Bato ya sembo na ntango ya kala batambwisamaki na elimo ya Nzambe
“Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova ye moko atindi ngai, ɛɛ elimo na ye.”—YIS. 48:16.
1, 2. Tozali na mposa ya nini mpo tómonisa kondima, mpe kotalela bato ya kondima ya ntango ya kala ekoki kolendisa biso na nini?
ATAKO bato mingi bamonisaki kondima banda na mikolo ya Abele, “bato nyonso te nde bazalaka na kondima.” (2 Tes. 3:2) Na yango, mpo na nini moto azalaka na kondima mpe nini esalisaka ye azala sembo? Mbala mingi, kondima eutaka na makambo oyo moto ayoki na Liloba ya Nzambe. (Rom. 10:17) Ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Na yango, mpo tómonisa kondima, tozali na mposa ya elimo santu.
2 Ekozala libunga koloba ete mibali mpe basi oyo bamonisaki kondima babotamaki na yango. Basaleli ya Nzambe oyo batikaki ndakisa malamu oyo totángaka na Biblia, ‘bazalaki bato lokola biso.’ (Yak. 5:17) Bazalaki na bantembe, bazalaki kobangabanga mpe bazalaki na bolɛmbu, kasi “bakómaki na nguya” na nzela ya elimo ya Nzambe mpo na koyikela mikakatano mpiko. (Ebr. 11:34) Soki totali ndenge elimo ya Yehova esalaki na kati na bango, biso mpe lelo oyo tokoki kolendisama mpo tókoba kosalela Nzambe na bosembo, na eleko na biso oyo makambo mingi ekoki kolɛmbisa kondima na biso.
Elimo ya Nzambe epesaki Moize nguya
3-5. (a) Ndenge nini toyebi ete elimo santu esalisaki Moize akokisa mikumba na ye? (b) Ndakisa ya Moize eteyi biso nini na oyo etali ndenge oyo Yehova apesaka biso elimo na ye?
3 Na bato nyonso oyo bazalaki na bomoi na mobu 1513 L.T.B., Moize azalaki “na komikitisa mingi koleka.” (Mit. 12:3) Yehova apesaki mosaleli na ye wana mokumba monene na ekólo ya Yisraele. Elimo ya Nzambe epesaki Moize nguya ya kosakola, kosambisa, kokoma, kokamba mpe kosala makamwisi. (Tángá Yisaya 63:11-14.) Kasi mokolo moko, Moize amilelaki ete mokumba yango eleki ye kilo. (Mit. 11:14, 15) Na yango, Yehova azwaki “mwa ndambo ya elimo” oyo ezalaki likoló ya Moize mpe atyaki yango na mibali 70 kati na mikóló ya ekólo mpo básalisa ye na mokumba yango. (Mit. 11:16, 17) Atako Moize amonaki ete mokumba eleki ye kilo, azalaki mpenza komema yango ye moko te; mibali 70 oyo batyamaki mpo na kosalisa ye balingaki mpe komema yango bango moko te.
4 Yehova apesaki Moize elimo santu oyo ekoki mpo na mokumba na ye. Ata nsima ya kobakisela ye mibali wana, Moize azalaki kaka na elimo oyo asengelaki na yango. Moize atikalaki na elimo moke te, mpe mikóló wana 70 bazwaki elimo mingi koleka te. Yehova apesaka biso elimo santu oyo tosengeli na yango, na kolanda ndenge makambo na biso ezali. “Apesaka elimo mokemoke te” kasi apesaka ‘na ebele ya [elimo] oyo atondi na yango.’—Yoa. 1:16; 3:34.
5 Ozali kobunda na mikakatano? Okómi na mikumba mingi mpe ekómi kozwa yo ntango mingi? Ozali kosala makasi okokisa bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya libota na yo kasi ozali mpe komona ete okómi kobimisa mbongo mingi to ete nzoto na yo ezali malamu lisusu te? Ozali komema mikumba ya kilo na lisangá? Yebá ete na nzela ya elimo na ye, Nzambe akoki kopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo oyika mpiko, ezala na likambo nini.—Rom. 15:13.
Elimo santu epesaki Bezalele makoki oyo esengeli
6-8. (a) Elimo ya Nzambe esalisaki Bezalele ná Oholiabe básala nini? (b) Nini emonisi ete Bezalele ná Oholiabe batambwisamaki na elimo ya Nzambe? (c) Mpo na nini ndakisa ya Bezalele ekoki kolendisa biso mingi?
6 Ndakisa ya Bezalele, moto oyo azalaki na bomoi na eleko ya Moize, ezali mpe kosalisa biso tómona ndenge elimo ya Nzambe ekoki kosala na kati ya moto. (Tángá Kobima 35:30-35.) Bezalele aponamaki mpo na kokamba mosala ya kobongisa biloko oyo esengeli mpo na tabernakle. Ayebaki nde misala ya mabɔkɔ liboso azwa mokumba wana monene? Mbala mosusu ayebaki, kasi ekoki mpenza kozala ete mosala ya nsukansuka oyo autaki kosala ezalaki nde mosala ya kosala babriki na Ezipito. (Kob. 1:13, 14) Bongo, ndenge nini Bezalele alingaki kokokisa mokumba wana ya mpasi oyo azwaki? Yehova “atondisaki ye na elimo ya Nzambe mpo azala na bwanya, na mayele, na boyebi mpe ayeba lolenge nyonso ya misala ya mabɔkɔ mpo na kokanisa ndenge ya kosala misala . . . mpo na kosala biloko ya mayele ya lolenge nyonso.” Ata soki Bezalele azalaki na makoki na ye ya kobotama, elimo santu ebakiselaki ye yango. Ezalaki mpe bongo mpo na Oholiabe. Na ntembe te, Bezalele ná Oholiabe bakómaki mpenza mayele na mosala, mpo basukaki kaka na kosala misala na bango te, kasi balakisaki mpe bato mosusu mosala. Nzambe atyaki na mitema na bango likanisi ya koteya makambo yango na basusu.
7 Likambo mosusu oyo emonisi ete Bezalele ná Oholiabe batambwisamaki na elimo ya Nzambe ezali ete biloko oyo basalaki ebebaki te ata nsima ya bambula mingi. Bazalaki naino kosalela biloko yango mbula 500 na nsima. (2 Nt. 1:2-6) Na bokeseni na bato oyo basalaka biloko na mikolo na biso, Bezalele ná Oholiabe balukaki te kotya sinyatire to elembo te na biloko oyo basalaki. Balingaki ete Yehova nde azwa lokumu nyonso mpo na mosala oyo basalaki.—Kob. 36:1, 2.
8 Lelo mpe, bakoki kopesa biso mosala moko oyo ekoki kobangisa, oyo ezali kosɛnga moto azala na makoki ya sikisiki, na ndakisa ayeba kotonga bandako, konyata mikanda, kobongisa mayangani, kotambwisa mosala ya kosalisa bandeko oyo bazwi likama, mpe koyebisa minganga mpe bato oyo basalaka na mapitalo makambo oyo Biblia elobi na ntina etali kosalela makila. Na bantango mosusu, bato oyo bayebi misala yango malamu nde basalaka yango, kasi mbala mingi bato oyo bayebi yango mpenza te nde bamipesaka na bolingo na bango moko. Elimo ya Nzambe esalisaka bango básala malamu. Osilá koboya kondima mokumba moko na mosala ya Yehova mpo okanisaki ete bato mosusu bakoki kosala yango malamu mingi koleka yo? Kobosana te ete elimo ya Yehova ekoki kobakisa boyebi mpe makoki na yo mpe kosalisa yo okokisa ata mokumba nini oyo apesi yo.
Yosua alongaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe
9. Bayisraele bakutanaki na likambo nini mwa moke nsima ya kobima na Ezipito, mpe motuna nini ebimaki?
9 Elimo ya Nzambe etambwisaki mpe moto mosusu oyo azalaki na bomoi na eleko ya Moize mpe Bezalele. Mwa moke nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, Baamaleke bayaki kobundisa bango kaka mpamba. Bayisraele basengelaki kobengana bango. Atako Bayisraele bamesanaki na bitumba te, basengelaki kobunda etumba na bango ya liboso banda bautaki na boombo. (Kob. 13:17; 17:8) Bazalaki na mposa ya moto moko mpo na kokamba babundi. Ekozala nani?
10. Mpo na nini Yosua ná Bayisraele balongaki etumba?
10 Yehova aponaki Yosua. Kasi, soki batunaki ye misala oyo asalá liboso, oyo ekokaki komonisa ete abongi kosala mosala yango, alingaki koloba nini? Ete azalaki moombo? Ete azalaki kosangisa matiti ya kokauka mpo na kosala babriki? To ete ayebi kolɔkɔta mana? Ya solo, Elishama nkɔkɔ ya Yosua azalaki nkumu ya libota ya Efraime mpe emonani ete atambwisaki mibali 108 100 ya moko ya bituluku ya mabota misato na Yisraele. (Mit. 2:18, 24; 1 Nt. 7:26, 27) Atako bongo, na nzela ya Moize, Yehova alobaki te ete Elishama to mwana na ye Nunu nde bakokamba babundi mpo na kolonga banguna; aponaki nde Yosua. Etumba yango eumelaki ntango molai mokolo wana. Lokola Yosua atosaki na motema mobimba mpe andimaki litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, Yisraele elongaki.—Kob. 17:9-13.
11. Tokoki kosala nini mpo tólonga na mosala ya Nzambe, ndenge Yosua alongaki?
11 Na nsima, Yosua akitanaki Moize. Yosua “atondaki na elimo ya bwanya.” (Mib. 34:9) Elimo santu epesaki Moize likoki ya kosakola makambo ekoya to kosala makamwisi, kasi ezalaki bongo te mpo na Yosua. Elimo santu esalisaki Yosua nde akamba Yisraele na bitumba ebele oyo babundaki mpo na kozwa Kanana. Lelo oyo, tokoki komona ete tozali mayele te to tobongi te mpo na kosala makambo mosusu na mosala na biso mpo na Nzambe. Atako bongo, tokoki kolonga, ndenge Yosua mpe alongaki, soki tolandi mpenza malako ya Nzambe.—Yos. 1:7-9.
“Elimo ya Yehova ekɔtelaki Gideone”
12-14. (a) Lokola mibali 300 balongaki limpinga monene mpenza ya Bamidiane, yango emonisi nini? (b) Ndenge nini Yehova alendisaki Gideone? (c) Ndenge nini Nzambe akoki kolendisa biso lelo oyo?
12 Nsima ya liwa ya Yosua, Yehova akobaki komonisa ndenge oyo nguya na ye ekoki kopesa basaleli na ye ya sembo makasi. Mokanda ya Basambisi etondi na masolo ya bato oyo “bazalaki na bolɛmbu kasi bakómaki na nguya.” (Ebr. 11:34) Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kosalisa Gideone abundela ekólo na Ye. (Bas. 6:34) Kasi, basoda oyo Gideone ayanganisaki bazalaki moke; soda moko ya Gideone akokaki kobunda na basoda minei ya Midiane. Na miso ya Yehova, ata motángo wana moke ya basoda ya Yisraele elekaki mingi. Ayebisaki Gideone mbala mibale ete azongisa babundi mosusu tii Moyisraele moko asengelaki kobunda na basoda 450 ya banguna. (Bas. 7:2-8; 8:10) Yehova alingaki mitángo ezala ndenge wana. Na ndenge yango, soki Bayisraele balongi moto moko te akoloba na lolendo nyonso ete na makasi to na bwanya na bango moko nde balongi.
13 Tokoki koloba ete Gideone ná basoda na ye bakómaki pene mpo na kobunda. Soki ozalaki na kati ya mwa etuluku wana, olingaki kozala motema mpiɔ ntango omoni ete bazongisi baninga na yo mosusu oyo bazalaki kobanga to bazangaki ekɛngɛ? To olingaki nde kobanga na motema soki okanisi ndenge makambo ekokaki koleka? Toyebi ete Gideone atyelaki Nzambe motema. Asalaki oyo Nzambe asɛngaki ye asala! (Tángá Basambisi 7:9-14.) Yehova apamelaki Gideone te ndenge asɛngaki ye elembo oyo ekomonisa ete akozala elongo na ye. (Bas. 6:36-40) Alendisaki nde kondima ya Gideone.
14 Nguya ya Yehova ya kobikisa ezali na nsuka te. Akoki kobikisa basaleli na ye ata na mokakatano nini. Mpo na yango, akoki kosalela ata bato oyo bazali komonana ete bazali na makasi te to bazangi lisalisi. Na bantango mosusu tokoki komona ete bato mingi bazali kotɛmɛla biso to ete makambo eyeli biso ndongo. Tolikyaka te ete Nzambe apesa biso bilembo na ndenge ya likamwisi ndenge asalaki mpo na Gideone, kasi akoki kotambwisa biso mpe kolendisa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá na ye oyo etambwisami na elimo na ye. (Rom. 8:31, 32) Bilaka kitoko ya Yehova elendisaka kondima na biso mpe endimisaka biso ete azali mpenza Mosungi na biso!
“Elimo ya Yehova ekitelaki Yefeta”
15, 16. Mpo na nini mwana mwasi ya Yefeta andimaki komipimela, mpe mpo na nini ezali likambo ya kolendisa mpo na baboti?
15 Tótala ndakisa mosusu. Ntango esɛngaki Bayisraele bábunda na Baamone, elimo ya Yehova “ekitelaki Yefeta.” Lokola Yefeta alingaki mpenza kolonga etumba yango mpo na kokumisa Yehova, asalaki elako, oyo ezangisaki ye eloko moko ya motuya mingi. Alakaki ete soki Nzambe apesi Amone na lobɔkɔ na ye, moto ya liboso oyo akobima na ndako na ye ntango akozonga akozala likabo mpo na Yehova. Ntango Yefeta azongaki ndako nsima ya kolonga Amone, mwana na ye ya mwasi nde ayaki mbangu mpo na koyamba ye. (Bas. 11:29-31, 34) Yango ekamwisaki nde Yefeta? Mbala mosusu te, mpo azalaki kaka na mwana moko. Akokisaki elako na ye; apesaki mwana na ye ya mwasi mpo asalela Yehova bomoi na ye mobimba na esika mosantu na Shilo. Lokola mwana yango azalaki mosambeli sembo ya Yehova, andimaki ete tata na ye akokisa elako oyo asalaki. (Tángá Basambisi 11:36.) Elimo ya Yehova epesaki bango mibale makasi oyo basengelaki na yango.
16 Mpo na nini mwana mwasi ya Yefeta andimaki komipimela makambo mingi ndenge wana? Na ntembe te, akómaki na kondima makasi ntango azalaki komona ndenge tata na ye azalaki na molende mpe akangamaki na Nzambe. Baboti, bóyeba ete bana na bino batyaka likebi na ndakisa na bino. Bikateli na bino emonisaka bango ete bondimaka makambo oyo bolobaka. Bana na bino bayokaka mabondeli oyo bosalaka na etingya, batyaka likebi na mateya na bino, mpe bamonaka milende oyo bosalaka mpo na kosalela Yehova na motema mobimba. Nyonso wana ekoki kosalisa bango bákolisa mposa ya komipesa na mosala ya Yehova. Yango ekopesa bino esengo.
