Ndenge nini Yesu azalaki kotalela politiki?
BAKOMI ya baevanzile balobeli makambo mingi oyo etali mosala ya Yesu awa na mabele, oyo emonisi ete bato balukaki kokɔtisa ye na makambo ya politiki. Na ndakisa, mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, ntango azalaki na mbula soki 30, Zabolo alakaki kokómisa ye moyangeli ya mokili. Na nsima, ntango azalaki kosala mosala na ye, ebele ya bato balingaki kokómisa ye mokonzi na bango. Ata na nsima na yango, bato balukaki kaka kokómisa ye moto ya politiki. Yesu asalaki nini? Tótalela naino makambo yango.
Moyangeli ya mokili. Baevanzile elobi ete Zabolo alakaki kokómisa Yesu moyangeli ya “makonzi nyonso ya mokili.” Kanisá naino makambo ya malamu oyo Yesu akokaki kosala mpo na mpasi ya bato soki andimaka koyangela mokili na ntango wana! Moto nini oyo andimaka ete politiki ekoki kobongisa makambo akoki koboya soki balaki ye likambo ya ndenge wana? Kasi, Yesu aboyaki yango.—Matai 4:8-11.
Mokonzi. Bato mingi na ntango ya Yesu bazalaki koluka mokonzi oyo akokaki kobongisa makambo ya nkita mpe ya politiki ya mboka na bango. Bato bazalaki kokamwa makoki oyo Yesu azalaki na yango, yango wana balingaki ete akɔta na politiki. Yesu asalaki nini? Yoane, moko ya bakomi ya baevanzile alobi boye: “Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.” (Yoane 6:10-15) Emonani polele ete Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki.
Moto ya politiki. Simbá likambo oyo esalemaki mwa mikolo liboso ete Yesu abomama. Bayekoli ya Bafarisai, oyo bazalaki kolinga ete ampire ya Roma epesa bango lipanda, ná bato ya parti politiki ya Erode oyo bazalaki kosepela na Baroma, bayaki epai ya Yesu. Balukaki kotinda ye na makasi akɔta na politiki. Batunaki ye soki Bayuda basengeli kofuta mpako na Roma.
Marko amonisi eyano ya Yesu: “‘Mpo na nini bozali komeka ngai? Bóyela ngai denari moko natala yango.’ Bayaki na moko. Mpe alobaki na bango ete: ‘Elilingi oyo mpe likomi oyo ya nani?’ Balobaki na ye ete: ‘Ya Kaisala.’ Bongo Yesu alobaki ete: ‘Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.’” (Marko 12:13-17) Buku moko (Church and State—The Story of Two Kingdoms) elobi boye mpo na ntina oyo Yesu apesaki eyano wana: “Aboyaki kozala masiya na makambo ya politiki mpe amonisaki polele bandelo oyo ezali kati na Kaisala mpe Nzambe.”
Atako aboyaki kokɔta na politiki, makambo lokola bobola, kanyaka, mpe kozanga bosembo ezalaki kotungisa Yesu. Kutu, Biblia emonisi ete mawa ekangaki Yesu ntango amonaki mpasi ya bato oyo bazalaki zingazinga na ye. (Marko 6:33, 34) Atako bongo, Yesu asalaki eloko te mpo na kolongola makambo ya kozanga bosembo na mokili, atako bato mosusu balukaki kokɔtisa ye na makambo oyo ezalaki kobimisa matata na ntango na ye.
Ndenge bandakisa oyo emonisi yango polele, Yesu aboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki. Ezali boni mpo na bakristo lelo oyo? Basengeli kosala nini?