaukisa mbuma ya vinyo.​—2 Samwele 6:19.

[Elilingi na lokasa 11]

Blé

[Elilingi na lokasa 11]

Ɔrje

[Elilingi na lokasa 12]

Vinyo

[Elilingi na nkasa 12, 13]

Figi

[Elilingi na lokasa 12]

Grenade

[Elilingi na lokasa 13]

Olive

[Elilingi na lokasa 13]

Mafuta ya nzoi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto