Tósalisa mibali bákola na elimo
“Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”—LUKA 5:10.
1, 2. (a) Mibali mingi basalaki nini ntango bayokaki nsango oyo Yesu asakolaki? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
MOKOLO moko ntango Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosakola na Galile, bakɔtaki na masuwa mpo na kokende na esika moko oyo bakozala kaka bango moko. Kasi bato ebele mpenza balandaki bango na makolo. Bato oyo balandaki bango mokolo wana bazalaki “mibali nkóto mitano (5 000), longola basi ná bana mike.” (Mat. 14:21) Mokolo mosusu, bato ebele bayaki epai ya Yesu mpo ateya bango mpe abikisa bango. Ezalaki na “mibali nkóto minei (4 000), longola basi ná bana mike.” (Mat. 15:38) Tomoni ete mibali bazali ebele kati na bato oyo bayaki epai ya Yesu mpe bazalaki kosepela na mateya na ye. Kutu, Yesu ayebaki ete bato mingi koleka bakondima mateya na ye, mpamba te nsima ya kosalisa bayekoli na ye bákanga mbisi na ndenge ya likamwisi, ayebisaki Simo boye: “Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.” (Luka 5:10) Yesu amonisaki ete mosala ya kosakola ezali lokola mosala ya kokanga mbisi. Bayekoli na ye bakokaki kosalisa bato ya ndenge na ndenge, kati na bango mibali mingi.
2 Lelo oyo mpe, mibali bazali kosepela na nsango ya Biblia oyo tosakolaka mpe bazali kondima koyekola Biblia. (Mat. 5:3) Kasi, mingi na bango bazali kozonga nsima mpe bazali kokokola na elimo te. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Yesu asalelaki mayele moko ya ndenge mosusu te mpo na kosakwela mibali. Atako bongo, alobelaki makambo oyo ezalaki kotungisa mibali na ntango na ye. Na lisolo oyo, tokoyekola ndenge Yesu asalisaki mibali mpe ndenge tokoki komekola ye lelo mpe kosalisa mibali na makambo misato oyo etungisaka bango: (1) kozwa mbongo ya kobikela, (2) kobanga soki bato bakokanisa nini, mpe (3) komona ete bakokoka makambo te.
Kozwa mbongo ya kobikela
3, 4. (a) Makambo nini mibali mingi bamonaka ete ezali na ntina mingi? (b) Mpo na nini mibali mosusu bakanisaka ete koluka mbongo ezali na ntina mingi koleka koyekola Biblia?
3 Mokomeli moko boye alobaki na Yesu ete: “Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende.” Nzokande, ntango Yesu ayebisaki ye ete “Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te,” mokomeli yango akómaki na makanisi mosusu. Mbala mosusu asepelaki te na bomoi ya kozanga koyeba soki akolya ndenge nini mpe akolala wapi, mpo eloko moko te na Biblia emonisi ete akómaki moyekoli ya Kristo.—Mat. 8:19, 20.
4 Mibali mingi bakanisaka ete koluka mbongo ezali na ntina mingi koleka koyekola Biblia mpe kotosa mateya na yango. Bamonaka ete kotánga bakelasi ya milaimilai mpe kozala na mosala ya mbongo mingi nde eleki ntina. Bakanisaka ete koluka mbongo ezali na ntina mingi mpe ekoki kosalisa bango mingi koleka matomba nyonso oyo bakoki kozwa soki bayekoli Biblia mpe baluki kokóma na boyokani malamu na Nzambe. Mbala mosusu basepeli na mateya ya Biblia, kasi “mitungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” eyei kopekisa bango báyekola makambo mosusu to bátosa oyo Biblia elobi. (Mrk. 4:18, 19) Tótala ndenge Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba makambo oyo esengelaki kotya na esika ya liboso.
5, 6. Nini esalisaki Andre, Petro, Yakobo, mpe Yoane báyeba makambo oyo basengelaki kotya na esika ya liboso?
5 Andre ná ndeko na ye Simo Petro bazalaki baluki-mbisi. Yoane, ndeko na ye Yakobo, mpe tata na bango Zebede bazalaki mpe baluki-mbisi. Mosala na bango ezalaki kotambola malamu mpo bazwaki kutu bato ya misala. (Mrk. 1:16-20) Na ebandeli, ntango Andre ná Yoane bayokaki nsango ya Yesu epai ya Yoane Mobatisi, bandimaki mpenza ete bamoni Masiya. Andre ayebisaki ndeko na ye Simo Petro likambo yango, mpe mbala mosusu Yoane mpe ayebisaki yango ndeko na ye Yakobo. (Yoa. 1:29, 35-41) Na basanza oyo elandaki, bango nyonso minei bazalaki elongo na Yesu wana azalaki kosakola na Galile, na Yudea, mpe na Samaria. Na nsima, bango minei bazongelaki mosala na bango ya koluka mbisi. Basepelaki na makambo oyo Yesu ateyaki bango, kasi mpo na bango, mosala ya kosakola ezalaki likambo ya kotya na esika ya liboso te.
6 Mwa moke na nsima, Yesu abengaki Petro mpe Andre bálanda ye mpe bákóma “baluki-bato.” Basalaki nini? “Na mbala moko basundolaki minyama mpe balandaki ye.” Yakobo ná Yoane mpe basalaki kaka bongo. “Na mbala moko batikaki masuwa ná tata na bango mpe balandaki ye.” (Mat. 4:18-22) Nini esalisaki mibali yango bázwa ekateli ya kobanda kosakola ntango nyonso? Bazwaki ekateli yango na loyenge? Ezali mpasi tóloba bongo. Na basanza oyo eutaki koleka, mibali yango bayokaki mateya ya Yesu, bamonaki ye azali kosala makamwisi, bamonaki molende na ye mpo na makambo oyo ezali sembo, mpe bamonaki ete bato bazali kosepela mpenza na mateya na ye. Na yango, kondima na bango epai ya Yehova ekómaki makasi mpe bakómaki kotyela ye motema mingi koleka!
7. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma kotyela Yehova motema?
7 Ndenge nini tokoki komekola Yesu mpe kosalisa bayekoli ya Biblia báyekola kotyela Yehova motema? (Mas. 3:5, 6) Tokoki kosalisa bango na ndenge na biso ya koteya. Ntango tozali koteya bango, tosengeli komonisa ete Nzambe alaki ete akopambola biso mingi soki totye Bokonzi na esika ya liboso. (Tángá Malaki 3:10; Matai 6:33.) Atako tokoki kosalela bavɛrsɛ ndenge na ndenge mpo na komonisa ndenge oyo Yehova akokisaka bamposa ya bato na ye, tóbosana te ete ndakisa na biso moko ekoki koteya bango. Ntango tozali koyebisa bango ndenge Yehova asalisá biso moko, yango ekoki kosalisa bango bákóma kotyela ye motema. Tokoki mpe kobɛtela bango masolo mosusu oyo totángaki na mikanda na biso.a
8. (a) Mpo na nini moyekoli ya Biblia asengeli ‘komeka mpe komona ete Yehova azali malamu’? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli amona ete Yehova azali malamu?
8 Mpo moyekoli akóma na kondima makasi, asengeli kotánga mpe koyoka masolo ya bato oyo Yehova apambolaki; kasi esuki wana te. Asengeli mpe komona na bomoi na ye moko ete Yehova azali malamu. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.” (Nz. 34:8) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia amona ete Yehova azali malamu? Tózwa ndakisa ya moyekoli moko oyo azali na mikakatano ya mbongo mpe azali kosala makasi atika mimeseno ya mabe, na ndakisa komɛla likaya, kobɛta masano ya mbongo, mpe komɛla masanga mingi. (Mas. 23:20, 21; 2 Ko. 7:1; 1 Tim. 6:10) Tokoki koyebisa ye abondela Nzambe asalisa ye mpo atika mimeseno yango ya mabe. Soki bomoi na ye ebongwani, akomona ete Yehova azali malamu. Tokoki mpe kolendisa moyekoli atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso. Tokoki komonisa ye ete asengeli koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe asengeli kobongisa mpe koyangana na makita. Ntango moyekoli azali komona ye moko ndenge Yehova azali kopambola milende na ye, kondima na ye ekokóma makasi!
Kobanga soki bato bakokanisa nini
9, 10. (a) Mpo na nini Nikodeme ná Yozefe ya Arimatea baboyaki komonisa ete basepeli na mateya ya Yesu? (b) Lelo oyo, mpo na nini mibali mosusu baboyaka kolanda Kristo?
9 Mibali mosusu bakoki kokakatana kolanda Kristo malamumalamu mpo bazali kobanga soki bato bakokanisa nini. Na ndakisa, Nikodeme ná Yozefe ya Arimatea baboyaki komonisa ete basepeli na mateya ya Yesu mpo bazalaki kobanga makambo oyo Bayuda bakokaki koloba to kosala soki bayebi yango. (Yoa. 3:1, 2; 19:38) Bazalaki kobanga mpamba te. Koyina oyo bakonzi ya lingomba bayinaki Yesu ekómaki mpenza makasi mpe soki moto alobi polele ete andimeli ye, bazalaki kobengana ye na Sinagoga.—Yoa. 9:22.
10 Lelo oyo, na bisika mosusu, soki mobali moko abandi kosepela mingi na makambo ya Nzambe, na Biblia, to na losambo, bato oyo asalaka na ye, baninga na ye, to bato ya libota na ye bakoki kobanda kotyola ye. Na bisika mosusu, ekoki kutu kozala likama koyebisa basusu ete olingi kokɔta na lingomba mosusu. Bato bakoki kotyola mingi koleka mobali oyo azali soda, moto ya politiki to moto ya lokumu na kartye soki abandi kosepela na makambo ya Nzambe. Na ndakisa, mobali moko na Allemange alobaki boye: “Makambo oyo bino Batatoli boteyaka mpo na Biblia ezali solo. Kasi, soki nakómi Motatoli lelo, lobi mokili mobimba ekoyeba yango. Baninga na ngai ya mosala, ya kartye, mpe bato oyo bayebi ngai ná libota na ngai bakokanisa nini? Nakokoka te.”
11. Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bátika kobanga bato?
11 Atako bantoma ya Yesu bazalaki bato ya mpiko, na bantango mosusu bazalaki kobanga bato. (Mrk. 14:50, 66-72) Ndenge nini Yesu asalisaki bango bákola na elimo atako bato bazalaki kotɛmɛla bango? Yesu abongisaki bango mpo na botɛmɛli oyo ezalaki kozela bango. Alobaki boye: “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino, mpe ntango bazali kobengana bino mpe kofinga bino mpe kobebisa nkombo na bino mpo na Mwana ya moto lokola nde bozali bato mabe.” (Luka 6:22) Ayebisaki bango ete bato bakofinga bango. Kasi alobaki ete bakofinga bango nde “mpo na Mwana ya moto.” Yesu ayebisaki mpe bango bábosana te ete Nzambe akosalisa bango soki bakobi kotyela Ye motema ete akosalisa bango mpe akopesa bango makasi. (Luka 12:4-12) Lisusu, Yesu ayebisaki bato oyo babandaki kolanda ye ete bázala elongo na bayekoli na ye mpe bákóma baninga na bango.—Mrk. 10:29, 30.
12. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika bátika kobanga bato?
12 Biso mpe tosengeli kosalisa bayekoli ya Biblia bátika kobanga bato. Mbala mingi, ezalaka mpasi te moto ayikela mokakatano mpiko soki amibongisaki liboso. (Yoa. 15:19) Na ndakisa, tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia abongisa mwa biyano ya polele mpe ya malamu oyo euti na Biblia mpo na koyanola mituna oyo baninga ya mosala mpe bato mosusu bakoki kotuna ye. Lisusu, tokoki kokóma moninga na ye, mpe kolakisa ye epai ya bandeko mosusu ya lisangá, mingimingi baoyo makambo mosusu ya bomoi na bango ezali lokola oyo ya ye. Oyo eleki ntina, tosengeli koteya ye abondelaka Yehova mbala na mbala mpe ayebisaka ye makambo oyo euti na motema na ye. Yango ekoki kosalisa ye apusana penepene na Nzambe mpe akómisa Yehova Ekimelo mpe Libanga na ye.—Tángá Nzembo 94:21-23; Yakobo 4:8.
Komona ete bakokoka makambo te
13. Mpo na nini mibali mosusu balingaka komipesa na makambo ya Nzambe te?
13 Mibali mosusu babangaka komipesa na makambo ya Nzambe mpo bayebi kotánga malamu te, balobaka malamu te, to kaka mpo bazalaka nsɔninsɔni. Mibali mosusu bakokaka te kobimisa makanisi na bango to koloba liboso ya bato ebele. Bakoki komona ete koyekola, kopesa biyano na makita ya bokristo, to koyebisa basusu bindimeli na bango ezali mpasi mingi mpo na bango. Ndeko mobali moko alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokende mbangu na porte ya bato, nazalaki kosala lokola nabɛti porte mpe nazalaki kolongwa wana malɛmbɛ, na elikya ete moto moko te akoyoka ngai to akomona ngai. . . . Likanisi ya kokende ndako na ndako ezalaki kobɛlisa ngai.”
14. Mpo na nini bayekoli ya Yesu balongaki te kobikisa mwana mobali moko oyo azalaki na demo?
14 Na ntembe te bayekoli ya Yesu bayokaki mpenza ete bakoki makambo te lokola balongaki te kobikisa mwana moko ya mobali oyo azalaki na demo. Tata ya mwana yango akendaki epai ya Yesu mpe alobaki boye: “[Mwana na ngai] azali na maladi ya ndɛkɛ mpe azali kobɛla, mpo mbala mingi akweaka na mɔtɔ mpe na mai; mpe namemaki ye epai ya bayekoli na yo, kasi bakokaki kobikisa ye te.” Yesu abimisaki demo yango mpe mwana yango abikaki. Na nsima bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye ete: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa ye te?” Yesu ayanolaki ete: “Mpo bozali na kondima moke. Mpo ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende, mpe ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.” (Mat. 17:14-20) Mpo moto asala makambo oyo akoki komona lokola akokoka kosala te, asengeli kozala na kondima epai ya Yehova. Kasi soki amityeli motema, akolonga te; na nsima akoki komona ete akokoka te kosalela Yehova.
15, 16. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia oyo bazali komona ete bakokoka makambo te na mosala ya Yehova?
15 Lolenge ya malamu ya kosalisa moto atika komona ete akokoka makambo te ezali ya kolendisa ye akanisa te ete akolonga na makasi na ye moko, kasi atyela nde Yehova motema. Petro akomaki boye: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ekoki; ntango bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso.” (1 Pe. 5:6, 7) Mpo na yango, tosengeli kosalisa moyekoli ya Biblia akóma moto ya elimo. Moto ya elimo asepelaka na makambo ya Nzambe. Alingaka Liloba ya Nzambe mpe amonisaka “mbuma ya elimo” na bomoi na ye. (Gal. 5:22, 23) Kobondela ezalaka na ntina mingi mpo na ye. (Flp. 4:6, 7) Longola yango, asɛngaka Nzambe apesa ye mpiko mpe makasi oyo asengeli na yango mpo alonga mokakatano nyonso oyo akutani na yango to akokisa malamu mokumba nyonso oyo azwi.—Tángá 2 Timote 1:7, 8.
16 Mpo na bayekoli mosusu, ekoki mpenza kosɛnga tósalisa bango mpo báyeba kotánga malamu, kosolola na bato, to koloba liboso ya bato. Bamosusu bakoki komona ete babongi kosalela Yehova te mpo na makambo ya mabe oyo basalá liboso báyeba ye. Tokoki mpenza kosalisa bato nyonso wana soki tomoniseli bango bolingo mpe motema molai. Yesu alobaki boye: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”—Mat. 9:12.
Tóluka mibali mingi koleka
17, 18. (a) Tokoki kosala nini mpo tókuta mibali mingi ntango tobimi na mosala ya kosakola? (b) Tokoyekola nini na lisolo oyo elandi?
17 Mposa na biso ezali ete mibali mingi koleka bándima nsango ya Biblia, oyo epesaka mpenza bato esengo. (2 Tim. 3:16, 17) Na yango, ndenge nini tokoki kosala mpo tókuta mibali mingi ntango tobimi na mosala ya kosakola? Tokoki komeka kosakolaka mingi na mpokwa, na nsuka ya pɔsɔ nsima ya midi, to na mikolo ya bafɛti, mpo mibali mingi bazalaka na ndako na bantango wana. Mpe soki likoki ezali, tokoki kosɛnga tósolola na tata ya ndako. Tokoki mpe koluka mabaku ya kopesa litatoli epai ya mibali oyo tosalaka na bango esika moko. Bandeko basi mosusu bazali na mibali oyo bazali Batatoli te; tokoki mpe komeka kosalisa mibali yango báyekola Biblia.
18 Wana tozali kosakwela moto nyonso oyo tokutani na ye, tózala na elikya ete baoyo bazali na motema sembo bakondima koyoka nsango na biso. Tosengeli kozala motema molai mpe kokoba kosalisa bato oyo basepeli koyeba solo. Bongo, ndenge nini tokoki kosalisa mibali oyo bazwá batisimo bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá ba Annuaire des Témoins de Jéhovah mpe masolo ya bomoi oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kosalisa mibali bátyaka makambo ya elimo na esika ya liboso?
• Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika bátika kobanga bato?
• Nini ekoki kosalisa moto atika koyoka ete akokoka makambo te?
[Elilingi na lokasa 25]
Olukaka mabuku ya kosakwela mibali nsango malamu?
[Elilingi na lokasa 26]
Ndenge nini okoki kobongisa moyekoli ya Biblia mpo ayeba kotɛmɛla komekama?