“Elimo ya Yehova ebandaki kotinda” Samsone
17. Samsone asalaki nini na lisalisi ya elimo ya Nzambe?
17 Tótala ndakisa mosusu. Ntango Bayisraele bazalaki konyokwama na mabɔkɔ ya Bafilistia, “elimo ya Yehova ebandaki kotinda” Samsone asikola Yisraele. (Bas. 13:24, 25) Nzambe apesaki Samsone makasi oyo moto mosusu azalaki na yango te. Ntango Bafilistia balongaki kondimisa Bayisraele ete bákanga Samsone, moto na bango, “elimo ya Yehova ekómaki kosala kati na ye mpe bansinga oyo ezalaki na mabɔkɔ na ye ekómaki lokola nsinga ya lini oyo eziki na mɔtɔ, mpe bikangeli yango enyangwaki mpe elongwaki na mabɔkɔ na ye.” (Bas. 15:14) Ata ntango makasi ya Samsone esilaki mpo na bikateli ya mabe oyo azwaki, akómaki na nguya “na nzela ya kondima.” (Ebr. 11:32-34; Bas. 16:18-21, 28-30) Elimo ya Yehova esalaki kati na Samsone na ndenge moko ya kokamwa mpo na makambo ya mpasi mpenza oyo ekómelaki ye. Atako bongo, masolo wana ya makambo ya kala elendisaka biso mingi. Ndenge nini?
18, 19. (a) Lisolo ya Samsone elendisi biso na nini? (b) Bandakisa ya bato ya sembo oyo totaleli na lisolo oyo esalisi yo na nini?
18 Biso mpe totyaka motema kaka na elimo santu yango oyo esalisaki Samsone. Totyaka motema ete ekosalisa biso tókokisa mokumba oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, ya “kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu.” (Mis. 10:42) Mosala yango ekoki kozala mpasi mpo na biso. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalelaka elimo na ye mpo na kosalisa biso tókokisa misala ndenge na ndenge oyo apesá biso! Na yango, ntango tozali kokokisa mokumba na biso, tokoki koloba lokola mosakoli Yisaya ete: “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova ye moko atindi ngai, ɛɛ elimo na ye.” (Yis. 48:16) Ezali mpenza elimo ya Nzambe nde etindi biso! Totyaka makanisi na biso na mosala mpe tondimaka ete Yehova akokolisa makoki na biso ndenge asalaki mpo na Moize, Bezalele, mpe Yosua. Tosalelaka “mopanga ya elimo, elingi koloba liloba ya Nzambe,” na elikya ete akopesa biso nguya ndenge asalaki mpo na Gideona, Yefeta, mpe Samsone. (Ef. 6:17, 18) Soki totyeli Yehova motema mpo asalisa biso tólonga mikakatano, tokoki kokóma makasi na elimo ndenge Samsone akómaki makasi na nzoto.
19 Tomoni polele ete Yehova apambolaka baoyo bazali na molende na losambo ya solo. Ntango tozali kotika elimo santu na ye esala kati na biso, kondima na biso ekómaka makasi. Na yango, ekozala malamu mingi tótalela mpe makambo mosusu ya esengo oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Yango ekomonisa biso ndenge elimo ya Yehova esalaki likoló ya basaleli na ye ya sembo na ekeke ya liboso, liboso mpe nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Tokotalela masolo yango na lisolo oyo elandi.
Mpo na nini olendisami na koyeba ndenge elimo ya Nzambe esalaki likoló ya . . .
• Moize?
• Bezalele?
• Yosua?
• Gideone?
• Yefeta?
• Samsone?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Elimo ya Nzambe ekoki kokómisa biso makasi na elimo ndenge Samsone akómaki makasi na nzoto
[Elilingi na lokasa 21]
Baboti, ndakisa na bino ya molende ekoki kosalisa bana na bino