Mituna ya batángi . . .
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokɔta na politiki?
▪ Liboso ete Yesu amata na likoló, apesaki bayekoli na ye malako mpo na ndenge ya kokokisa mosala na bango, kasi apesaki ata toli moko te etali politiki. (Matai 28:18-20) Na yango, bayekoli na ye bakobaki kotosa etinda oyo Yesu apesaki liboso, oyo elobi ete: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”—Marko 12:17.
Ndenge nini etinda yango esalisaki bayekoli ya Yesu bázala bato ya mokili te atako bafandi na mokili? Ndenge nini bakokaki koyeba biloko nini ezali ya Leta to Kaisala, mpe biloko nini ezali ya Nzambe?
Ntoma Paulo amonaki ete kokɔta na politiki ezali kozanga kotosa etinda wana ya Yesu. Buku moko (Beyond Good Intentions—A Biblical View of Politics) elobi ete “Paulo andimaki kosalela lotomo na ye ya mwana-mboka Roma mpo na kosɛnga libateli oyo asengelaki na yango ntango bazalaki kosambisa ye, kasi apesaki mabɔkɔ ata moke te na makambo ya politiki ya ntango wana.”
Malako nini Paulo apesaki bandeko na ye bakristo? Kaka buku yango ebakisi boye: “Mikanda na ye epai ya bandimi oyo bazalaki kofanda na bingumba minene lokola Korinti, Efese mpe Roma elobelaki ata likambo moko te ya politiki.” Buku yango elobi mpe ete Paulo “apesaki etinda ya kotosa baguvɛrnema, kasi na mikanda na ye nyonso, ata esika moko te asɛngaki lingomba ekɔta na makambo ya guvɛrnema.”—Baroma 12:18; 13:1, 5-7.
Bakristo oyo bazalaki na bomoi bambula mingi nsima ya liwa ya Paulo bayebaki kokesenisa mikumba oyo bazalaki na yango epai ya Nzambe mpe epai ya Leta. Bazalaki ntango nyonso kotosa bakonzi ya politiki, kasi baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Buku yango elobi lisusu boye mpo na bandimi yango: “Atako bakristo ya liboso bayebaki ete bazali na mokumba ya kotosa bakonzi ya Leta, bazalaki kondima te kokɔta na makambo ya politiki.”
Nzokande bambula soki 300 nsima ya liwa ya Yesu, makambo ebongwanaki. Na buku na ye (Between Christ and Caesar), Charles Villa-Vicencio, moto moko ya teoloji, alobi boye: “Ntango Constantin abongolaki makambo ya politiki, emonani ete bakristo mingi bakómaki kosala na guvɛrnema, kosala mosala ya soda, mpe kondima misala mosusu ya politiki.” Yango ebimisaki nini? Na nsuka ya siɛklɛ ya minei ya ntango na biso, boyokani wana oyo lingomba esalaki ná politiki ebimisaki lingomba ya Leta ya ampire ya Roma.
Lelo oyo, mangomba mingi oyo elobaka ete elandaka Kristo ezali kokoba kolendisa bandimi na yango bákɔta na politiki. Nzokande, mangomba yango ezali te kolanda ndakisa ya Kristo, mpe ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso.