Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?—Eteni 2
Makambo oyo bitanda ya mabele emonisi mpenza
Oyo ezali lisolo ya mibale mpe ya nsuka kati na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli mituna oyo etali dati oyo Yerusaleme ebebisamaki. Masolo yango mibale epesi biyano oyo batángi mingi bamitunaka; biyano yango euti na bolukiluki mozindo mpe na Biblia.
Eteni 1 emonisaki makambo oyo:
▪ Bato ya mayele na istware balobaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B.a
▪ Badati ya Biblia emonisi ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B.
▪ Bato ya mayele na istware bazwaki dati yango na kolanda mikanda ya bato oyo bakomaki masolo ya kala mpe canon de Ptolémée.
▪ Makomi mosusu ya bato oyo bakomaki makambo ya kala ezali na mabunga mingi mpe makambo mingi eyokani te na makambo oyo ezali na bitanda ya mabele.b
BIBLIA emonisi ete Bayuda oyo bakangamaki basengelaki kokende na boombo na Babilone “mpo na kokokisa liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia . . . mpo na kokokisa mbula ntuku nsambo (70).” Ntango nini balongwaki na boombo? Na “mbula ya liboso [ya boyangeli] ya Siruse mokonzi ya Perse.” (2 Ntango 36:21, 22) Biblia mpe mikanda mosusu oyo elobeli masolo ya kala emonisi ete boombo na Babilone esukaki ntango Siruse alongaki Babilone mpe apesaki Bayuda nzela ya kozonga na Yerusaleme na mobu 537 L.T.B. Lokola Biblia elobi polele ete boombo yango eumelaki mbula 70, yango emonisi ete esengelaki kobanda na mobu 607 L.T.B.
Nzokande, bato mingi ya mayele balobaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B. Yango elingi koloba ete boombo eumelaki kaka mbula 50. Mpo na nini balobaka bongo? Bazwaki dati yango na kolanda bitanda ya makomi ya cunéiforme oyo elobeli makambo ya Nebukadenezare II ná bakonzi oyo bayangelaki nsima na ye.1 Bitanda yango mingi ekomamaki na bato oyo bazalaki na bomoi na eleko oyo Yerusaleme ebebisamaki to pene na eleko yango. Kasi, bakalkile oyo esalemi mpo na komonisa ete ezalaki nde mobu 587 L.T.B., ebongi mpenza? Bitanda yango emonisi mpenza nini?
Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela lolenge misato ya bitanda oyo bato ya mayele batalelaka: (1) Bitanda ya masolo ya kala ya bato ya Babilone, (2) bitanda ya makambo ya mombongo, mpe (3) bitanda ya makambo ya astronomi.
● Bitanda ya masolo ya kala ya bato ya Babilone.
Ezali nini? Ezali bitanda oyo elobeli makambo minene oyo esalemaká na Babilone.2
Bato ya mayele balobi nini? Ronald Sack, moto moko ya mayele na makambo etali makomi ya cunéiforme, alobi ete bitanda yango elobeli kaka ndambo ya makambo minene oyo esalemaká na Babilone.c Akomi ete bato ya mayele ya istware basengeli kolukaluka na “biloko mosusu . . . mpo báyeba mpenza makambo oyo esalemaki.”
Makomi yango emonisi nini? Emonisi ete makambo mingi ezangi na bitanda oyo elobeli masolo ya kala ya Babilone.3 (Talá etanda oyo ezali awa na nse.) Na yango, tokoki komituna boye: Bakalkile oyo esalemi na kolanda bitanda wana oyo ezangi makambo mosusu, ebongi mpenza kotyelama motema?
● Bitanda ya makambo ya mombongo.
Ezali nini? Bitanda mingi ya makambo ya mombongo ya Babilone ya kala ezalaki nde bafaktire. Na bitanda yango, badati ekomamaki na kolanda mokolo, sanza mpe mbula ya boyangeli ya mokonzi oyo azalaki na ntango wana. Na ndakisa, etanda moko emonisi ete moto moko asombaki eloko na sanza ya “Nisana, mokolo ya 27, na mbula ya 11 ya Nebukadrezare [oyo abengami mpe Nebukadenezare II], mokonzi ya Babilone.”4
Soki mokonzi moko akufi to alongwe mpe moto mosusu azwi bokonzi, basanza oyo etikali na mbula yango ezalaki kotángama lokola mbula oyo mokonzi ya sika abandi koyangela.d5 Na maloba mosusu, na manaka ya bato ya Babilone, ntango oyo mokonzi alongwe na ebonga ezalaki kaka mbula moko na oyo mokonzi ya sika azwi ebonga. Na yango, bitanda oyo elobeli mobu oyo mokonzi oyo azali koyangela azwaki bokonzi ekomamaki na basanza oyo ezalaki nsima ya sanza ya nsuka ya mokonzi oyo azalaki liboso.
Bato ya mayele balobi nini? Ronald Sack ayekolaki bitanda mingi ya makambo ya mombongo ya Babilone. Na 1972, Sack akomaki ete makomi ya sika oyo ezali na British Museum, oyo abandaki koyekola “ekweisaki mpenza” makambo oyo elobamaki liboso mpo na nsuka ya boyangeli ya Nebukadenezare II mpe ebandeli ya boyangeli ya mwana na ye Amel-Marduk (oyo ayebani mpe na nkombo Evil-merodach).6 Na ndenge nini? Sack ayebaki ete bitanda emonisaki ete Nebukadenezare II azalaki kaka koyangela na sanza ya motoba ya mbula ya nsuka (mbula ya 43) ya boyangeli na ye. Kasi bitanda oyo autaki koyekola, oyo ekomamaki na mbula oyo Amel-Marduk, mokonzi oyo alandaki abandaki koyangela, ezalaki na badati ya sanza ya minei mpe ya mitano ya mbula oyo elobamaki ete ezali kaka moko wana.7 Emonani polele ete bokeseni ezali na badati yango.
Makomi yango emonisi nini? Makambo mingi oyo elobeli nsuka ya boyangeli ya mokonzi moko mpe ebandeli ya boyangeli ya mokonzi oyo alandaki ye ezali ndenge moko te. Na ndakisa, makomi yango emonisi ete Nebukadenezare II azalaki kaka koyangela na sanza ya zomi—sanza motoba nsima ya ntango oyo elobami ete mokonzi oyo alandaki ye abandaki koyangela.8 Bokeseni ya ndenge wana ezali mpe kati na nsuka ya boyangeli ya Amel-Marduk mpe ebandeli ya boyangeli ya Neriglissar, mokonzi oyo alandaki ye.9
Mpo na nini bokeseni yango ezali likambo moke te? Ndenge tolobaki yango liboso, makambo oyo ezangi na bitanda ya masolo ya kala ya Babilone emonisi ete mbala mosusu makambo elandanaki mpenza te ndenge oyo elobami na bitanda yango.10 Ekoki nde kozala na bakonzi mosusu oyo bayangelaki na katikati ya bakonzi yango? Soki ezali bongo, esengeli kobakisa bambula mosusu na eleko oyo bakonzi ya Babilone bayangelaki. Na yango, ezala bitanda ya masolo ya kala ya Babilone, to mpe bitanda ya makambo ya mombongo ekoki te mpo na komonisa mpenza ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B.e
● Bitanda ya makambo ya astronomi.
Ezali nini? Bitanda ya cunéiforme oyo elobeli bisika oyo moi, sanza mpe minzoto ezalaki komonana, eyebisi mpe makambo mosusu, na ndakisa mokonzi oyo azalaki koyangela na mbula wana mpe mbula boni asilaki kolekisa. Na ndakisa, etanda ya astronomi oyo ezali awa na nse, oyo elobeli eklipse ya sanza oyo esalemaki na sanza ya liboso ya mbula ya liboso ya boyangeli ya Mokonzi Mukin-zeri.11
Bato ya mayele balobi nini? Bandimaka ete bato ya Babilone basalaki batablo mpe bakolisaki mayele ya koyebisa liboso ntango oyo eklipse ekosalema.12
Kasi, bato ya Babilone bakokaki kosala bakalkile mpo na koyeba ntango oyo baeklipse esalemaká na bambula eleká? Profesɛrɛ John Steele alobi ete “ekoki kozala ete badati mosusu oyo bapesaki, bazwaki yango na bakalkile oyo basalaki ntango bakomaki bitanda yango.”13 Profesɛrɛ David Brown, oyo amoni ete batablo ya astronomi ezalaki mpe na makambo oyo elobamaki mwa ntango moke liboso bákoma bitanda yango, alobi ete mosusu kati na yango ekoki mpenza kozala “badati oyo bakomeli basalaki bakalkile na yango na siɛklɛ ya 4 T.B. mpe na basiɛklɛ oyo elandaki.”14 Soki ezali bongo, ebongi mpenza kotyela badati yango motema ata soki ezali na elembeteli mosusu te oyo endimisi yango?
Ata soki eklipse moko esalemaki na dati moko boye, yango elingi nde koloba ete makambo oyo moto akomaki na etanda esalemaki mpenza na dati wana? Ezalaka ntango nyonso bongo te. Robartus van der Spek, moto moko ya mayele, alobi boye: “Bato oyo bazalaki kokoma bitanda yango bazalaki banganga-minzoto, kasi bato ya istware te.” Amonisi ete bisika oyo bitanda yango elobeli masolo ya kala “elobeli yango likolólikoló,” mpe akebisi ete esengeli “mpenza kotyela yango motema te.”15
Bitanda yango emonisi nini? Tózwa ndakisa ya etanda VAT 4956. Na molɔngɔ ya liboso ya etanda yango tozali kotánga boye: “Mobu 37 ya Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone.”16 Na nsima, elobeli na molai bisika oyo sanza mpe baplanɛti ezalaki komonana na kotalela minzoto ndenge na ndenge mpe maboke ya minzoto. Elobeli mpe eklipse moko ya sanza. Bato ya mayele balobi ete makambo yango nyonso esalemaki kati na mobu 568 mpe 567 L.T.B.; soki ezali bongo, tokoloba ete mbula ya 18 ya boyangeli ya Nebukadenezare II, ntango abebisaki Yerusaleme, ezalaki na mobu 587 L.T.B. Kasi, makomi yango ya astronomi emonisi mpenza ete makambo yango esalemaki kaka kati na mobu 568 mpe 567 L.T.B?
Etanda yango elobeli eklipse oyo, nsima ya kosala bakalkile na bango bamonaki ete esalemaki na mokolo ya 15 ya sanza Simanu, sanza ya misato na manaka ya bato ya Babilone. Ezali solo ete eklipse moko ya sanza esalemaki na sanza Simanu na mobu 568 L.T.B.; ezalaki mokolo ya 4 Yuli soki totye yango na manaka na biso. Nzokande, eklipse moko mpe esalemaki mbula 20 liboso, na mokolo ya 15 Yuli mobu 588 L.T.B.17
Soki mobu 588 L.T.B. ezalaki mbula ya 37 ya boyangeli ya Nebukadenezare II, boye mbula ya 18 ya boyangeli na ye esengeli kozala mobu 607 L.T.B.—mbula mpenza oyo badati ya Biblia emonisi ete Yerusaleme ebebisamaki! (Talá badati oyo ezali awa na nse.) Kasi, etanda VAT 4956 ezali na bilembeteli mosusu oyo endimisi mobu 607 L.T.B.?
Longola eklipse oyo touti kolobela, etanda yango elobeli mbala 13 bisika oyo sanza emonanaki mpe mbala 15 bisika oyo baplanɛti mosusu emonanaki. Yango emonisi bisika oyo sanza to baplanɛti emonanaki na kotalela minzoto mpe maboke ya minzoto.18 Elobeli mpe mbala 8 ntango oyo ekabolaki kobima mpe kolala ya moi mpe kobima mpe kolala ya sanza.18a
Lokola bisika oyo sanza emonanaki nde esalisaka mpenza mpo na koyeba badati na bosikisiki, bato ya mayele bayekolaki malamumalamu mbala 13 oyo etanda VAT 4956 elobeli bisika oyo sanza emonanaki. Mpo na yango, basalelaki programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo esalisaka mpo na koyeba bisika oyo sanza to planɛti mosusu ezalaká na dati songolo.19 Boyekoli yango emonisaki nini? Atako kaka mwa ndambo ya bisika eyokani na mobu 568 tii mobu 567 L.T.B., bisika nyonso 13 eyokani na kalkile oyo esalemi mpo na mbula 20 liboso, elingi koloba mpo na mobu 588 tii mobu 587 L.T.B.
Moko na bisika oyo elobeli ndenge sanza emonanaki, oyo ebongi mpenza na dati ya mobu 588 L.T.B. koleka dati ya mobu 568 L.T.B., elakisami na etanda oyo ezali na nkasa oyo. Na molɔngɔ ya misato ya etanda yango, bakomi ete sanza ezalaki na esika moko boye na “butu ya 9 [Nisanu].” Nzokande, bato ya mayele oyo liboso balobaki ete likambo yango esalemaki na mobu 568 L.T.B. (mpo na bato ya astronomi mobu -567), bandimaki ete na mobu 568 L.T.B, sanza ezalaki na esika wana na mokolo ya “8 Nisanu, kasi mokolo ya 9 Nisanu te.” Mpo na kondimisa ete ezalaki na mobu 568 L.T.B., bamonisaki ete moto oyo akomaki etanda yango asalaki libunga na ndenge akomaki “9” na esika akoma “8.”20 Kasi, molɔngɔ ya misato ya etanda yango emonisi ete ndenge oyo sanza emonanaki eyokani mpenza na mokolo ya 9 Nisanu ya mobu 588 L.T.B.21
Emonani polele ete makambo oyo ezali na etanda VAT 4956 emonisi ete mobu 588 L.T.B. ezali mbula ya 37 ya boyangeli ya Nebukadenezare II. Na bongo, endimisi ete mobu 60 L.T.B. ezali mobu oyo Yerusaleme ebebisamaki, ndenge kaka Biblia emonisi yango.
Mpo na nini kotyela Biblia motema?
Lelo oyo, bato mingi ya mayele na istware bandimaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B. Nzokande, Yirimia mpe Danyele, oyo bakomaki mpe Biblia, bamonisaki polele ete Bayuda bazalaki na boombo mbula 70, kasi mbula 50 te. (Yirimia 25:1, 2, 11; 29:10; Danyele 9:2) Maloba yango emonisi mpenza ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. Ndenge lisolo oyo emonisi yango, makambo mosusu oyo euti na Biblia te endimisi yango.
Mbala mingi bato ya mayele bandimaka mpenza te ete Biblia elobeli makambo na bosikisiki. Kasi, ntango bilembeteli ya sika emonani, emonanaka mbala na mbala ete Biblia elongaka kaka.f Bato oyo batyelaka Biblia motema, basalaka yango mpamba te. Bazali na bilembeteli oyo endimisi bango ete Biblia elobaka solo ezala na makambo ya istware, ya siansi mpe na bisakweli na yango. Bilembeteli yango etindaka bango bándima ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Tolendisi yo otalela bilembeteli yango yo moko. Yo mpe okomona ete ezali bongo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali na ndenge mingi ya kokoma badati. Na lisolo oyo, L.T.B. elakisi “liboso ya ntango na biso.”
b Talá lisolo “Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?—Ntina na yango, bilembeteli oyo tozali na yango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2011.
c Liyebisi: Moto ya mayele ata moko te oyo lisolo oyo etángi alobaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B.
d Mobu oyo moto azwi bokonzi ezalaki kotángama te na bambula ya boyangeli na ye; ezalaki nde basanza oyo etikalaki na mbula wana liboso akɔta na mbula na ye ya liboso.
e Bitanda ya makambo ya mombongo ezali mpo na bambula nyonso oyo balobaka ete bakonzi ya Babilone bayangelaki. Soki tosangisi bambula oyo bakonzi yango bayangelaki mpe tosali kalkile kobanda na Nabonide, mokonzi ya nsuka oyo ayangelaki Babilone, tokomona ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B. Kasi, mayele yango ekosimba kaka soki mokonzi mokomoko azwaki ebonga kaka na mbula oyo mokonzi oyo azalaki liboso na ye alongwaki, kozanga kolekisa basanza mpo na kobanda kotánga bambula ya boyangeli na ye.
f Mpo na komona bandakisa ya sikisiki, talá mokapo 4 mpe 5 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MASOLO YA KALA YA BABILONE EZANGI MAKAMBO MINGI
Masolo ya kala ya Babilone elobeli makambo oyo elekaki kaka na boumeli ya mbula 35; masolo yango elobaka ete mbula 88 elekaki kobanda na mokonzi ya liboso tii na mokonzi ya nsuka.
MBULA OYO MASOLO YA KALA ELOBELI TE
MBULA OYO MASOLO YA KALA ELOBELI
ETANDA BM 21901
ETANDA BM 21946
ETANDA BM 35382
ELEKO YA BAKONZI YA BABILONE
BAPERSE
Nabopolasare
Nebukadenezare II
Amel-Marduk
Nabonide
Neriglissar
Labashi-Marduk
ETANDA BM 25127
ETANDA BM 22047
ETANDA BM 25124
[Eutelo ya bafɔtɔ]
BITANDA BM 21901 mpe BM 35382: Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum; ETANDA BM 21946: Copyright British Museum; BITANDA BM 22047, 25124, 25127: © The Trustees of the British Museum
[Etanda/Elilingi na lokasa 24]
ETANDA BM 32238 OYO ELOBELI MAKAMBO YA ASTRONOMI
Etanda oyo ezali na badati oyo baeklipse ya sanza esalemaki, kasi etanda yango ekomamaki nsima ya eklipse ya nsuka, oyo esalemaki mbula soki 400 nsima ya eklipse ya liboso. Lokola mokomi na yango amonaki makambo yango nyonso te, ekoki kozala ete asalaki bakalkile mpo na koyeba ntango nini baeklipse mosusu oyo elekaki liboso esalemaki. Soki ezali na bilembeteli mosusu te oyo ekoki kondimisa makambo oyo akomaki, tokoki mpenza te kotalela badati yango mpo na koyeba ntango oyo makambo esalemaká.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© The Trustees of the British Museum
[Etanda/Bililingi na nkasa 26, 27]
ETANDA VAT 4956 EMONISI MPENZA NINI?
Mpo na nini ebimisi ntembe? Molɔngɔ ya misato ya etanda yango elobi ete na “butu ya mokolo ya 9” na sanza ya liboso (Nisanu/Nisana), “sanza ezalaki na lipeko 1 liboso ya monzoto ß Virginis.” Nzokande, na 1915, Neugebauer ná Weidner bakomaki mpo na mobu 568 L.T.B. (oyo emonisi ete Yerusaleme ebomamaki na mobu 587 L.T.B.) ete ‘sanza ezalaki na lipeko 1 liboso ya monzoto yango na mokolo ya 8 Nisana, kasi te na mokolo ya 9 Nisana.’ Nzokande, bato ya mayele bamonaki ete sanza ezalaki na esika wana mpenza na mobu 588 L.T.B., na mokolo ya 9 Nisana, oyo ememi biso na mobu 607 L.T.B.
Esengeli kozala mokolo ya 9 to ya 8?
(1) Ndenge fɔtɔ oyo emonisi yango, elembo ya monɔkɔ ya Akkadien mpo na motángo 9 ezali komonana polele.
(2) Ntango Neugebauer ná Weidner batyaki makomi yango ya cunéiforme na ekomeli ya monɔkɔ na bango, batyaki “8” na esika ya “9.”
(3) Kaka maloba na nse ya lokasa emonisi ete na makomi ya ebandeli ezalaki nde “9.”
(4) Ata ntango babongolaki makambo yango na monɔkɔ ya Allemand, batyaki “8.”
(5) Na 1988, Sachs ná Hunger babimisaki makomi yango mpe na esika yango batyaki “9.”
(6) Kasi, na libongoli na yango na Lingelesi, bakomaki “mokolo ya 9,” kasi babakisaki mpe ete “ezali libunga, esengelaki kozala mokolo ya 8.”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
bpk/Vorderasiatisches Museum, SMB/Olaf M. Teßmer
[Etanda na lokasa 28]
Bandimbola mpe mikanda mpo na lisolo “Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?—Eteni 2”
1. Cunéiforme ezali ekomeli moko oyo balɛtrɛ na yango ezali nsɔngɛnsɔngɛ. Mokomi azalaki kosalela mwa nzete oyo ezali nsɔngɛ mpo na kokoma bilembo na etanda ya mabele oyo ezali naino maimai.
2. Assyrian and Babylonian Chronicles, ya A. K. Grayson, ebimisamaki na 1975, ebimeli ya 2000, lokasa 8.
3. Eleko ya bakonzi ya Babilone ebandaki na siɛklɛ ya nsambo L.T.B., ntango bakonzi oyo bazalaki Bakaladi bakómaki koyangela Babilone. Mokonzi ya liboso ezalaki Nabopolassar, tata ya Nebukadenezare II. Mokonzi ya nsuka ezalaki Nabonide, oyo Siruse, mokonzi ya Baperse akweisaki na mobu 539 L.T.B.
4. Neo-Babylonian Business and Administrative Documents, ya Ellen Whitley Moore, ebimisamaki na 1935, lokasa 33.
5. Archimedes, Volimi 4, New Studies in the History and Philosophy of Science and Technology, “Observations and Predictions of Eclipse Times by Early Astronomers,” ya John Steele, ebimisamaki na 2000, lokasa 36.
6. Amel-Marduk 562-560 B.C.—A Study Based on Cuneiform, Old Testament, Greek, Latin and Rabbinical Sources. With Plates, ya Ronald Sack, ebimisamaki na 1972, lokasa 3.
7. Etanda BM 80920 mpe etanda BM 58872 ekomamaki na sanza ya minei mpe ya mitano oyo Evil-merodach abandaki koyangela. Sack abimisaki yango na buku Amel-Marduk 562-560 B.C.—A Study Based on Cuneiform, Old Testament, Greek, Latin and Rabbinical Sources. With Plates, nkasa 3, 90, 106.
8. Etanda yango ezali na British Museum (BM 55806) ekomamaki na sanza ya zomi, mbula ya 43.
9. Etanda BM 75106 mpe etanda BM 61325 ekomamaki na sanza ya nsambo mpe ya zomi na mbula ya nsuka (to ya mibale) ya boyangeli ya Evil-merodach. Nzokande, etanda BM 75489 ekomamaki na sanza ya mibale ya boyangeli ya Neriglissar, mokonzi oyo alandaki ye.—Catalogue of the Babylonian Tablets in the British Museum, Volimi VIII, (Tablets From Sippar 3) ya Erle Leichty, J. J. Finkelstein, and C.B.F. Walker, ebimisamaki na 1988, nkasa 25, 35.
Catalogue of the Babylonian Tablets in the British Museum, Volimi VII, (Tablets From Sippar 2) by Erle Leichty and A. K. Grayson, published 1987, lokasa 36.
Neriglissar—King of Babylon, ya Ronald H. Sack, ebimisamaki na 1994, lokasa 232. Sanza oyo ekomami na etanda ezali Ajaru (sanza ya mibale).
10. Tózwa ndakisa ya Neriglissar. Ezali na makomi oyo elobaki na ntina na ye ete azalaki “mwana ya Bêl-shum-ishkun,” “mokonzi ya Babilone.” Makomi mosusu ebengi Bêl-shum-ishkun “moto ya bwanya oyo azalaki mwana ya mokonzi.” Liloba rubû, oyo ebongolami na “mwana ya mokonzi,” ezali titre oyo elimboli mpe “mokonzi, moyangeli.” Lokola bokeseni ezali kati na ebandeli ya boyangeli ya Neriglissar mpe nsuka ya boyangeli ya Amel-Marduk, oyo azalaki liboso na ye, ekoki nde kozala ete Bêl-shum-ishkun, oyo abengami “mokonzi ya Babilone” ayangelaki na eleko moko na kati ya boyangeli ya bakonzi wana mibale? Profesɛrɛ Raymon Dougherty, alobi ete “tosengeli te kobosana bilembeteli oyo elobeli bato ya libota ya Neriglissar oyo bazalaki bakonzi.”—Nabonidus and Belshazzar—A Study of the Closing Events of the Neo-Babylonian Empire, ya Raymond Dougherty, ebimisamaki na 1929, lokasa 61.
11. Astronomical Diaries and Related Texts From Babylonia, Volimi V, ebimisami na Hermann Hunger, ebimisamaki na 2001, nkasa 2-3.
12. Journal of Cuneiform Studies, Volimi 2, No. 4, 1948, “A Classification of the Babylonian Astronomical Tablets of the Seleucid Period,” ya Abraham Sachs, nkasa 282-283.
13. Astronomical Diaries and Related Texts From Babylonia, Volimi V, nkasa 391.
14. Mesopotamian Planetary Astronomy-Astrology, ya David Brown, ebimisamaki na 2000, nkasa 164, 201-202.
15. Bibliotheca Orientalis, L N° 1/2, Januari-Maart, 1993, “The Astronomical Diaries as a Source for Achaemenid and Seleucid History,” ya R. J. van der Spek, nkasa 94, 102.
16. Astronomical Diaries and Related Texts From Babylonia, Volimi I, ya Abraham Sachs, ebongisamaki mpe ebimisamaki na Hermann Hunger, ebimisamaki na 1988, lokasa 47.
17. Babylonian Eclipse Observations From 750 BC to 1 BC, ya Peter Huber ná Salvo De Meis, ebimisamaki na 2004, lokasa 186. Etanda VAT 4956 elobi ete eklipse yango esalemaki na mokolo ya 15 ya sanza ya misato ya manaka ya bato ya Babilone, oyo emonisi ete sanza ya Simanu ebandaki mikolo 15 liboso. Soki eklipse esalemaki mokolo ya 15 Yuli 588 L.T.B. na kolanda manaka na biso, boye mokolo ya liboso ya sanza ya Simanu ezalaki kati na mokolo ya 30 Yuni mpe 1 Yuli 588 L.T.B. Boye, sanza ya liboso ya manaka ya Babilone (Nisanu) ebandisaki mbula ya sika basanza mibale liboso, na mokolo ya 2 mpe 3 na sanza ya Mai. Atako mbula mpenza ya eklipse yango esengelaki kobanda na mokolo ya 3 mpe 4 na sanza ya Aprili, etanda VAT 4956 elobi na molɔngɔ ya 6 ete sanza mosusu (oyo ekɔti na kati) ebakisamaki nsima ya sanza ya zomi na mibale (sanza ya nsuka) (Addaru) ya mbula oyo elekaki. (Etanda elobi boye: “sanza ya 8 XII2.”) Na yango, mbula ya sika ebandaki te tii mokolo ya 2 mpe 3 na sanza ya Mai. Na bongo, dati ya eklipse yango na mobu 588 L.T.B. eyokani mpenza na makambo ezali na etanda yango.
18. Na kolanda Berichte über die Verhandlungen der Königl. Sächsischen Gesellschaft der Wissenschaften zu Leipzig (Lapolo ya masolo ya Royal Saxonian Society of Sciences na Leipzig); Volimi 67; 1 Mai 1915; na lisolo “Ein astronomischer Beobachtungstext aus dem 37. Jahre Nebukadnezars II” (An Astronomical Observer’s Text of the 37th Year Nebuchadnezzar II), ya Paul Neugebauer ná Ernst Weidner, nkasa 67-76, etángi mbala 13 oyo elobeli bisika oyo sanza emonanaki na kotalela monzoto moko to liboke moko ya minzoto. Etángi mpe mbala 15 bisika oyo baplanɛti mosusu emonanaki. (Nkasa 72-76) Atako elembo ya cunéiforme oyo elimboli sanza ezali polele mpenza, bilembo mosusu oyo ezali bankombo ya baplanɛti mpe bisika oyo emonanaki ezali polele te. (Mesopotamian Planetary Astronomy—Astrology, ya David Brown, ebimaki na 2000, nkasa 53-57) Mpo na yango, moto na moto akoki koloba ete baplanɛti ezalaki na bisika boye to boye. Lokola ezali mpasi te koyeba bisika oyo sanza ezalaká na dati songolo, bisika ya baplanɛti mosusu oyo etanda VAT 4956 elobeli mpe bisika oyo ezalaki na kotalela sanza ekoki koyebana mpe kozwa na mwa bosikisiki dati oyo ezalaki na esika boye to boye.
18a. Bileko yango ezali ntango oyo ebandi, na ndakisa, na kolala ya moi tii kolala ya sanza na mokolo ya liboso ya sanza mpe na bileko mosusu mibale kaka na sanza yango. Bato ya mayele bayokanisaki bileko yango na badati ya manaka. (“The Earliest Datable Observation of the Aurora Borealis,” ya F. R. Stephenson ná David Willis, na buku Under One Sky—Astronomy and Mathematics in the Ancient Near East, ebimisami na John Steele mpe Annette Imhausen, na 2002, nkasa 420-428) Mpo bato ya kala báyeba molai ya eleko yango bazalaki kosalela montre moko boye. Molai ya bileko yango ezalaki sikisiki te. (Archimedes, Volume 4, New Studies in the History and Philosophy of Science and Technology, “Observations and Predictions of Eclipse Times by Early Astronomers,” ya John Steele, ebimisami na 2000, nkasa 65-66) Nzokande, koyeba esika oyo sanza ezalaki na kotalela baplanɛti mosusu, ezalaki na bosikisiki mpenza.
19. Boyekoli yango esalemaki na programɛ ya ordinatɛrɛ ebengami TheSky6™. Longola yango, boyekoli ekendaki lisusu mosika na programɛ ya ordinatɛrɛ ebengami Cartes du Ciel/Sky Charts (CDC) mpe programɛ ya kobongola badati oyo bazwaki na U.S. Naval Observatory. Lokola bato ya mayele balimbolaka bilembo ya cunéiforme oyo emonisi bisika ya baplanɛti ndenge moko te, bisika yango esalelamaki te na boyekoli yango mpo na koyeba mbula oyo etanda yango ya badati ya astronomi elobeli.
20. Berichte über die Verhandlungen der Königl. Sächsischen Gesellschaft der Wissenschaften zu Leipzig (Reports Regarding the Discussions of the Royal Saxonian Society of Sciences at Leipzig); Volimi 67; 1 May 1915; “Ein astronomischer Beobachtungstext aus dem 37. Jahre Nebukadnezars II, (-567/66)” (An Astronomical Observer’s Text of the 37th Year Nebuchadnezzar II), ya Paul Neugebauer ná Ernst Weidner, lokasa 41.
21. Etanda VAT 4956 elobi na molɔngɔ ya misato boye: “Sanza ezalaki na lipeko 1 [to degré 2] liboso ya monzoto ß Virginis.” Boyekoli oyo tolobelaki liboso emonisaki ete na mokolo ya 9 Nisanu, sanza ezalaki na 2°04ʹ liboso ya 0° na nse ya monzoto ß Virginis. Emonanaki ete ekokani mpenza.
[Etanda na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
NA KOTALELA ETANDA VAT 4956 YERUSALEME EBEBISAMAKI—NA MOBU 587 L.T.B. TO NA MOBU 607 L.T.B.?
◼ Etanda yango elobeli makambo oyo bato ya astronomi bamonaki na mbula ya 37 ya boyangeli ya Mokonzi Nebukadenezare II.
◼ Nebukadenezare II abebisaki Yerusaleme na mbula ya 18 ya boyangeli na ye.—Yirimia 32:1.
Soki mbula ya 37 ya boyangeli ya Nebukadenezare II ezalaki mobu 568 L.T.B., boye Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B.
610 L.T.B.
600
590
580
570
560
Soki mbula ya 37 ezalaki mobu 588 L.T.B., boye Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., mbula oyo badati ya Biblia emonisi.
◼ Etanda VAT 4956 ezali na bilembeteli ya solosolo oyo emonisi ete ezalaki mobu 607 L.T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]
Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum