Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?—Eteni 1
Ntina na yango; bilembeteli oyo tozali na yango
Oyo ezali lisolo ya liboso kati na masolo mibale oyo elobeli mituna oyo etali dati oyo Yerusaleme ebebisamaki; lisolo mosusu ekobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekolanda. Masolo yango epesi biyano oyo batángi mingi bamitunaka; biyano yango euti na bolukiluki mozindo mpe na Biblia.
“Bato mingi ya mayele na istware mpe na arkeoloji balobaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 586 to 587 L.T.B.a Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete ezalaki na 607 L.T.B.? Ndenge nini bazwaki dati yango?”
MOTÁNGI moko atunaki bongo. Kasi mpo na nini koluka koyeba mbula oyo Mokonzi Nebukadenezare II abebisaki engumba Yerusaleme? Ya liboso, mpo mbula yango ezali na ntina mingi na lisolo ya basaleli ya Nzambe. Moto moko ya mayele na istware alobaki ete yango ememaki “libebi, ɛɛ libebi monene mpenza.” Na mbula yango, tempelo oyo ezalaki esika oyo bazalaki kosambela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso banda mbula koleka 400 ebebisamaki. Mokomi moko ya nzembo alobaki boye: “E Nzambe, . . . babebisi Tempelo ya yo esantu, bakomisi Yeruzalem mopotu monene.”—Nzembo 79:1, Biblia Liloba lya Nzambe.b
Ya mibale, koyeba mbula oyo “libebi monene” ebandaki mpe koyeba ndenge oyo losambo ya solo ezongisamaki na Yerusaleme mpe ekokisaki esakweli moko ya Biblia, ekolendisa kondima na yo na Liloba ya Nzambe. Na yango, mpo na nini Batatoli ya Yehova bapesaka dati oyo ekeseni na mbula 20 na dati oyo mikanda mingi elobelaka? Na mokuse, ezali mpo na bilembeteli oyo Biblia yango moko epesi.
“Mbula ntuku nsambo” mpo na banani?
Bambula mingi liboso Yerusaleme ebebisama, mosakoli Yirimia alobelaki likambo moko oyo ezali kosalisa biso tóyeba bolai ya ntango oyo Biblia elobeli. Akebisaki “bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme,” ete: “Mokili oyo mobimba esengeli kokóma esika oyo ebebisami, eloko ya kokamwa, mpe bato ya bikólo oyo bakosalela mpenza mokonzi ya Babilone mbula ntuku nsambo.” (Yirimia 25:1, 2, 11) Na nsima, Yirimia abakisaki boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ntango mbula ntuku nsambo ekokoka na Babilone nakotyela bino likebi, mpe nakokokisela bino liloba na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo.’” (Yirimia 29:10) “Mbula ntuku nsambo” yango elimboli nini? Ndenge nini eleko yango ezali kosalisa biso tóyeba mbula oyo Yerusaleme ebebisamaki?
Babiblia mingi, na esika eloba mbula 70 “na Babilone,” elobi nde “mpo na Babilone.” (Biblia haut fleuve) Yango wana, bato mosusu ya mayele na istware balobaka ete eleko ya mbula 70 ezali nde mpo na boyangeli ya Babilone. Mikanda ya mokili emonisi ete Babilone eyangelaki ekólo ya kala ya Yuda mpe Yerusaleme na boumeli ya mbula soki 70, kobanda na mobu 609 L.T.B. tii na mobu 539 L.T.B., ntango engumba-mokonzi ya Babilone ekweaki.
Nzokande, Biblia emonisi ete mbula 70 ezalaki eleko oyo etumbu makasi oyo Nzambe apesaki esengelaki koumela; ezali etumbu oyo apesaki bato ya Yuda mpe Yerusaleme, oyo asalaki na bango kondimana ya kotosa ye. (Kobima 19:3-6) Ntango baboyaki kotika banzela ya mabe, Nzambe alobaki boye: “Nakobengisa . . . Nabukodonozor, mokonzi ya Babilone . . . po bábundisa mboka ná bato na yango, bábundisa pe bikolo nyonso ya pembeni.” (Yeremya [Yirimia] 25:4, 5, 8, 9, Bible na lingala ya lelo oyo) Atako Babilone elingaki mpe konyokola bikólo mosusu oyo ezalaki zingazinga, Yirimia abengaki kobebisama ya Yerusaleme mpe boombo ya mbula 70 oyo esengelaki kolanda ete “etumbu . . . ya bato na ngai,” mpamba te Yerusaleme “asali lisumu linene.”—Boleli [Bileli] 1:8, Biblia Liloba lya Nzambe; 3:42; 4:6.
Na yango, Biblia emonisi ete mbula 70 ezalaki eleko oyo Yuda esengelaki kozwa etumbu, mpe Nzambe asalelaki bato ya Babilone mpo na kopesa bango etumbu makasi wana. Kasi, Nzambe alobaki na Bayuda boye: “Soko bosili bokokisi mibu ntuku nsambo . . . Nakozongisa bino lisusu awa,” elingi koloba na ekólo Yuda mpe Yerusaleme.—Yeremia [Yirimia] 29:10, Biblia Liloba lya Nzambe.
Ntango nini “mbula ntuku nsambo” ebandaki?
Ezera, mokomi moko ya makambo ya kala oyo atambwisamaki na elimo ya Nzambe, oyo azalaki na bomoi nsima ya mbula 70 oyo Yirimia asakolaki, akomaki mpo na Mokonzi Nebukadenezare boye: “Baoyo batikalaki, baoyo babikaki na mopanga, amemaki bango bakangami na Babilone, mpe bakómaki basaleli na ye mpe ya bana na ye tii ntango bokonzi ya Perse ebandaki koyangela; mpo na kokokisa liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia, tii mokili esilisaki kofuta basabata na yango. Mikolo nyonso oyo etikalaki mpamba, etosaki sabata, mpo na kokokisa mbula ntuku nsambo.”—2 Ntango 36:20, 21.
Na yango, mbula 70 esengelaki kozala eleko oyo mokili ya Yuda mpe Yerusaleme esengelaki “kofuta basabata.” Yango elingi koloba ete bato balingaki kosala bilanga na mokili yango te; na maloba mosusu, bakolona te mpe bakobuka vinyo te. (Balevi 25:1-5) Mpo na kozanga botosi ya libota ya Nzambe, oyo moko na masumu na bango ekoki kozala ete batosaki bambula ya Sabata te, etumbu oyo basengelaki kozwa ezalaki ete bilanga esalema te na mboka na bango mpe etikala bongo mbula 70.—Balevi 26:27, 32-35, 42, 43.
Ntango nini mokili ya Yuda etikalaki mpamba mpe bazalaki kosala bilanga te? Ntango Nebukadenezare azalaki mokonzi, Babilone ebundisaki Yerusaleme mbala mibale, mpe bambula mingi elekaki kati na etumba ya liboso mpe oyo ya mibale. Ntango nini mbula 70 ebandaki? Ezali te nsima ya mbala ya liboso oyo basoda ya Nebukadenezare bazingaki Yerusaleme. Mpo na nini? Atako na ntango yango Nebukadenezare amemaki bato mingi ya Yerusaleme na boombo na Babilone, atikaki bato mosusu na mokili yango. Lisusu, engumba yango ezalaki naino. Bato oyo batikalaki na Yuda, elingi koloba “bato mpamba kati na bato ya mokili” bazalaki kosala bilanga na mokili yango na boumeli ya bambula wana. (2 Bakonzi 24:8-17) Kasi, na nsima makambo ebongwanaki mpenza.
Lokola Bayuda batombokaki, basoda ya Babilone bazongaki lisusu na Yerusaleme. (2 Bakonzi 24:20; 25:8-10) Babebisaki engumba mobimba ná tempelo na yango, mpe bamemaki bafandi na yango mingi na boombo na Babilone. Nsima ya sanza mibale, “bato nyonso [oyo batikalaki na mokili yango], banda na moto moke tii na moto monene, mpe bakonzi ya mampinga ya basoda batɛlɛmaki mpe bakɔtaki na Ezipito; mpo babangaki [bato ya Babilone].” (2 Bakonzi 25:25, 26) Ezali na ntango wana, na sanza ya nsambo na manaka ya Bayuda, Tishri (kati na Sɛtɛmbɛ mpe Ɔkɔtɔbɛ), ya mbula wana nde tokoki koloba ete mokili etikalaki mpamba mpe bazalaki kosala bilanga te, nde Sabata na yango ebandaki. Na nzela ya Yirimia, Nzambe alobaki na Bayuda oyo bakimaki na Ezipito boye: “Bino moko bomoni mpasi nyonso oyo namemeli Yerusaleme mpe bingumba nyonso ya Yuda, mpe talá, lelo oyo yango ezali esika moko oyo ebebisamá, mpe moto moko te afandi kuna.” (Yirimia 44:1, 2) Na yango, emonani ete likambo yango nde ezalaki ebandeli ya mbula 70. Kasi, yango ezalaki mobu nini? Mpo na kozwa eyano, tosengeli koyeba ntango nini eleko yango esukaki.
Ntango nini “mbula ntuku nsambo” esukaki?
Mosakoli Danyele, oyo azalaki na bomoi tii “ntango bokonzi ya Perse ebandaki koyangela,” azalaki na Babilone mpe asalaki kalkile mpo na koyeba ntango oyo mbula 70 esengelaki kosuka. Akomaki boye: “Ngai Danyele nasosolaki na nzela ya babuku, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia, ete motángo ya mbula oyo ekoleka mpo libebi ya Yerusaleme ekokisama ekozala mbula ntuku nsambo (70).”—Danyele 9:1, 2.
Ezera ayekolaki bisakweli ya Yirimia mpe amonaki ete “mbula ntuku nsambo” esukaki ntango “Yehova alamwisaki elimo ya Siruse mokonzi ya Perse, bongo atindaki bábelela na bokonzi na ye mobimba.’ (2 Ntango 36:21, 22) Ntango nini Bayuda balongwaki na boombo? Mobeko oyo eyebisaki nsuka ya boombo na bango ebimaki na “mbula ya liboso ya Siruse mokonzi ya Perse.” (Talá etanda “Mbula ya ntina mingi.”) Na bongo, na mobu 537 L.T.B., Bayuda bazongaki na Yerusaleme mpo na kozongisa losambo ya solo.—Ezera 1:1-5; 2:1; 3:1-5.
Boye, na kotalela badati ya Biblia, mbula 70 ezalaki maloba ya elilingi te mpe esukaki na mobu 537 L.T.B. Soki tozongi mbula 70 na nsima, tokokwea na mobu 607 L.T.B.
Kasi, soki Biblia emonisi polele ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., mpo na nini bato mingi ya mayele balobelaka mobu 587 L.T.B.? Mpo bazwi yango na bisika mibale oyo elobeli makambo ya kala: mikanda ya bato ya mayele ya istware ya ntango wana mpe mokanda babengi Canon de Ptolémée. Tokoki kotyela mikanda yango motema koleka Biblia? Tótalela yango.
Mikanda ya istware elobeli mpenza makambo na bosikisiki?
Bato ya mayele na istware oyo bazalaki na bomoi na ntango Yerusaleme ebomamaki balobeli makambo oyo ezali bongolabongola mpo na bakonzi ya Babilone.c (Talá etanda “Bakonzi ya Babilone.”) Bambula oyo tokozwa soki tolandi ndenge oyo bango balobeli makambo eyokani te na Biblia. Kasi, mikanda na bango elobeli mpenza makambo na bosikisiki?
Bérose, “nganga nzambe ya Bel,” azali moko ya bato ya mayele na istware oyo azalaki na bomoi na eleko oyo Babilone ezalaki koyangela. Buku na ye (Babyloniaca), oyo ekomamaki na mobu soki 281 L.T.B., ebungá, mpe bato ya mayele mosusu bazongelá kaka mwa biteni na yango. Bérose alobaki ete asalelaki “babuku oyo ebatelamaki malamu mpenza na Babilone.”1 Bérose akomaki mpenza makambo ya kala na bosikisiki? Tózwa ndakisa moko.
Bérose akomaki ete Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayangelaki nsima “ya ndeko na [ye]”; mpe “nsima na ye, mwana na ye [Esarhaddon ayangelaki] mbula 8; mpe na nsima Sammuges [Shamash-shuma-ukin] mbula 21.” (III, 2.1, 4) Nzokande, mikanda ya masolo ya kala ya Babilone oyo ekomamaki liboso ya eleko ya Bérose elobi ete Senakeribe ayangelaki nsima ya tata na ye Sargon II, kasi leki na ye te; Esarhaddon ayangelaki mbula 12, kasi 8 te; mpe Shamash-shuma-ukin ayangelaki mbula 20, kasi 21 te. Robartus van der Spek, moto moko ya mayele na istware andimaki ete Bérose atángaki mikanda ya Babilone, kasi akomaki mpe boye: “Yango epekisaki ye te abakisa makanisi mpe bandimbola na ye moko.”2
Ndenge nini bato mosusu ya mayele batalelaka Bérose? Stanley Burstein, moto ya mayele oyo ayekolá mingi mikanda ya Bérose alobaki boye: “Kala, Bérose azalaki kotalelama lokola moto ya mayele na istware.” Kasi, asukisaki boye: “Soki tobengi ye moto ya mayele ya istware, tokoloba ete mosala na ye ebongi te. Ata mokanda na ye Babyloniaca, oyo tozali kaka na biteni na yango lelo ezali na mabunga ebele na makambo mikemike . . . Moto oyo asali mabunga ya ndenge wana akoki te kobengama moto ya mayele ya istware, kasi mokano ya Bérose ezalaki ya kokoma istware te.”3
Na kotalela nyonso oyo, okanisi boni? Tokoki mpenza koloba ete Bérose atángaki badati na bosikisiki? Tokoloba boni mpo na bato mosusu ya mayele na istware oyo, na makambo mingi, balandaki nde ndenge ya kotánga badati oyo ezali na mikanda ya Bérose? Tokoki mpenza kotyela makambo oyo bakomaki motema?
Canon de Ptolémée
Buku moko oyo ebengami Canon de Ptolémée, ya Claude Ptolémée, moto moko ya mayele oyo azalaki koyekola minzoto, oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya mibale T.B., esalelamaka mpe mpo na kopona mobu 587 L.T.B. Bato mingi ya mayele bamonaka ete molɔngɔ ya bakonzi oyo Ptolémée alobeli nde ebongi mpenza kosalelama mpo na koyeba masolo ya kala, ata mpe masolo ya eleko ya bokonzi ya Babilone.
Ptolémée akomaki molɔngɔ ya bakonzi yango mbula soki 600 nsima ya boyangeli ya bakonzi ya Babilone. Ndenge nini azwaki mbula oyo mokonzi ya liboso oyo alobeli abandaki koyangela? Ptolémée alimbolaki ete nsima ya kotala bilembo ya likoló, ata mpe baeklipse, “tosalaki kalkile mpo na koyeba ntango oyo boyangeli ya Nabonassar,” mokonzi ya liboso na kati ya bakonzi oyo atángi ebandaki.4 Na yango, Christopher Walker, ya British Museum alobi ete Canon de Ptolémée ezalaki “mayele oyo moto akanisi ye moko mpo na kopesa bato oyo bayekolaka minzoto liste ya malamu” mpe ezalaki “te mpo na kopesa bato ya mayele na istware liste ya solosolo oyo emonisi ndenge oyo bakonzi balandanaki.”5
Profesɛrɛ Leo Depuydt, moko ya bato ya mayele oyo bakɔtelaka Ptolémée akomaki ete: “Toyebaka banda kala ete Canon de Ptolémée ekoki kotyelama motema na bato oyo bayekolaka minzoto, kasi elingi koloba te ete ekoki kotyelama motema na bato ya istware.” Mpo na molɔngɔ yango ya bakonzi, Depuydt abakisi boye: “Mpo na bakonzi ya liboso [kati na bango bakonzi ya Babilone], esengeli koyokanisa Canon yango na makomi ya cunéiforme mpo na koyeba ntango oyo mokonzi mokomoko ayangelaki.”6
“Makomi ya cunéiforme” oyo ezali kosalisa na koyeba bosikisiki ya Canon de Ptolémée ezali nini? Ezali bitanda oyo ezali na makomi oyo elobeli masolo ya Babilone ya kala, bakonzi, mpe makambo ya nkita; ekomamaki na bakomeli oyo bazalaki na bomoi to mwa moke liboso to nsima ya boyangeli ya bakonzi ya Babilone.7
Bokokanisi ya bakonzi oyo Ptolémée atángi mpe oyo ezali na makomi ya cunéiforme ezali komonisa nini? Etanda “Bokeseni nini ezali kati na Canon de Ptolémée mpe Bitanda ya kala?” (talá na nse) emonisi eteni ya Canon de Ptolémée mpe ekokanisi yango na etanda moko ya kala ya cunéiforme. Okomona ete Ptolémée atángi kaka bakonzi minei ya Babilone kati na Kandalanu ná Nabonide. Nzokande, Liste ya Mokonzi Uruk, oyo ezali eteni ya etanda ya cunéiforme, emonisi ete bakonzi nsambo bayangelaki na kati ya bakonzi wana. Tokoki nde koloba ete bayangelaki ntango moke mpe tokoki kobosana yango? Na kolanda etanda moko ya cunéiforme oyo elobeli makambo ya mombongo, moko na bango ayangelaki mbula nsambo.8
Ezali mpe na bilembeteli ya solosolo oyo emonisi ete makomi mosusu ya cunéiforme oyo ekomamaki liboso ya boyangeli ya Nabopolazare (mokonzi ya liboso ya boyangeli ya Babilone), mokonzi mosusu (Ashur-etel-ilani) ayangelaki mbula minei na Babilone. Lisusu, na boumeli ya mbula koleka moko, mokonzi azalaki te na ekólo yango.9 Kasi, nyonso wana elobelami te na Canon de Ptolémée.
Mpo na nini Ptolémée atángaki bakonzi yango te? Ezali polele ete atalelaki bango lokola bakonzi oyo babongaki te na Babilone.10 Na ndakisa, atángaki Labashi-Marduk te, mokonzi moko ya Babilone. Kasi, na kolanda etanda moko ya cunéiforme, bakonzi oyo Ptolémée atángaki te bayangelaki mpenza Babilone.
Bato mingi ya mayele bamonaka ete Canon de Ptolémée elobi makambo na bosikisiki. Kasi, soki totali bakonzi oyo etángi te, esengeli nde kosalela yango mpo na koyeba mpenzampenza bambula oyo makambo ya kala esalemaki?
Likanisi oyo tosimbi
Na mokuse tokoloba boye: Biblia emonisi polele ete Bayuda baumelaki na boombo mbula 70. Tozali na elembeteli ya solosolo, oyo bato mingi ya mayele bandimaka: ete Bayuda oyo bakendaki na boombo bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Soki tozongi nsima kobanda mbula wana, tokokóma na mobu 607 L.T.B., mbula oyo Yerusaleme ebomamaki. Atako bato ya mayele ya istware ya ntango ya kala mpe Canon de Ptolémée endimi badati wana te, makambo ya solosolo ezali komonisa ete mikanda yango elobeli makambo na bosikisiki te. Tomoni mpenza ete bilembeteli wana mibale ekoki te mpo na kokweisa ndenge oyo Biblia elobeli badati oyo makambo ya kala esalemaki.
Nzokande, ezali na mituna oyo ezwi naino biyano te. Ezali mpenza na elembeteli oyo bato ya mayele ya istware bandimi mpo na kondimisa mobu 607 L.T.B.? Bitanda ya cunéiforme oyo eyebani ntango oyo ekomamaki mpe oyo mingi na yango ekomamaki na bato oyo bazalaki na bomoi na eleko wana, ezali na elembeteli nini? Tokozwa biyano na mituna yango na nimero oyo ekolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bambula yango mibale elobelami na mikanda. Mpo tózala na mobulu te, tokolobela kaka mobu 587 L.T.B. na masolo oyo; L.T.B. elimboli “liboso ya ntango na biso.”
b Batatoli ya Yehova babimisá libongoli moko malamu mingi oyo ebengamaka Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika. Kasi, soki ozali Motatoli ya Yehova te, mbala mosusu okosepela kosalela Biblia mosusu ntango ozali kotánga lisolo oyo elobeli makambo ya Biblia. Lisolo oyo ezwi mikapo ya Biblia na mabongoli ndenge na ndenge oyo bato mingi basalelaka.
c Nabopolazare, tata ya Nebukadenezare, azalaki mokonzi ya liboso oyo ayangelaki Babilone, mpe mokonzi ya nsuka ezalaki Nabonide. Bato ya mayele balukaka koyeba eleko yango malamu mpamba te mbula 70 oyo Yuda etikalaki mpamba ezalaki mingimingi na kati ya ntango wana.
[Etanda/Bililingi na lokasa 28]
MBULA YA NTINA MINGI
Mpo na kozwa mobu 539 L.T.B., mbula oyo Siruse II alongaki Babilone, batalelaka bilembeteli oyo:
▪ Mikanda ya kala ya istware mpe bitanda ya cunéiforme: Diodore de Sicile (soki 80-20 L.T.B.) akomaki ete Siruse akómaki mokonzi ya Perse na “mbula ya liboso ya lisano ya olympique ya mbala ya 55.” (Historical Library, Buku IX, 21) Yango ezalaki mobu 560 L.T.B. Hérodote, Mogrɛki moko oyo akomaki makambo ya kala (soki 485-425 L.T.B.) alobaki ete Siruse abomamaki “nsima ya koyangela mbula ntuku mibale na libwa,” elingi koloba ete akufaki ntango azalaki na mbula 30; ezalaki na mobu 530 L.T.B. (Histories, Buku I, Clio, 214) Bitanda ya cunéiforme emonisi ete Siruse ayangelaki Babilone mbula libwa liboso akufa. Na yango, mbula libwa liboso akufa na mobu 530 L.T.B. ememi biso na mobu 539 L.T.B., mbula oyo Siruse alongaki Babilone.
Etanda moko ya cunéiforme endimisi yango: Etanda moko ya mabele oyo elobeli makambo ya koyekola sanza mpe minzoto na Babilone (BM 33066) endimisi ete Siruse akufaki na mobu 530 L.T.B. Atako etanda yango ezali na mwa mabunga na makambo ya koyekola sanza mpe minzoto, elobeli eklipse mibale ya sanza oyo esalemaki na mbula ya nsambo ya Cambyse II, mwana mpe mokitani ya Siruse. Emonani ete yango ezali baeklipse ya sanza oyo emonanaki mpe na Babilone mokolo ya 16 Yuli 523 L.T.B., mpe mokolo ya 10 Yanuali 522 L.T.B., oyo ememi biso na prɛnta ya mobu 523 L.T.B. lokola ebandeli ya mbula ya nsambo ya boyangeli ya Cambyse. Yango emonisi ete mbula ya liboso ya boyangeli na ye ezalaki mobu 529 L.T.B. Na yango, mbula ya nsuka ya Siruse esengeli kozala mobu 530 L.T.B., mpe mobu 539 L.T.B. lokola mbula ya liboso oyo ayangelaki Babilone.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Etanda: © The Trustees of the British Museum
[Etanda na lokasa 31]
NA MOKUSE
▪ Mbala mingi, bato ya mayele na istware balobaka ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 587 L.T.B.
▪ Masolo ya Biblia emonisi polele ete Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B.
▪ Bato ya mayele ya istware balandaka mingimingi masolo oyo bato ya kala bakomaki mpe Canon de Ptolémée.
▪ Makomi ya bato ya kala ezali na mabunga minene mpe na bisika mingi, eyokani te na makambo oyo ezali na bitanda ya mabele.
[Etanda na lokasa 31]
Mikanda
1. Babyloniaca (Chaldaeorum Historiae), Buku ya liboso, 1.1.
2. Studies in Ancient Near Eastern World View and Society, lokasa 295.
3. The Babyloniaca of Berossus, lokasa 8.
4. Almagest, III, 7, ebongolami na G. J. Toomer, na Ptolemy’s Almagest, ebimaki na 1998, lokasa 166. Ptolémée ayebaki ete bato oyo bazalaki koyekola minzoto mpe sanza na Babilone bazalaki kosalela kalkile mpo na “kotánga” ntango oyo baeklipse esalemaká mpe ntango oyo ekosalema lisusu, mpamba te bamonaki ete baeklipse ya ndenge moko esalemaka lisusu nsima ya mbula 18 nyonso.—Almagest, IV, 2.
5. Mesopotamia and Iran in the Persian Period, nkasa 17-18.
6. Journal of Cuneiform Studies, Volimi 47, 1995, nkasa 106-107.
7. Cunéiforme ezali ndenge ya kokoma oyo mokomi azalaki kokoma bilembo ndenge na ndenge likoló ya etanda ya mabele oyo ekauki naino te na lisalisi ya mwa nzete ya nsɔngɛ.
8. Sin-sharra-ishkun ayangelaki mbula nsambo, mpe bitanda 57 oyo elobeli makambo ya mombongo ya mokonzi yango emonani ete ekomamaki na mbula oyo akómaki mokonzi tii na mbula ya nsambo. Talá Journal of Cuneiform Studies, Volimi 35, 1983, nkasa 54-59.
9. Etanda ya makambo ya mombongo C.B.M. 2152 emonani ete ekomamaki na mbula ya minei ya boyangeli ya Ashur-etel-ilani. (Legal and Commercial Transactions Dated in the Assyrian, Neo-Babylonian and Persian Periods—Chiefly From Nippur, ya A.T. Clay, 1908, lokasa 74.) Lisusu, makomi ya Harran oyo elobeli Nabonide, (H1B), I, molɔngɔ 30, etángi ye liboso ya Nabopolazare. (Anatolian Studies, Vol. VIII (1958, nkasa 35, 47.) Mpo na bileko oyo mokonzi azalaki te, talá Chronicle 2, molɔngɔ 14, ya Assyrian and Babylonian Chronicles, nkasa 87-88.
10. Bato mosusu ya mayele na istware balobaka ete Ptolémée atángaki kaka bakonzi ya Babilone mpe atángaki te bakonzi mosusu mpo bazalaki na titre ya “Mokonzi ya Asiri.” Nzokande, ndenge okoki komona yango na etanda ya lokasa 30, bakonzi mingi oyo batángami na Canon de Ptolémée bazali na titre “Mokonzi ya Asiri.” Bitanda ya makambo ya mombongo, mikanda ya cunéiforme, mpe makomi ezali komonisa polele ete bakonzi Ashur-etel-ilani, Sin-shumu-lishir, mpe Sin-sharra-ishkun bayangelaki Babilone.
[Etanda/Elilingi na lokasa 29]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BAKONZI YA BABILONE
Soki ebongi tótyela bato oyo ya istware motema, mpo na nini makambo oyo bakomaki eyokani te?
Bakonzi
Nabopolazare
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (21)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (20)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (—)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (21)
Nebukadenezare II
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (43)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (43)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (43)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (43)
Amel-Marduk
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (2)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (12)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (18)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (2)
Neriglissar
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (4)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (4)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (40)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (4)
Labashi-Marduk
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (sanza 9)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (—)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (sanza 9)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (—)
Nabonide
BÉROSE soki 350-270 L.T.B. (17)
POLYHISTOR 105-? L.T.B. (17)
JOSÈPHE 37-?100 T.B. (17)
PTOLÉMÉE soki 100-170 T.B. (17)
(#) = Boyangeli ya mokonzi (na bambula) ndenge bakomi ya masolo ya kala bamonisi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum
[Etanda/Bililingi na lokasa 30]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BOKESENI NINI EZALI KATI NA CANON DE PTOLÉMÉE MPE BITANDA YA KALA?
Ptolémée atángi te bakonzi mosusu. Mpo na nini?
CANON DE PTOLÉMÉE
Nabonassar
Nabu-nadin-zeri (Nadinu)
Mukin-zeri ná Poul
Ululayu (Shalmaneser V) “Mokonzi ya Asiri”
Merodach-baladan
Sargon II “Mokonzi ya Asiri”
Eleko ya liboso oyo mokonzi azalaki te
Bel-ibni
Ashur-nadin-shumi
Nergal-ushezib
Mushezib-Marduk
Eleko ya mibale oyo mokonzi azalaki te
Esarhaddon “Mokonzi ya Asiri”
Shamash-shuma-ukin
Kandalanu
Nabopolazare
Nebukadenezare
Amel-Marduk
Neriglissar
Nabonide
Siruse
Cambyse
LISTE YA MOKONZI YA URUK NDENGE EZALI NA BITANDA YA KALA
Kandalanu
Sin-shumu-lishir
Sin-sharra-ishkun
Nabopolazare
Nebukadenezare
Amel-Marduk
Neriglissar
Labashi-Marduk
Nabonide
[Elilingi]
Chronique babilonien ezali na kati ya makomi ya cunéiforme oyo esalisaka biso tóyeba bosikisiki ya Canon de Ptolémée
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum